Makomi
Moziya 18


Mokapo 18

Alama alakisi na nkuku—Alimboli boyokani bwa libatisi mpe abatisi na mai ma Molomoni—Abongisi Eklezia ya Klisto mpe akulisi banganga—Bamisalisi bangomei mpe balakisi bato—Alama mpe bato ba ye bakimi uta na Mokonzi Noa o kati ya esobe. Penepene na 147–145 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete Alama, oyo akimaki uta na basali ba mokonzi Noa, ayambolaki masumu mpe mabe ma ye, mpe akendeki zingazinga na nkuku o ntei ya bato, mpe abandaki kolakisa maloba ma Abinadi—

2 Iyo, maye matali eye ekoya, mpe lisusu maye matali bosekwi bwa bakufi, mpe bosikoli bwa bato, boye bokoya na nguya, mpe mpasi, mpe liwa lya Klisto, mpe bosekwi bwa ye mpe bobuti bwa ye o lola.

3 Mpe mingi lokola balingaki koyoka liloba lya ye ateyaki. Mpe alakisaki bango na nkuku, ete ekokaki te koya o boyebi bwa mokonzi. Mpe mingi bandimaki maloba ma ye.

4 Mpe esalemaki ete mingi bandimaki ye bakendeki o esika yoko eye ebiangemi Molomoni, ezwaki nkombo ya yango uta na mokonzi, ezalaki na ndelo ya mboka inialangisama, o ntango to o eleko, na niama ya zamba.

5 Sikawa, ezalaki o Molomoni liziba lyoko lya mai ma peto, mpe Alama akendeki kuna, kuna ezalaki penepene na mai ebolo ya nzete ike, esika amibombaki o ntango ya moi uta o boluki bwa bato ba Mokonzi.

6 Mpe esalemaki ete mingi lokola bandimaki ye bakendeki kuna mpo ya koyoka maloba ma ye.

7 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi motango moko monene basanganaki elongo o esika ya Molomoni, mpo ya koyoka maloba ma Alama. Iyo, banso basanganaki elongo baye bandimaki maloba ma ye, mpo ya koyoka ye. Mpe alakisaki bango, mpe alakisaki epai ya bango boyamboli, mpe bosikoli, mpe bondimi likolo lya Nkolo.

8 Mpe esalemaki ete alobaki epai ya bango: Talani, awa ezali mai ma Molomoni yango oyo (mpo boye mango mabiangemaki), mpe sikawa, lokola bozali na mposa ya kokota o kati ya etonga ya Nzambe, mpe kobiangema bato ba ye, mpe bozali kondima komeme mikumba mya bino na bino, ete mikoka kozala pepele;

9 Iyo, mpe bozali kondima kolela elongo na baye bakolela; iyo, mpe kobondisa baye batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelemeke lokola banzeneneke ba Nzambe o ntango inso mpe o makambo manso, mpe o bisika binso bokoka kozala, kutu kina liwa, ete bokoka kosikolama na Nzambe, mpe kotangema elongo na bango ba bosekwi bwa yambo, ete bokoka kozwa bomoi bwa seko—

10 Sikawa nakoloba epai ya bino, soko eye ezali mposa ya mitema mya bino, nini ekopekisa bino bobatisama o nkombo ya Nkolo, lokola litatoli liboso lya ye ete bokoti o kati ya boyokani elongo na ye, ete bokosalela ye mpe bokobatela mitindo mya ye, ete akoka kosopa libanda molimo mwa ye mingi koleka likolo lya bino?

11 Mpe sikawa, eyokaka bato maloba maye, babeteki maboko ma bango mpo ya bosepeli, mpe bagangaki: Eye ezali mposa ya mitema mya biso.

12 Mpe sikawa esalemaki ete Alama akamataki Helama, ye kozalaka moko wa yambo, mpe akendeki mpe atelemeki o mai, mpe abelelaki, kolobaka: O Nkolo, sopa Molimo mwa yo likolo lya mosali wa yo, ete akoka kosala mosala moye na bosantu bwa motema.

13 Mpe elobaka ye maloba maye, Molimo mwa Nkolo azalaki likolo lya ye, mpe alobaki: Helama, nakobatisa yo, kozalaka na bokulaka uta na Nzambe wa Bokasi Bonso, lokola litatoli lyoko ete okoti o kati ya boyokani mpo ya kosalela ye kina okokufa lokola nzoto ya kufa; mpe tika Molimo mwa Nkolo asopana likolo lya yo; mpe tika apesa epai ya yo bomoi bwa seko, na bosikoli bwa Klisto, bwango alengeleki uta o bokelami bwa mokili.

14 Mpe esilisaka Alama koloba makambo maye, Alama mpe Helama lokola bakundamaki o mai; mpe batelemeki mpe babimaki na mai kosepelaka, etondisamaki bango na Molimo.

15 Mpe lisusu, Alama akamataki mosusu, mpe akendeki mbala yoko ya ibale o kati ya mai, mpe abatisaki ye engebene na ya yambo, kasi akundamaki yemei lisusu te o mai.

