Makomi
Moloni 7


Mokapo 7

Bobiangemi bopesami mpo ya kokota o bopemi bwa Nkolo—Sambelani na mokano mwa solo—Molimo mwa Klisto akokisi moto mpo ya koyeba bolamu uta o bobe—Satana andimisi bato mpo ya kowangana Klisto mpe kosala bobe—Baprofeta bamonisi boyei bwa Klisto—Na bondimi, makamwisi masalemi mpe banzelu basali—Bato basengeli kolikia bomoi bwa seko mpe kokangama na lolango. Penepene na 401–421 ya mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa ngai, Moloni, nakomi mwa maloba ma Tata wa ngai Molomoni, maye alobelaki etali bondimi, elikia, mpe lolango; mpo nsima ya lolenge loye alobaki epai ya bato, lokola alakisaki bango o sinagogi eye batongaka mpo ya esika ya bokumbami.

2 Mpe sikawa ngai, Molomoni, nalobaki epai ya bino, bandeko balingami ba ngai; mpe ezali na boboto bwa Nzambe Tata, mpe Nkolo wa biso Yesu Klisto, mpe bolingi bosantu bwa ye, na ntina ya likabo lya bobiangi bwa ngai, ete nazwi ndingisa mpo ya koloba epai ya bino o ntango eye.

3 Yango wana, nalingi koloba epai ya bino baye bozali ba eklezia, baye bozali balandi ba solo mpe ba kimia ba Klisto, baye bozwi elikia ekoki na yango bokoki kokota o bopemi bwa Nkolo, uta ntango eye kina bokopema elongo na ye o lola.

4 Mpe sikawa bandeko ba ngai, nasambisi makambo ma bino maye na ntina ya botamboli bwa kimia bwa bino elongo na bana ba bato.

5 Mpo namikundoli liloba lya Nzambe lye lilobi na misala mya bango bokoyeba bango; mpo soko misala mya bango mizali milamu, nde bazali balamu lokola.

6 Mpo tala, Nzambe alobaki ete moto kozalaka mobe akoki te kosala ena eye ezali elamu; mpo soko abonzi likabo, to asambeli epai ya Nzambe, longola se soko asali yango na mokano mwa solo epesi ye litomba te.

7 Mpo tala, etangemi te lifuta epai ya ye mpo ya bosembo.

8 Mpo tala, soko moto moko kozalaka mobe apesi likabo moko, apesi yango na mitema mibale; yango wana etangemi epai ya ye lokola soko akangaki likabo; yango wana etangemi bobe liboso lya Nzambe.

9 Mpe motindo moko lisusu etangemi bobe epai ya moto moko, soko akosambela te na mokano mwa solo bwa motema; iyo, epesi ye litomba te, mpo Nzambe ayambi ba lolenge loye te.

10 Yango wana, moto moko kozalaka mobe akoki te kosala ena eye ezali elamu; mpe akopesa te likabo lyoko lilamu.

11 Mpo tala, liziba lyoko lya bololo likoki te kobimisa mai malamu; mpe ekoki te liziba lilamu kobimisa mai ma bololo; yango wana, moto kozalaka mosali wa zabulu akoki te kolanda Klisto; mpe soko alandi Klisto akoki te kozala mosali wa zabulu.

12 Yango wana, biloko binso biye bizali bilamu biyei te na Nzambe; mpe ena eye ezali ebe eyei na zabulu; mpo zabulu azali moyini epai ya Nzambe, mpe abundi na ye ntango inso, mpe abiangi mpe asengisi o lisumu, mpe mpo ya kosala ena eye ezali ebe ntango inso.

13 Kasi tala, ena eye ezali ya Nzambe ebiangi mpe esengisi mpo ya kosala bolamu ntango inso; yango wana, eloko enso eye ebiangi mpe esengisi mpo ya kosala bolamu, mpe mpo ya kolinga Nzambe, mpe mpo ya kosalela ye, efulami na Nzambe.

14 Yango wana, salani keba, bandeko balingami ba ngai, ete bosambisa te eye ezali ebe ezali ya Nzambe, to ete eye ezali elamu ezali ya zabulu.

15 Mpo tala, bandeko ba ngai, epesami epai ya bino mpo ya kosambisa ete ete bokoka koyeba bolamu uta o bobe; mpe nzela ya kosambisa ezali polele, ete bokoka kozala na boyebi boko bobongo nie, lokola mwinda mwa moi mozali uta o molili mwa butu.

