Makomi
Moziya 13


Mokapo 13

Abinadi abatelami na nguya ya bonzambe—Alakisi Mitindo Zomi—Lobiko lokoya na mobeko mwa Mose yango kaka te—Nzambe yemei akosala botumbolami boko mpe akosikola bato ba ye. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa eyokaki mokonzi maloba maye, alobaki epai ya banganga ba ye ete: Mosika na moto oyo, mpe bomani ye; mpo nini tokosala elongo na ye, mpo azali moto wa ligboma.

2 Mpe batelemeki mpe bamekaki kotia maboko ma bango likolo lya ye; kasi apikaki mpende na bango, mpe alobaki epai ya bango:

3 Simbani ngai te, mpo Nzambe akobete bino soko botii maboko ma bino likolo lya ngai, mpo napesi te maloba Nkolo atindaki ngai napesa; mpe nalobeli bino te eye bosengeki ete nalobela; yango wana, Nzambe akotika te ete nabebisama o ntango eye.

4 Kasi nasengeli nakokisa mitindo Nzambe na myango atindaki ngai; mpe zambi nalobelaki bino bosolo bosiliki na ngai. Mpe lisusu, zambi nalobi liloba lya Nzambe bosambisi ngai ete nazali moto wa ligboma.

5 Sikawa esalemaki ete esilisaka Abinadi koloba maloba maye ete bato ba mokonzi Noa bamekaki te kotia maboko ma bango likolo lya ye, mpo Molimo mwa Nkolo azalaki likolo lya ye; mpe elongi ya ye ebandaki kongenge na bongengi boluti, kutu lokola Mose asalaki na ngomba ya Sinai, ntango ezalaki ye kolobaka elongo na Nkolo.

6 Mpe azalaki na nguya mpe bokulaka uta na Nzambe; mpe akobaki maloba ma ye, kolobaka:

7 Bomoni ete bozali na nguya ya koboma ngai, yango wana nasilisi maloba ma ngai. Iyo, mpe namoni ete ekati mitema mya bino zambi nalobeli bino bosolo botali mabe ma bino.

8 Iyo, mpe maloba ma ngai matondisi bino na bokamwi mpe bosutuki, mpe na nkanda.

9 Kasi nasilisi maloba ma ngai; mpe nde ezali likambo te wapi nakokende, soko ezali ete nazwi lobiko.

10 Kasi eye nzike nalobeli bino, nini bokosala na ngai, nsima ya eye, ekozala emoniseli mpe elilingi ya makambo maye makoya.

11 Mpe sikawa nakotangela bino etikali ya mitindo mya Nzambe, mpo namoni ete mikomamaki te o mitema mya bino; namoni ete boyekolaki mpe bolakisaki bobe eteni eleki enene ya bomoi bwa bino.

12 Mpe sikawa, bomikundoli ete nalobaki epai ya bino: Bokosala te epai ya bino elili ekatama, to emoniseli ya biloko biye bizali o lola likolo, to biye bizali o mabele o nse, to biye bizali o mai o nse ya mabele.

13 Mpe lisusu: Okomigumbama te o nse epai ya byango, to kosalela byango; mpo ngai Nkolo Nzambe wa yo nazali Nzambe wa zuwa, nakobimelaka mabe ma batata likolo lya bana, kina o nkola ya isato mpe ya inei epai ya bango baye bakoyina ngai;

14 Mpe kolakisaka ngolu epai ya nkoto na nkoto ya bango baye bakolinga ngai mpe bakobatela mitindo mya ngai.

15 Okokamata nkombo ya Nkolo Nzambe wa yo na mpamba te; mpo Nkolo akomono te azangi elindo ye oyo akokamata nkombo ya ye na mpamba.