16 Mpe nsima ya lolenge loye abatisaki moko na moko oyo akendeki o esika ya Molomoni; mpe bazalaki motuya penepene na bato nkama ibale na inei; iyo, mpe babatisamaki o mai ma Molomoni, mpe batondisamaki na boboto bwa Nzambe.

17 Mpe babiangemaki eklezia ya Nzambe, to eklezia ya Klisto, uta o ntango ena. Mpe esalemaki ete onso oyo abatisamaki na nguya mpe bokulaka bwa Nzambe abakisamaki o eklezia ya ye.

18 Mpe esalemaki ete Alama, ezalaki ye na bokulaka uta na Nzambe, akulisaki banganga; kutu nganga moko mpo ya tuku mitanu na tuku mitanu ya motango mwa bango akulisaki mpo ya kolakisa epai ya bango, mpe mpo ya kolakisa bango makambo matali bokonzi bwa Nzambe.

19 Mpe atindaki bango ete balakisa eloko esusu te longola se soko ezalaki makambo maye alakisaka, mpe maye malobamaki na monoko mwa baprofeta basantu.

20 Iyo, atindaki bango ete bateya eloko esusu te longola se soko ezalaki boyamboli mpe bondimi likolo lya Nkolo, oyo asikolaka bato ba ye.

21 Mpe atindaki bango ete ezala boswani te bango na bango, kasi ete batalela o boso na miso moko, kozalaka na bondimi boko mpe libatisi lyoko, kozalaka na mitema mya bango misangana elongo o bomoko mpe o bolingo bango na bango.

22 Mpe boye atindaki bango bateya. Mpe boye bakomaki bana ba Nzambe.

23 Mpe atindaki bango ete batosa saba, mpe babatela yango esantu, mpe lisusu mokolo na mokolo bapesa matondi na Nkolo Nzambe wa bango.

24 Mpe atindaki bango lisusu ete banganga baye akulisaka basala na maboko ma bangomei mpo ya lisalisi lya bango.

25 Mpe ezalaki mokolo moko o mposo na mposo moye motiamaki mpembeni ete basangana bangomei elongo mpo ya kolakisa bato, mpe kokumbamela Nkolo Nzambe wa bango, mpe lisusu, mbala mingi lokola ezalaki na nguya ya bango, koyangana bangomei elongo.

26 Mpe banganga basengelaki te koyekeme likolo lya bato mpo ya lisalisi lya bango; kasi mpo ya mosala mwa bango basengelaki kozwa boboto bwa Nzambe, ete bakoka koyika bokasi o molimo, kozalaka na boyebi bwa Nzambe, ete bakoka kolakisa na nguya mpe bokulaka bwa Nzambe.

27 Mpe lisusu Alama atindaki ete bato ba eklezia bakaba eteni ya biloko bya bango, moko na moko engebene na eye azwaka; soko azali na mingi koleka akokaba mingi koleka; mpe na oyo azalaka kaka na moke, nde moke esengemeki; mpe na oyo azangaka esengelaki apesama.

28 Mpe boye bakabolaki eteni ya biloko bya bango na bolingi bwa bonsomi bwa bangomei mpe mposa ilamu ona Nzambe, mpe na banganga baye batelemeki na bozangi, iyo, mpe na oyaso oye azangi, bozo botaka.

29 Mpe eye alobaki epai ya bango, etindamaki ye na Nzambe; mpe batambolaki na alima liboso lya Nzambe, kokabanaka biloko o ntango mpe o molimo lokola engebene na bozangi mpe bisenge bya bango.

30 Mpe sikawa esalemaki ete enso eye esalemaki o Molomoni, iyo, mpembeni ya mai ma Molomoni, o zamba ezalaki mpembeni ya mai ma Molomoni; iyo, esika ya Molomoni, mai ma Molomoni, zamba ya Molomoni, boniboni kitoko ezalaki o miso mya baye bayaki kuna mpo ya boyebi bwa Mosikoli wa bango; iyo, mpe boniboni bapambolami, mpo bakoyemba mpo ya bosanzoli bwa libela.

31 Mpe makambo maye masalemaki o ndelo ya mboka, ete makokaki te koya o boyebi bwa mokonzi.

32 Kasi tala, esalemaki ete mokonzi, ebombolaki ye moningi o ntei ya bato, atindaki basali ba ye mpo ya kosenzele bango. Yango wana o mokolo moye bayanganaki bangomei elongo mpo ya koyoka liloba lya Nkolo babombolamaki na mokonzi.

33 Mpe sikawa Mokonzi alobaki ete Alama azalaki kolamusa bato mpo ya botomboki na ye; yango wana atindaki limpinga lya ye mpo ya kobebisa bango.

34 Mpe esalemaki ete Alama elongo na bato ba Nkolo bayebisamaki na boyei bwa limpinga lya mokonzi; yango wana bakamataki biema bya bango mpe mabota ma bango mpe bakendeki o kati ya esobe.

35 Mpe bazalaki na motuya penepene na bato nkama inei na tuku itano.