Makomi
Moziya 15


Mokapo 15

Boniboni Klisto azali Tata mpe Mwana Mobali lokola—Akosala libondeli mpe akokumba bobuki mobeko bwa bato ba ye—Bango mpe baprofeta basantu banso bazali nkona ya ye—Akosala esalema Bosekwi—Bana bake bazali na bomoi bwa seko. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa Abinadi alobaki epai ya bango: Nalingi ete bososola ete Nzambe yemei akokita o ntei ya bana ba bato, mpe akosikola bato ba ye.

2 Mpe zambi akofanda o mosuni akobiangema Mwana Mobali wa Nzambe, mpe koyangelamisaka nzoto o bolingi bwa Tata, kozalaka Tata mpe Mwana Mobali—

3 Tata, zambi ayingisamaki o zemi na nguya ya Nzambe; mpe Mwana Mobali, na ntina ya mosuni; boye kokomaka Tata mpe Mwana Mobali—

4 Mpe bazali Nzambe moko, iyo, Tata mpenza wa Seko wa lola mpe wa mabele.

5 Mpe boye mosuni kokomaka moyangelami na Molimo, to Mwana Mobali na Tata, kozalaka Nzambe moko, akoyoka mpasi ya lisenginia, mpe akomitika te na lisenginia, kasi andimi yemei atiolama, mpe abeteme, mpe abwakama libanda, mpe asundolama na bato ba ye.

6 Mpe nsima ya enso eye, nsima ya kosalaka makamwisi ma nguya mingi o ntei ya bana ba bato, akokambema, iyo, kutu lokola Yisaya alobaki, lokola mpate liboso lya mokati nsuki ya ye azali baba, boye afungolaki te monoko mwa ye.

7 Iyo, kutu boye akokambema, akobakema o ekulusu, mpe akobomama, mosuni kokomaka moyangelami kutu kina o liwa, bolingi bwa Mwana Mobali kominamaka na bolingi bwa Tata.

8 Mpe boye Nzambe akati nkanga ya liwa, kolongaka elonga likolo lya liwa; kopesaka Mwana Mobali nguya mpo ya kobondela mpo ya bana ba bato—

9 Komataka o kati ya lola, kozalaka na nsopo ya ngolu; kotondisamaka na mawa ona bana ba bato; kotelemeke o kati ya bango mpe boyengebene; ekati ye nkanga ya liwa, ememeki likolo lya yemei bobe mpe bobuki mobeko bwa bango, esikoli ye bango, esepelisi ya bisenge bya boyengebene.

10 Mpe sikawa nakoloba epai ya bino, nani akosakola nkola ya ye? Tala, nalobi epai ya bino, ete esalemi bozo bwa ye libonza mpo ya lisumu akomono nkona ya ye. Mpe sikawa nini elobi bino? Mpe nani akozala nkona ya ye?

11 Tala nalobi epai ya bino, ete onso oyo ayokaki maloba ma baprofeta, iyo, baprofeta basantu banso baye babikulaki mpo ya boyei bwa Nkolo—Nalobi epai ya bino, ete bango banso baye bayokaki maloba ma bango, mpe bandimaki ete Nkolo akosikola bato ba ye, mpe batalaki o boso o mokolo mona mpo ya bolimbisi bwa masumu ma bango, nakoloba epai ya bino, ete bango baye bazali bato ba nkona ya ye, to bazali basangoli ba bokonzi bwa Nzambe.

12 Mpo bango bazali baye ya bango masumu makumbamaki; bango bazali baye mpo ya nani akufaki, mpo ya kosikola bango uta o bobuki mobeko bwa bango. Mpe sikawa, ezali te nkona ya ye?

13 Iyo, mpe ezali te baprofeta, moko na moko oyo afungolaki monoko mwa ye mpo ya kobikula, oyo akweyaki te o kati ya bobuki mobeko; nalingi koloba baprofeta basantu banso kala uta mokili ebanda? Nakoloba epai ya bino ete bazali nkona ya ye.

14 Mpe bango bazali baye basakolaki kimia, baye bamemeki nsango elamu ya bolamu, baye basakolaki lobiko; mpe balobaki epai ya Siona: Nzambe wa yo akonzi!

