Makomi
Moloni 9


Monkanda mwa mibale mwa Molomoni epai ya mwana mobali wa ye, Moloni.

Kokwaka mokapo 9.

Mokapo 9

Banefi mpe Balamani lokola bokomi babeba mpe bapolo—Baniokoli mpe bobomi—Molomoni asambeli ete ngolu mpe bolamu bokoka kozala likolo lya Moloni libela. Penepene na 401–421 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mwana mobali molingami wa ngai, nakomi epai ya yo lisusu ete okoka koyeba ete nazali naino na bomoi; kasi nakomi mwa moke eye ezali mpasi.

2 Mpo tala, nazalaka na etumba yoko ya nsomo na Balamani, o yango tolongaki te; mpe Alikitusi akwei na mopanga, mpe Lulami mpe lisusu Emiloni; iyo, tobungisi motango monene mwa bato baponomo ba biso.

3 Mpe sikawa tala, mwana mobali wa ngai, nabangi mbele Balamani babebisa bato baye; mpo bayamboli te, mpe Satana alamusi bango ntango inso na nkanda bango na bango.

4 Tala, nazali kosalaka elongo na bango ntango inso; mpe elobi ngai liloba lya Nzambe na polele balengi mpe basiliki na ngai; mpe esaleli ngai polele te bayeisi mitema mya bango mikasi na lyango; yango wana, nabangi mbele Molimo mwa Nkolo atiki kobunda elongo na bango.

5 Mpo basiliki boye mpenza ete namoni lokola bazali te na bobangi bwa liwa; mpe babungisi bolingo bwa bango, moko ona mosusu; mpe bazali na mposa ya makila mpe bobekoli ntango inso.

6 Mpe sikawa, mwana mobali molingami wa ngai, ata bokasi bwa mitema mya bango, tosala na etingia; mpo soko tokotika kosala, tokomememe o nse ya botumboli; mpo tozali na mosala mwa kosala o tabelenakele eye ya bodongo, ete tokoka kolonga moyini wa bosembo bonso, mpe kopemisa bozo bwa biso o bokonzi bwa Nzambe.

7 Mpe sikawa nakomi mwa moke etali mpasi ya bato baye. Mpo engebene na boyebi boye nazwi uta na Amolona, tala, Balamani bazali na bato ba boloko mingi, baye bakamataki uta o linongi lya Seliza; izalaki babali, basi, mpe bana.

8 Mpe babali mpe batata ba basi mpe bana bana babomi; mpe baleisaki basi na mosuni mwa babali ba bango, mpe bana na mosuni mwa batata ba bango; mpe mai te longola se mwa ndambo moke, bapesi epai ya bango.

9 Mpe ata bonsomo bonene boye bwa Balamani, eluti te eye ya bato ba biso o Moliatumi. Mpo tala, mingi ya bana basi ba Balamani bakamati bato ba boloko; mpe nsima ya kobotoloko bango ena eye ezalaki ntalo mpe motuya koleka likolo lya biloko binso, bongondo mpe libongi—

10 Ntango esilisaka bango kosala likambo liye, babomaki bango o lolenge loko la nko mingi koteka, koniokoloko nzoto ya bango kutu kina o liwa; esilisaki bango kosala eye, badundaki nzoto ya bango bo mpo ya niama ya zamba, na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango; mpe basali yango mpo ya elembo ya mpiko.

11 O Mwana mobali molingami wa ngai, boniboni ekoki bato boko bo baye, baye bazangi bompenza—

12 (Mpe bobele mwa ndambo moke ya mibu mileki, mpe bazalaki bato boko ba bompenza mpe banzenga)

13 Kasi O mwana mobali wa ngai, boniboni ekoki bato boko bo baye, oyo ya bango elengi ezali o bonsomo boike boye—

14 Boniboni tokoki kozela ete Nzambe apekisa loboko la ye o bosambisi na biso ?

15 Tala, motema mwa ngai mobeleli: Lisuma epai ya bato baye. Bima o bosambisi, O Nzambe, mpe bomba masumu, mpe nkuna, mpe bonsomo bwa bango uta o liboso lya elongi ya yo!

