Makomi
Moloni 1


Buku ya Moloni

Mokapo 1

Moloni akomi mpo ya litomba lya Balamani—Banefi baye bakowangana Klisto te batiami o liwa. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Sikawa ngai, Moloni, esalaki ngai nsuka yoko na kosalaka bokuse bwa nsango ya bato ba Yelede, nabanzanka te ete nakoma lisusu, kasi nawei naino te; mpe nasali namiyebisa te na Balamani, mbele baboma ngai.

2 Mpo tala, bitumba bya bango bizali bikasi mpenza o ntei ya bangomei; mpe na ntina ya boyini bwa bango batii o liwa Monefi onso oyo akowangana te Klisto.

3 Mpe ngai, Moloni, nakowangana te Klisto; yango wana, nayengiyengi wapi nakoki mpo ya bozangi likama bwa bomoi bwa ngai.

4 Yango wana, nakomi lisusu mwa makambo, o bokeseni na ena eye nabanzaka; mpo nabanzaka ete nakokoma lisusu te; kasi nakomi mwa makambo lisusu, ete mbele makoka kolongobana epai ya bandeko ba ngai, Balamani, o yoko mokolo mokoya, engebene na bolingi bwa Nkolo.