15 Mpe O boniboni kitoko likolo lya ngomba ezalaki makolo ma bango!

16 Mpe lisusu, boniboni kitoko likolo lya ngomba ezalaki makolo ma bango baye bazali naino kosakolaka kimia!

17 Mpe lisusu, boniboni kitoko likolo lya ngomba ezalaki makolo ma bango baye bakosakola banda sikawa kimia, iyo, uta o ntango eye sikawa mpe libela!

18 Mpe tala, nalobi epai ya bino, eye ezali enso te. Mpo O boniboni kitoko likolo lya ngomba ezali makolo ma ye oyo akomeme nsango elamu, oyo azali mobandi wa kimia, iyo, kutu Nkolo, oyo asikolaki bato ba ye; iyo, ye oyo apesaki lobiko epai ya bato ba ye;

19 Mpo ezalaka te mpo ya bosikoli boye asalaki mpo ya bato ba ye, boye bolengelemeki uta o bokelami bwa mokili, nakoloba epai ya bino, ezalaka te mpo ya eye, bato banso basengelaki kowa.

20 Kasi tala, nkanga ya liwa ekokatama, mpe Mwana Mobali akonzi, mpe akozala na nguya likolo lya bakufi; yango wana, amemi esalema bosekwi bwa bakufi.

21 Mpe ekoya bosekwi boko, kutu bosekwi bwa yambo; iyo, kutu bosekwi boko bwa baye bazalaki, mpe baye bazali, mpe baye bakozala, kutu kina o bosekwi bwa Klisto—mpo boye ekobiangema ye.

22 Mpe sikawa, bosekwi bwa baprofeta banso, mpe bango banso baye bakondima na maloba ma bango, to bango banso baye bakobomba mitindo mya Nzambe, bakoya o bosekwi bwa yambo; yango wana, bazali bosekwi bwa yambo.

23 Bakosekwisama mpo ya kofanda elongo na Nzambe oyo asikolaki bango; boye bazali na bomoi bwa seko na Klisto, oyo akataki nkanga ya liwa.

24 Mpe baye bazali bango baye bazali na eteni o bosekwi bwa yambo; mpe baye bazali baye bakufaki yambo Klisto aya, o bozangi boyebi bwa bango, esakolamaki naino te lobiko epai ya bango. Mpe boye Nkolo amemi bozongisi bwa bango; mpe bazali na eteni o bosekwi bwa yambo, to bazwi bomoi bwa seko, kosikolamaka na Nkolo.

25 Mpe bana bake bakozwa lokola bomoi bwa seko.

26 Kasi talani, mpe bangani, mpe lengeni liboso lya Nzambe, mpo bosengelaki kolenge; mpo Nkolo asikola moko te wa lolenge loye baye bakotomboka na ye mpe bakokufa o masumu ma bango; iyo, kutu bango banso baye bawaki o masumu ma bango naino uta mokili ebanda, baye na nko batombokaki na Nzambe, baye bayebaki mitindo mya Nzambe, mpe babatelaki myango te; baye bazali bango baye bakosangana te o bosekwi bwa yambo.

27 Yango wana esengeli yo kolenge te? Mpo lobiko lokoya na moko te wa lolenge loye; mpo Nkolo asikoli moko te wa lolenge loye; iyo, mpe Nkolo akoki kosikola moko te wa lolenge loye; mpo akoki te kowangana yemei; mpo akoki te kowangana boyengebene ezali byango na likoki lya yango.

28 Mpe sikawa nalobi epai ya bino ete ntango ekoya eye lobiko la Nkolo lokosakolama o ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato.

29 Iyo, Nkolo, basinzili ba yo, bakotombola mongongo mwa bango; na mongongo elongo bakoyemba; mpo bakomono miso na miso, ekomeme Nkolo lisusu Siona.

30 Bukanani o bosepeli, yembani elongo, bino bisika bya mpamba bya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato ba ye, asikoli Yelusaleme.

31 Nkolo asalaki bolumbu loboko la ye losantu o miso mya bikolo binso; mpe nsuka inso ya mabele ekomono lobiko la Nzambe wa biso.