16 Mpo tala, Molimo mwa Klisto apesami na moto onso, ete akoka koyeba bolamu uta o bobe; yango wana, nalakisa epai ya bino nzela ya kosambisa; mpo eloko enso eye ebiangi mpo ya kosala bolamu, mpe endimisi mpo ya kondima na Klisto, etindami na nguya mpe likabo lya Klisto; yango wana bokoki koyeba na boyebi boko bobongo nie ezali ya Nzambe.

17 Kasi eloko eye endimisi bato mpo ya kosala bobe, mpe kondima na Klisto te, mpe kowangana ye, mpe kosalela te Nzambe, nde bokoki koyeba na boyebi boko bobongo nie ezali ya zabulu; mpo nsima ya lolenge loye esali zabulu, mpo andimisi moto te mpo ya kosala bolamu, te, moko te; mpe banzelu ba ye te; mpe bango baye bamiyangelisami epai ya ye.

18 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, komonoko ete boyebi mwinda na mwango bokoki kosambisa, moye mwinda mozali mwinda mwa Klisto, tala ete bosambisa mabe te; mpo na bosambisi bona kaka boye bosambisi bokosambisama lokola.

19 Yango wana, nabondeli bino, bandeko ba ngai, ete boluka na etingia o mwinda mwa Klisto ete bokoka koyeba bolamu uta o bobe; mpe soko bokotia nkanga likolo lya eloko elamu enso, mpe bokokitisa yango te, bokozala na ntembe te mwana moko wa Klisto.

20 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, boniboni ekoki kosalema ete bokoki kotia nkanga likolo lya eloko elamu enso?

21 Mpe sikawa nayei o bondimi bona, bwango nalobaki nalingi kolobela; mpe nakolobela bino nzela na wapi bokoki kotia nkanga likolo lya eloko elamu enso.

22 Mpo tala, Nzambe koyebaka makambo manso, kozalaka uta libela na libela, tala, atindaki banzelu ba ye mpo ya kosala epai ya bana ba bato, mpo ya komonisa etali boyei bwa Klisto; mpe na Klisto ekoya eloko elamu enso.

23 Mpe Nzambe lisusu asakolaki epai ya baprofeta, na monoko mwa yemei, ete Klisto akoya.

24 Mpe tala, ezalaki nzela ndenge mingi iye amonisaki makambo epai ya bana ba bato, maye mazalaki malamu; mpe makambo manso maye mazali malamu mayei na Klisto; soko te bato bakwei, mpe ekoki koya eloko elamu te epai ya bango.

25 Yango wana, na lisalisi lya banzelu, mpe na liloba linso libimaki na monoko mwa Nzambe, bato babandaki kosalela bondimi na Klisto; mpe boye na bondimi, batiaki nkanga likolo lya eloko elamu enso; mpe boye ezalaki kina o boyei bwa Klisto.

26 Mpe nsima ya ye koya bato lokola babikisamaki na bondimi o nkombo ya ye; mpe na bondimi, bakomi bana babali ba Nzambe. Mpe lokola solo Yesu Klisto azali na bomoi alobaki maloba maye epai ya batata ba biso, kolobaka: Eloko kani bokosenge Tata o nkombo ya ngai, eye ezali elamu, na bondimi ete bokozwa, tala, ekosalema epai ya bino.

27 Yango wana, bandeko balingami ba ngai, makamwisi masili zambi Klisto amati o kati ya lola, mpe afandi o loboko la mobali la Nzambe, mpo ya kosenge na Tata makoki ma ye ma ngolu eye azwi likolo lya bana ba bato?

28 Mpo ayanoli ntina ya mobeko, mpe asengi bango banso baye bazali na bondimi na ye; mpe bango baye bazali na bondimi na ye bakokangema epai ya eloko elamu enso; yango wana asambeleli likambo lya bana ya bato; mpe afandi seko o lola.

29 Mpe zambi asalaki eye, bandeko balingami ba ngai, makamwisi masili? Tala nalobi epai ya bino, Te; mpe banzelu basilisi te kosala epai ya bana ba bato.

30 Mpo tala, bayangelami epai ya ye, mpo ya kosala engebene na maloba ma etinda ya ye, komilakisaka epai ya bango ba bondimi bokasi, mpe mayele ma sikisiki o lolenge na lolenge la bonzambe.

31 Mpe lotomo la mosala mwa bango lozali kobianga bato epai ya boyamboli, mpe mpo ya kokokisa mpe kosala mosala mwa boyokani bwa Tata, boye asali epai ya bana ba bato, mpo ya kolengele nzela o ntei ya bana ba bato, na kosakolaka liloba lya Klisto epai ya sani iponomo ya Nkolo, ete bakoka kotatola ye.

32 Mpe na kosalaka boye, Nkolo Nzambe alengeli nzela ete etikali ya bato bakoka kozala na bondimi na Klisto, ete Molimo Mosantu mozala na esika o mitema mya bango, engebene na nguya ya ye; mpe nsima ya lolenge loye ememi Tata kosala mayokani maye asali epai ya bana ba bato.

