Makomi
Moloni 10


Mokapo 10

Litatoli lyoko lya Buku ya Molomoni liyei na nguya ya Molimo Mosantu—Makabo ma Molimo mapesami na bapotongono—Makabo ma Molimo ntango inso malandi bondimi—Maloba ma Moloni malobami uta o mputulu—Yakani epai ya Klisto, zala obongo nie na ye, mpe santisani bozo bwa bino. Penepene na 421 ya mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa ngai, Moloni, nakomi mwa makambo lokola emoni ngai bolamu; mpe nakomi epai ya bandeko ba ngai Balamani; mpe nalingi ete bayeba ete mingi koleka mibu nkama minei na tuku mibale milekaki, uta elembo epesamaki ya boyei bwa Klisto.

2 Mpe nakangi makundoli maye, esilisi ngai koloba ndambo yoko ya maloba o nzela ya bolendisi epai ya bino.

3 Tala, nalingi kolendisa bino ete ekotanga bino makambo maye, soko ezali bwania na Nzambe ete botanga mango, ete bomikundola boniboni wa ngolu Nkolo azali epai ya bana ba bato, uta o bokeli bwa Adama, kutu kina o ntango eye bokozwa makambo maye, mpe bomaniola mango o mitema mya bino.

4 Mpe ekozwa bino makambo maye, nalingi kolendisa bino ete bosenge Nzambe, Tata wa Seko, o nkombo ya Klisto soko makambo maye mazali ma solo te; mpe soko bokosenge na motema wa bosembo, na mokano mwa solo, kozalaka na bondimi na Klisto, akomonisa bosolo bwa mango epai ya bino, na nguya ya Molimo Mosantu.

5 Mpe na nguya ya Molimo Mosantu bokoki koyeba bosolo bwa makambo manso.

6 Likambo liye lizali lilami lizali liyengenene mpe lya solo; yango wana, eloko te eye ezali elamu ewangani Klisto, kasi endimi ete azali.

7 Mpe bokoki koyeba ete azali, na nguya ya Molimo Mosantu; yango wana nalingi kolendisa bino ete, bowangana te nguya ya Nzambe; mpo akosalaka na nguya, engebene na bondimi bwa bana ba bato, ye kaka lelo mpe lobi, mpe libela.

8 Mpe lisusu, nalendisi bino, bandeko ba ngai, wanganani te makabo ma Nzambe, mpo mazali mingi; mpe mauti na Nzambe ona kaka. Mpe izali nzela ikeseni iye makabo maye masalemi; kasi ezali Nzambe ona kaka oyo akosalaka manso na manso; mpe mapesami na mamonisi ma Molimo wa Nzambe epai ya bato, mpo ya litomba lya bango.

9 Mpo tala, na moko epesami na Molimo mwa Nzambe, ete akoka koteya maloba ma bwania;

10 Mpe na mosusu, ete akoka koteya maloba ma boyebi na Molimo mona kaka;

11 Mpe na mosusu, bondimi nonene mpenza; mpe na mosusu, makabo ma bobikisi bwa bokono na Molimo mona kaka;

12 Mpe lisusu, na mosusu, ete akoka kosala makamwisi makasi;

13 Mpe lisusu, na mosusu, ete akoka kobikula etali makambo manso;

14 Mpe lisusu, na mosusu, bomoni bwa banzelu mpe milimo kosalaka;

15 Mpe lisusu, na mosusu, ndenge inso ya minoko;

16 Mpe lisusu, na mosusu, bolimboli bwa makota mpe ndenge na ndenge ya minoko.

17 Mpe makabo maye manso mayei na Molimo mwa Klisto; mpe mayei epai ya moto na moto ndenge na ndenge, engebene lokola alingi.

18 Mpe nalingi kolendisa bino, bandeko balingami ba ngai, ete bomikundola ete likabo lilamu linso liyei na Klisto.

19 Mpe nalingi kolendisa bino, bandeko balingami ba ngai, ete bomikundola ete azali ye kaka lobi, lelo, mpe libela, mpe ete makabo maye manso maye nalobeli, maye mazali ma molimo, makosila mokolo moko te, kutu ntango elai lokola mokili mokoteleme, bobele engebene na bozangi bondimi bwa bana ba bato.

