Makomi
Molomoni 8


Mokapo 8

Balamani balukiluki mpe babebisi Banefi—Buku ya Molomoni ekoya na nguya ya Nzambe—Lisuma lisakolami likolo lya bango baye bafuli nkanda mpe songisongi likolo lya mosala mwa Nkolo—Likundoli lya Banefi likoya o mokolo moko mwa nkuna, bokulumwi, mpe bopengwi. Penepene na 400–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Tala ngai, Moloni, nasilisi likundoli lya tata wa ngai, Molomoni. Tala, nazali na mwa makambo mpo ya kokoma, maye makambo natindamaki na tata wa ngai.

2 Mpe sikawa esalemaki ete nsima ya etumba enene mpe ebakata o Kumola, tala, Banefi baye baponiokaki o kati ya ekolo ya epai ya sudi, babenganamaki na Balamani kina babebisamaki.

3 Mpe tata wa ngai lokola abomamaki na bango, mpe natikali kutu ngai moko mpo ya kokoma nsango ya mawa ya bobebisami bwa bato ba ngai. Kasi tala, bakei, mpe ngai nakokisi motindo mwa tata wa ngai. Mpe soko bakoboma ngai, nayebi te.

4 Yango wana nakokoma mpe nakobomba makundoli o mabele; mpe wapi nakei ezali likambo te.

5 Tala, tata wa ngai asalaki likundoli liye, mpe akomi ntina ya lyango. Mpe tala, nalingaki kokoma yango lokola soko nazalaki na esika likolo lya palaki, kasi nazali na yango te; mpe nazali na makele te, mpo nazali ngai moko. Tata wa ngai abomami o etumba, mpe bandeko ba ngai; nazali te na baninga mpe wapi kokende; mpe boniboni ntango elai Nkolo akondima ete nakoka kozala na bomoi nayebi te.

6 Tala, mibu nkama minei mileki uta o boyei bwa Nkolo mpe Mobikisi wa biso.

7 Mpe tala, Balamani baluki koboma bato ba ngai, Banefi, uta engumba na engumba mpe esika na esika, kutu kina bazali lisusu te; mpe enene ezali bokwei bwa bango; iyo, enene mpe ya bokamwi ezali bobebisami bwa bato ba ngai, Banefi.

8 Mpe tala, ezali loboko la Nkolo loye losali yango. Mpe tala lisusu, Balamani bazali na etumba bango na bango; mpe etando mobimba ya mboka eye ezali zunguluke yoko ya bobomi mpe bosopi makila ya ntango inso; mpe moko te ayebi nsuka ya etumba.

9 Mpe sikawa, tala, nakoloba lisusu te etali bango, mpo bazali te longola se Balamani mpe bayongoli baye bazali likolo lya etando ya mboka.

10 Mpe ezali moto te oyo ayebi Nzambe wa solo longola se soko esali bayekoli ba Yesu, baye batikalaki o mboka kina nkuna ya bato ezalaki enene boye ete Nkolo andimaki bango te batikala elongo na bato; mpe soko bazali likolo lya etando ya mboka, moto te ayebi.

11 Kasi tala, tata wa ngai mpe ngai tomonoki bango, mpe basalaki epai ya biso.

12 Mpe oyo ayambi palaki eye, mpe asambisi yango te na ntina ya bozangi bobongo mpenza boye bozali na yango, ye kaka akoyeba makambo manene koleka maye. Tala, nazali Moloni; soko ekokaki, nalingaki kosala makambo manso mayebana epai ya bino.

13 Tala, natii nsuka yoko ya bolobi botali bato baye. Nazali mwana mobali wa Molomoni, mpe tata wa ngai azalaki eboto moko ya Nefi.

14 Mpe ngai nazali ye kaka oyo abombi likundoli liye epai ya Nkolo; palaki ya lyango ezali na motuya te na ntina ya motindo mwa Nkolo. Mpo solo alobaki ete moto te akozwa mango mpo ya kozwa matabisi; kasi likundoli lya yango lilongobani mpenza; mpe oyo akomeme lyango o mwinda, ye Nkolo akopambola.