16 Mpe lisusu, mwana mobali wa ngai, izali bazenge mpe bana basi ba bango mingi batikali o Seliza; mpe eteni eye ya bilei biye Balamani bakumbaki te, tala, limpinga lya Zenefi likumbi, mpe batikaki bango koyengayenga wapi bakoki mpo ya bilei; mpe basi babange mingi basenzwi o nzela mpe bakufi.

17 Mpe limpinga liye lizali elongo na ngai lizali litau; mpe mampinga ma Balamani mazali katikati ya Seliza mpe ngai; mpe mingi lokola bakimi o limpinga lya Aloni bakwei o likama lya elulu ya nsomo ya bango.

18 O ebeebe ya bato ba ngai! Bazangi molongo mpe bazangi ngolu. Tala, nazali kaka moto moko, nazali kaka na bokasi bwa moto moko, mpe nakoki lisusu te kotosisa mitindo mya ngai.

19 Mpe bakomi bakasi o ebeebe ya bango; bazali lokola elulu, kobikisaka moko te, mpe mobange te to elenge te; mpe basepeli o eloko enso longola se ena eye ezali elamu; mpe mpasi ya basi ba biso mpe bana ba biso likolo lya etando mobimba ya mboka eye eluti eloko enso; iyo, lolemo lokoki te kolobela, mpe yango ekoki te kokomama.

20 Mpe sikawa, mwana mobali wa ngai, nakofanda lisusu te likolo lya ezaleli eye ya nsomo. Tala, oyebi nkuna ya bato baye; oyebi ete bazangi mobeko, mpe baleki liyoki; mpe nkuna ya bango eluti eye ya Balamani.

21 Tala, mwana mobali wa ngai, nakoki kosengela bango epai ya Nzambe te mbele abete ngai.

22 Kasi tala, mwana mobali wa ngai, nasengeli yo epai ya Nzambe, mpe nalikii na Klisto ete okobikisama; mpe nasambeli epai ya Nzambe ete akobatela bomoi bwa yo, mpo ya kotatola bozongi bwa bato ba ye epai ya ye, to bobebisami nie bwa bango; mpo nayebi ete basengeli kowa longola se soko bayamboli, mpe bazongi epai ya ye.

23 Mpe soko bawei, ekozala bo epai ya Bayelede, na ntina ya nkanza ya mitema mya bango, kolukaka makila mpe bobekoli.

24 Mpe soko ezali boye ete bawei, toyebi ete mingi ya bandeko ba biso bakendeki epai ya Balamani, mpe mingi lisusu bakokende epai ya bango. Yango wana, koma mwa ndambo ya makambo, soko obatelami, mpe nakowa, mpe nakomona yo te; kasi nalikii ete nakoka komono yo lisusu noki; mpo nazali na makundoli ma bule maye nalingi kotika epai ya yo.

25 Mwana mobali wa ngai, zala potongono na Klisto; mpe tika te makambo maye nakomi esala yo mpasi, maleka yo bozito mpo ya liwa; kasi tika Klisto asunga yo, mpe tika mpasi mpe liwa lya ye, mpe bolakisi bwa nzoto ya ye epai ya batata ba biso, mpe ngolu ya ye mpe motema molai mwa ye, mpe elikia ya nkembo ya ye mpe ya bomoi bwa seko, bofanda na makanisi ma yo libela.

26 Mpe tika boboto bwa Nzambe Tata, oyo ya ye ngbende ezali o lola, mpe Nkolo wa biso Yesu Klisto, oyo afandi o loboko la mobali la nguya ya ye, kina biloko binso bikoma biyangelami epai ya ye, azala mpe afanda elongo na yo libela. Amene.