Makomi
Moloni 5


Mokapo 5

Motindo mwa kosalaka vino ya elambo etiami. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Lolenge la kosalaka vino—Tala, bakamataki nkeni, mpe balobaki:

2 O Nzambe, Tata wa Seko, tosengi yo, o nkombo ya Mwana wa yo wa Mobali, Yesu Klisto, opambola mpe osantisa vino eye mpo ya bozo bwa bango banso baye bakomele yango, ete bakoka kosala yango o bokundoli bwa makila ma Mwana wa yo wa Mobali, maye masopamaki mpo ya bango; ete bakoka kotatola epai ya yo, O Nzambe, Tata wa Seko, ete bamikundoli ye ntango inso, ete bakoka kozwa Molimo mwa ye mpo ya kozala elongo na bango. Amene.