15 Mpo moto te akoki kozwa nguya mpo ya komeme lyango o mwinda longola se soko epesami ye na Nzambe; mpo Nzambe alingi ete esalema na liso lyoko swii o nkembo ya ye, to na bolamu bwa bato ba boyokani ba kala bapanzana ntango elai ba Nkolo.

16 Mpe apambolama ye oyo akomeme likambo liye o mwinda; mpo ekomememe libanda lya molili epai ya moi, engebene na liloba lya Nzambe; iyo, ekomememe libanda lya mabele, mpe ekongenge libanda lya boindo, mpe ekoya epai ya boyebi bwa bato; mpe ekosalema na nguya ya Nzambe.

17 Mpe soko ezali miko mizali miko mya moto moko. Kasi tala, toyebi te ziko; nzokande Nzambe ayebi makambo manso; bongo, ye oyo asambisi, tika ye akeba mbele azala na likama lya limfelo.

18 Mpe ye oyo alobi: Lakisa epai ya ngai, to okobeteme—tika ye akeba mbele asambisa ena eye epekisami na Nkolo.

19 Mpo tala, ye oyo asambisi na bokebi te, akosambisama na bokebi te lokola; mpo engebene na misala mya ye lifuta lya ye likozala, yango wana, ye oyo akobete, akobeteme lokola.

20 Tala nini nkoma elobi—moto akobete te, mpe akosambisa te; mpo bosambisi bozali bwa ngai, elobi Nkolo, mpe bobekoli bozali bwa ngai lokola, mpe nakofuta lokola.

21 Mpe ye oyo akofula nkanda mpe songisongi likolo lya mosala mwa Nkolo, mpe likolo lya bato ba boyokani ba Nkolo baye bazali ndako ya Yisalaele, mpe akoloba: Tokobebisa mosala mwa Nkolo, mpe Nkolo akomikundola te boyokani boye asalaki epai ya ndako ya Yisalaele—ye kaka azali na likama lya kokatama o nse mpe kobwakama o kati ya moto;

22 Mpo mwango mwa seko mwa Nkolo mokokoba kozunguluka, kina bilako binso bikokokisama.

23 Lukani mabikuli ma Yisaya. Tala, nakoki kokoma mango te. Iyo, tala nalobaki epai ya bino, ete basantu bana baye bakendeki yambo ya ngai, baye bazwaki mboka eye, bakobelela, iyo, kutu uta o mputulu bakobelela epai ya Nkolo; mpe lokola Nkolo azali na bomoi akomikundola boyokani boye asalaki elongo na bango.

24 Mpe ayebi nsambo ya bango, ete izalaki mpo ya ntina ya bandeko ba bango. Mpe ayebi bondimi bwa bango, mpo o nkombo ya ye ekokaki bango kolongola ngomba; mpe o nkombo ya ye ekokaki bango kosala mabele maningana; mpe na nguya ya liloba lya ye basalaki boloko ikweyisama o mabele; iyo, kutu fulu ya nkanda ekasi ekokaki te kosala bango mpasi, mpe niama ya zamba te to nioka ya ngenge te, na ntina ya nguya ya liloba lya ye.

25 Mpe tala, nsambo ya bango izalaki lokola mpo ya ntina ya ye oyo Nkolo akondima mpo ya komeme makambo maye liboso.

26 Mpe moto te asengeli koloba makoya te, mpo, solo makoya, mpo elobi Nkolo yango; mpo libanda lya mabele ekoya, na loboko la Nkolo, mpe moto te akokanga yango; mpe ekoya mokolo moko ekolobama ete makamwisi masili; mpe ekoya kutu lokola soko songolo akoloba uta o bakufi.

27 Mpe ekoya o mokolo moko ekobelela makila ma basantu epai ya Nkolo, na ntina ya makelemba ma nkuku mpe misala mya molili.

28 Iyo, ekoya o mokolo moko ekowanganama nguya ya Nzambe mpe biklezia bikokoma bibeba bikotombwama o lolendo la mitema mya bango; iyo, kutu o mokolo ekoteleme bakonzi ba biklezia mpe balakisi o lolendo la mitema mya bango, kutu mpo ya boluli bwa bango baye bazali ba biklezia bya bango.