33 Mpe Klisto alobi: Soko bozali na bondimi na ngai bokozala na nguya ya kosala eloko kani elongobani na ngai.

34 Mpe alobi: Yambolani bino banso nsuka ya mabele, mpe yakani epai ya ngai, mpe batisamani o nkombo ya ngai, mpe zalani na bondimi na ngai, ete bobikisama.

35 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, soko eye ezali ete makambo maye mazali ma solo maye nalobi epai ya binso, mpe Nzambe akolakisa epai ya bino, na nguya mpe na nkembo enene o mokolo mwa nsuka, ete mazali ma solo, mpe soko mazali ma solo mokolo mwa makamwisi mosili?

36 To banzelu basilisi kobima epai ya bana ba bato? To elongoli ye nguya ya Molimo Mosantu uta na bango, to akosala yango, lokola ntango ekowumela, to mabele makoteleme, to ekozala moto moko likolo lya etando ya mango mpo ya kobikisama?

37 Tala nalobi epai ya bino, Te; mpo ezali na bondimi makamwisi masalemi, mpe ezali na bondimi ete banzelu babimi mpe basali epai ya bato; yango wana, soko makambo maye masili lisuma ezali epai ya bana ba bato, mpo ezali na ntina ya bozangi bondimi, mpe enso ezali mpamba.

38 Mpo moto te akoki kobikisama, engebene na maloba ma Klisto, longola se soko azali na bondimi o nkombo ya ye; yango wana soko makambo maye masili, nde bondimi bosili lokola; mpe nsomo ezali bozali bwa moto, mpo bazali lokola soko bosikoli bosalemi te.

39 Kasi tala, bandeko balingami ba ngai, nasambisi makambo malamu mingi na bino, mpo nasambisi ete bozali na bondimi na Klisto na ntina ya bosokemi bwa bino; mpo soko bozali na bondimi na ye te nde bokoki te kotangema o ntei ya bato ba eklezia ya ye.

40 Mpe lisusu, bandeko balingami ba ngai, nalingi koloba epai ya bino etali elikia. Boniboni bokoki kokoma epai ya bondimi, longola se soko bozali na elikia?

41 Mpe mpo ya nini ete bokozala na elikia? Tala nalobi epai ya bino ete bokozala na elikia na nzela ya botumbolami bwa Klisto mpe na nguya ya bosekwi bwa ye, mpo ya kosekwisama epai ya bomoi bwa seko, mpe eye na ntina ya bondimi bwa bino na ye engebene na elako.

42 Yango wana, soko moto moko azali na bondimi esengeli mpenza azala na elikia; mpo na bozangi bondimi, ekoki te kozala elikia.

43 Mpe lisusu, tala nalobi epai ya bino ete akoki te kozala na bondimi mpe elikia, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mikita.

44 Soko te, bondimi mpe elikia ya ye ezali mpamba, mpo moko te ayambami liboso lya Nzambe, longola se soko azali mosokemi mpe na motema mokita; mpe soko moto moko azali mosokemi mpe na motema mokita, mpe andimi na nguya ya Molimo Mosantu ete Yesu azali Klisto, asengeli mpenza kozala na lolango; mpo soko azali na lolango te azali eloko te; yango wana asengeli mpenza kozala na lolango.

45 Mpe lolango azali motema molai, mpe azali boboto, aluli te, mpe avimbani te o lolendo, aluki ya yemei te, atumolami mpambampamba te, akanisi bobe te, mpe asepeli o bobe te kasi asepeli o bosolo, akangi motema na makambo manso, andimi makambo manso, alikii makambo manso, atii molende o makambo manso.

46 Yango wana, bandeko balingami ba ngai, soko bozangi lolango, bozali eloko te, mpo lolango lolembi mokolo moko te. Yango wana, kangamani epai ya lolango, loye lozali lonene mingi koleka inso, mpo biloko binso bikolembe—

47 Kasi lolango lozali bolingo bwa peto bwa Klisto, mpe botii molende libela; mpe oyo amononi kozalaka na lango o mokolo mwa nsuka, ekozala bolamu na ye.

48 Yango wana, bandeko balingami ba ngai, sambelani epai ya Tata na makasi manso ma motema mwa bino, ete bokoka kotonda na bolingo boye, boye apesi epai ya baye banso bazali balandi ba solo ba Mwana Mobali wa ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana babali ba Nzambe, ete ekobima ye tozala bo ye, mpo tokomono ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikia eye; ete topetolama, kutu lokola azali peto. Amene.