20 Yango wana, esengeli ezala bondimi; soko esengeli ezala bondimi esengeli lokola ezala elikia; mpe soko esengeli ezala elikia esengeli lokola ezala lolango.

21 Mpe longola se soko bozali na lolango bokoki ata moke te kobikisama o bokonzi bwa Nzambe; mpe bokoki kobikisama te o bokonzi bwa Nzambe soko bozali te na bondimi; mpe bokoki te soko bozali te na elikia.

22 Mpe soko bozali te na elikia bosengeli mpenza kozali na bozangi elikia; mpe bozangi elikia boyei na ntina ya bobe.

23 Mpe Klisto solo alobaki epai ya batata ba biso: Soko bozali na bondimi bokoki kosala makambo manso malongobani epai ya ngai.

24 Mpe sikawa nalobaki epai ya nsuka inso ya mabele—ete soko mokolo moyei ete nguya mpe makabo ma Nzambe makolongwa o ntei ya bino, ekozala na ntina ya bozangi bondimi.

25 Mpe lisuma ezala epai ya bana ba bato soko ezali boye; mpo ekozala moko te oyo asali bolamu o ntei ya bino, moko te. Mpo soko ezali moko o ntei ya bino oyo asali bolamu, akosala na nguya mpe makabo ma Nzambe.

26 Mpe lisuma epai ya bango baye bakolongola makambo maye mpe bakufi, mpo bakufi o masumu ma bango, mpe bakoki te kobikisama o bokonzi bwa Nzambe; mpe nalobi yango engebene na maloba ma Klisto; mpe nakosi te.

27 Mpe nalendisi bino mpo ya komikundola makambo maye; mpo ntango noki eyei ete bokoyeba ete nakosi te, mpo bokomono ngai liboso lya esika ya bosambisi ya Nzambe; mpe Nkolo Nzambe akoloba epai ya bino: Esakolaki ngai te maloba epai ya bino, maye makomamaki na moto oyo, bo lokola moko kobelelaka uta o bakufi, iyo, kutu lokola moko kogangaka uta o mputulu?

28 Nasakoli makambo maye mpo ya bokokisi bwa mabikuli. Mpe tala, makobima na monoko mwa Nzambe wa libela, mpe liloba lya ye likobete piololo uta nkola o nkola.

29 Mpe Nzambe akolakisa epai ya bino, ete ena eye nakomi ezali ya solo.

30 Mpe lisusu nalingi kolendisa bino ete boya epai ya Klisto, mpe botia nkanga likolo lya makabo malamu manso, mpe bosimba te makabo mabe, to eloko ya mbindo te.

31 Mpe lamuka, mpe teleme uta o mputulu, O Yelusaleme; iyo, mpe lata milato kitoko mya yo, O mwana mwasi ya Siona; mpe lendisa makonzi ma yo mpe tandola ndelo ya yo libela, ete okoka lisusu te kobulunganisama, ete mayokani ma Tata wa Seko maye asalaki epai ya yo, O ndako ya Yisalaele, makoka kokokisama.

32 Iyo, yakani epai ya Klisto, mpe zalani bobongo nie na ye, mpe bomiwangana na bozangi bonzambe bonso; mpe soko bomiwangani na bozangi bonzambe bonso, mpe bolingi Nzambe na bokasi, mayele mpe makasi ma bino manso, nde boboto bwa ye bokoki mpo ya bino, ete na boboto bwa ye bobongi nie na Klisto; mpe soko na boboto bwa Nzambe bobongi nie na Klisto, bokoki ata moke te kowangana nguya ya Nzambe.

33 Mpe lisusu, soko na boboto bwa Nzambe bobongi nie na Klisto, mpe bowangani te nguya ya ye, nde bosantisami na Klisto na boboto bwa Nzambe, na nzela ye bosopi bwa makila ma Klisto, maye mazali o boyokani bwa Tata epai ya bolimbisi bwa masumu ma bino, ete bokoma basantu, bozanga mbindo.

34 Mpe sikawa natombeli epai ya banso, sese. Nakei mosika te kopema o paradizu ya Nzambe, kina molimo mpe nzoto ya ngai ikosala lisusu bomoko, mpe namememi na nzela ya mopepe, mpo ya kokutana na bino liboso lya esika ya elengi ya Yova monene, Mosambisi wa Seko wa bato ba bomoi mpe bakufa elongo. Amene.

Nsuka