29 Iyo, ekoya o mokolo moko ekoyokama moto, mpe ekumbaki, mpe mbongi ya molinga o mboka ya mompaya;

30 Mpe ekoyokama lisusu bitumba, manungunungu ma bitumba, mpe boningani bwa mabele o bisika ndenge na ndenge.

31 Iyo, ekoya o mokolo moko ekozala bosoto bonene likolo lya etando ya mabele; ekozala bobomi, mpe boyongoli, mpe lokuta, mpe bobubi mpe pite, mpe ndenge inso ya bonsomo; ekozala mingi baye bakoloba, Sala eye, to sala ena, mpe ezali likambo te, mpo Nkolo akondima baye ba lolenge loye o mokolo mwa nsuka. Kasi lisuma epai ya baye ba lolenge loye, mpo bazali lititi lya bololo mpe bowumbu bwa bobe.

32 Iyo, ekoya o mokolo ekozala biklezia bitongama biye bikoloba: Yakani epai ya ngai, mpe mpo ya mbongo ya bino bokolimbisama na masumu ma bino.

33 O bino bato ba nkuna mpe babe mpe ba mitema mikasi, boniboni botongaki biklezia mpo ya kozwa matabisi? boniboni bobongoli maloba masantu ma Nzambe, ete bokoka komeme botumboli likolo lya bozo bwa bino? Tala, talani epai ya mabimisi ma Nzambe; mpo tala, ntango eyei o mokolo mona esengeli kokokisama makambo maye.

34 Tala, Nkolo alakisi epai ya ngai makambo manene mpe ma bokamwi matali ena eye esengeli mosika te koya, o mokolo mona makambo maye makoya o ntei ya bino.

35 Tala, nalobaki epai ya bino lokola soko bozali awa, mpe nzokande bozali te. Kasi tala, Yesu Klisto alakisi bino epai ya ngai, mpe nayebi misala mya bino.

36 Mpe nayebi ete botamboli o lolendo la mitema mya bino; mpe ezali moko te longola se mwa moke baye bamitomboli te o lolendo la mitema mya bango, mpo ya kolataka monzele malonga mpenza, mpo ya boluli, mpe songisongi, mpe nko, mpe boniokoli, mpe ndenge inso ya mabe; mpe biklezia bya bino, iyo, kutu yoko na yoko ekomi ebeba na ntina ya lolendo la mitema mya bino.

37 Mpo tala, bolingi mbongo, mpe biloko bya bino, mpe monzele malonga mwa bino, mpe na bokembisi bwa ndakonzambe ya bino, mingi koleka bolingi bakeleli mpe bazangi, bakoni mpe batungisami.

38 O bino bosoto, bino bakibisi, bino balakisi, baye bomiteki mpo ya ena eye ekobeba, boniboni bobebisi eklezia esantu ya Nzambe? Boniboni boyoki nsoni mpo ya kokamata likolo lya bino nkombo ya Klisto? Boniboni ekanisi bino te ete enene mingi ezali motuya mwa esengo ezanga nsuka koleka bobola boye bokokufa mokolo moko te—na ntina ya bosanzoli bwa mokili?

39 Boniboni bomikembisi na ena eye ezangi bomoi, mpe nzokande botiki bato ba nzala, mpe bazangi, ba bolumbu, mpe bakoni mpe batungisami baleka mpembeni ya bino, mpe bomono bango te?

40 Iyo, boniboni botongi bonsomo bwa nkuku mpo ya kozwa matabisi, mpe bosali ete basi bazenge balela liboso lya Nkolo, mpe bana batike balela liboso lya Nkolo, mpe makila ma batata ba bango mpe babali ba bango mabelela epai ya Nkolo uta o mabele, mpo ya bobekoli likolo lya mito mya bino?

41 Tala, mopanga mwa bobekoli mozali likolo lya mito mya bino; mpe ntango eyei mosika te eye akobekola makila ma basantu likolo lya bino, mpo akondima lisusu te bogangi bwa bango.