16 Omikundola saba ete obatela yango esantu.

17 Mikolo mitoba okosala, mpe okosala mosala monso mwa yo.

18 Kasi mokolo mwa nsambo, saba ya Nkolo Nzambe wa yo, okosala mosala moko te, yo, to mwana mobali wa yo, to mwana mwasi wa yo, mosali wa yo wa mobali to mosali wa yo wa mwasi, to ebwele ya yo, to mopaya oyo azali o kati ya ekuke ya yo;

19 Mpo mikolo mitoba Nkolo asalaki lola mpe mabele, mpe mbu, mpe inso iye o yango izali; yango wana Nkolo apambolaki mokolo mwa saba, mpe abulisaki yango.

20 Kumisa tata wa yo mpe mama wa yo, ete mikolo mya yo mizala milai o mboka eye Nkolo Nzambe wa yo apesi yo.

21 Okoboma te.

22 Okosala ekobo te. Okoyiba te.

23 Okoloba litatoli lya lokuta na moto wa penepene na yo te.

24 Okolula ndako ya moto wa penepene na yo te, okolula mwasi wa moto wa penepene na yo te, to mosali wa ye wa mobali, to mosali wa ye wa mwasi te, to ngombe mobali ya ye te, to mpunda ya ye te, to eloko enso eye ezali ya moto wa penepene na yo te.

25 Mpe esalemaki ete esilisaka Abinadi kotia nsuka ya maloba maye, maye alobaki epai ya bango: Elakisaki bino bato baye ete basengeli kotosa kosala makambo manso maye mpo ya kobatela mitindo miye?

26 Nakoloba epai ya bino, Te; mpo soko bosalaka, Nkolo alingaki te kosala ngai koya kobikula mabe matali bato baye.

27 Mpe sikawa bolobaki ete lobiko lokoya na mobeko mwa Mose. Nalobi epai ya bino ete elongobani ete bobatela mobeko mwa Mose lokola sikawa; kasi nakoloba epai ya bino, ete ntango ekoya ekolongobana lisusu te kobatela mobeko mwa Mose.

28 Mpe lisusu, nalobi epai ya bino, ete lobiko lokoya na mobeko mwango moko te; mpe soko ezalaki te mpo ya botumbolami, oyo Nzambe yemei akosala mpo ya masumu mpe mabe ma bato ba ye, ete basengeli na ntembe te kowa, ata mobeko mwa Mose mozali.

29 Mpe sikawa nakoloba epai ya bino ete elongobanaki ete ezala mobeko moko mopesama na bana ba Yisalaele, iyo, kutu mobeko mwa sikisiki mpenza; mpo bazalaki bato ba nkanza, mbangu na kosala bobe, mpe malembe na komikundola Nkolo Nzambe wa bango;

30 Yango wana epesamaki bango mobeko moko, iyo, mobeko moko mwa makokisi mpe makuli, mobeko moko moye basengelaki kotosa na sikisiki mokolo na mokolo, mpo ya kobatela bango o bokundoli bwa Nzambe mpe lotomo la bango ona ye.

31 Kasi tala, nakoloba epai ya bino, ete makambo manso maye mazalaki emoniseli ya makambo maye makoya.

32 Mpe sikawa, esosoli bango mobeko? Nakoloba epai ya bino, Te, basosoli te banso mobeko; mpe eye na ntina ya bokasi bwa mitema mya bango; mpo basosolaki te ete ekokaki moko te kobika longola se soko ezali na bosikoli bwa Nzambe.

33 Mpo tala, ebikulaki Mose te epai ya bango etali boyei bwa Masiya, mpe ete Nzambe akosikola bato ba ye? Iyo, mpe kutu baprofeta banso baye babikulaki uta mokili ebanda—elobelaki bango te mingi to moke etali makambo maye?

34 Elobaki bango te ete Nzambe yemei akokita o ntei ya bana ba bato, mpe akozwa likolo lya ye lolenge la moto, mpe akotambola na nguya mpenza likolo lya etando ya mabele?

35 Iyo, mpe elobaki bango te lisusu ete akomeme esalema bosekwi bwa bakufi, mpe ete ye, yemei, akokakema mpe akotungisama?