Makomi
Moloni 4


Mokapo 4

Boniboni bankulutu mpe banganga basali limpa lya elembo elimbolami. Penepene na 401–421 ya mobu mwa Mokonzi.

1 Lolenge loye bankulutu mpe banganga bapesaki mosuni mpe makila ma Yesu Klisto epai ya eklezia; mpe basalaki yango engebene na mitindo mya Klisto; yango wana toyebi lolenge lozali solo; mpe nkulutu to nganga asalaki yango—

2 Bafukamaki o nse elongo na eklezia, mpe basambelaki na Tata, o nkombo ya Klisto, kolobaka:

3 O Nzambe, Tata wa Seko, tosengi yo o nkombo ya Mwana wa yo wa Mobali, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa limpa liye mpo ya bozo bwa bango banso baye bakokamata lyango; ete bakoka kolia lyango o bokundoli bwa nzoto ya Mwana wa yo wa Mobali, mpe kotatola epai ya yo, O Nzambe, Tata wa Seko, ete bazali kolingaka kokamata likolo lya bango nkombo ya Mwana Mobali wa yo, mpe komikundola ye ntango inso, mpe kobomba mitindo miye apesi bango, ete bakoka ntango inso kozwa Molimo mwa ye mpo ya kozala elongo na bango. Amene.