Makomi
Moloni 6


Mokapo 6

Bato bayambola babatisami mpe bayingisami—Bandimi ba Eklezia baye bayamboli balimbisami—Makita makambemi na nguya ya Molimo Mosantu. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa nalobi etali libatisi. Tala, bankulutu, banganga, mpe balakisi babatisamaki; mpe babatisamaki te longola se soko bamemeki mbuma elakisi ete balongobani na yango.

2 Mpe bayambaki moko te epai ya libatisi longola se soko bayaki na motema moko mobukana mpe molimo moko mwa mawa, mpe batatolaki epai ya eklezia ete solo bayamboli masumu ma bango manso.

3 Mpe moko te ayambamaki epai ya libatisi longola se soko bakamataki likolo lya bango nkombo ya Klisto, mpe kozalaka na mokano moko mpo ya kosalela ye kina o nsuka.

4 Mpe esilaka bango koyambama epai ya libatisi, mpe basimbamaki mpe bakomisamaki sembesembe na nguya ya Molimo Mosantu, batangemaki o ntei ya bato ba eklezia ya Klisto; mpe nkombo ya bango ikamatamaki, ete bakoka kokundolama mpe koleisama na liloba lilamu lya Nzambe, mpo ya kobatela bango o nzela alima, mpo ya kobatela bango ntango inso na bokebi mpo ya losambo, koyekemeke bobele likolo lya matomba ma Klisto, oyo azali mobandisi mpe mosukisi wa bondimi bwa bango.

5 Mpe eklezia esanganaki elongo mbala na mbala, mpo ya kokila mpe mpo ya kosambela, mpe koloba elongo bango na bango etali bolamu bwa bozo bwa bango.

6 Mpe basanganaki mbala na mbala mpo ya kolia limpa mpe vino, o bokundoli bwa Nkolo Yesu.

7 Mpe bazalaki sikisiki mpo ya kokeba ete ezala te bobe o ntei ya bango; mpe oyo azwamaki kosalaka bobe, banzeneneke basato ba eklezia basambisaki ye liboso lya bankulutu, mpe soko bayambolaki te, mpe batubelaki te, nkombo ya bango elongolamaki, mpe batangemaki lisusu te o ntei ya bato ba Klisto.

8 Kasi lokola mbala na mbala bayambolaki mpe balukaki bolimbisi, na mokano mwa solo, balimbisamaki.

9 Mpe makita ma bango makambemaki na eklezia nsima ya lolenge la bosali bwa Molimo, mpe na nguya ya Molimo Mosantu; mpo lokola Molimo Mosantu mokambaki bango soko mpo ya koteya, to mpo ya kolendisa, to mpo ya kosambela, to mpo ya kobondela, to mpo ya koyemba, kutu boye esalemaki.