Makomi
Moziya 1


Buku ya Moziya

Mokapo 1

Mokonzi Benyamina alakisi bana babali ba ye lokota mpe mabikuli ma batata ba bango—Eyamba mpe bompenza bwa bango bobatelamaki na ntina ya makundoli mabombama likolo lya palaki ya ndenge mingi—Moziya aponomi lokola mokonzi mpe apesami bokengeli bwa makundoli mpe biloko bisusu. Penepene na 130–124 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa ezalaki lisusu te boswani o mboka mobimba ya Zalayemila, o ntei ya bato banso baye bazalaki ba mokonzi Benyamina, boye ete mokonzi Benyamina azalaki na kimia ya ntango inso o etikali enso ya mikolo mya ye.

2 Mpe esalemaki ete azalaka na bana basato; mpe abiangaki nkombo ya bango Moziya, Elolumi, mpe Elamani. Mpe asalaki ete balakisama na lokota lonso la batata ba ye, ete na yango bakoka kokoma bato ba bososoli; mpe ete bakoka koyeba etali mabikuli maye malobamaki na minoko mya batata ba bango, maye mapesamaki bango na loboko la Nkolo.

3 Mpe lisusu alakisaki bango etali makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, kolobaka: Bana babali ba ngai, nalingi ete bomikundola ete ezalaka palaki iye te, iye ikwi makundoli mpe mitindo miye, tosengelaki koyoka mpasi na bozangi boyebi, kutu o ntango ya lelo, koyebaka te mibombamo mya Nzambe.

4 Mpo ekokaki kosalema te ete tata wa biso, Lehi, akokaki komikundola lisusu makambo maye manso, mpo ya kolakisa mango na bana ba ye, longola se soko ezalaki na lisalisi lya palaki iye; mpo elakisamaki ye na lokota la Baejipito yango wana akokaki kotanga minkoma miye, mpe kolakisa myango na bana ba ye, ete boye bakokaki kolakisa yango na bana ba bango, mpe boye kokokisaka mitindo mya Nzambe, kutu kina o ntango ya lelo.

5 Nakoloba epai ya bino, bana babali ba ngai, ezalaka te mpo ya biloko biye, biye bibombamaki mpe bibatelamaki na loboko la Nzambe, ete tokoka kotanga mpe kososola mibombamo mya ye, mpe kozala na mitindo mya ye ntango inso liboso lya miso mya biso, ete kutu batata ba biso balingaki kokulumwa o bozangi bondimi, mpe tolingaki kozala bo bandeko ba biso, Balamani, baye bayebi eloko te etali makambo maye, to kutu bandimi mango te, elakisamaki bango mango, na ntina ya mimeseno mya batata ba bango, miye milongobani te.

6 O bana ba ngai, nalingi ete bomikundola ete maloba maye mazali ma solo, mpe lisusu ete makundoli maye mazali ma solo. Mpe tala, lisusu palaki ya Nefi, iye ikwi makundoli mpe maloba ma batata ba biso uta o ntango batikaki Yelusaleme kina sikawa, mpe mazali ma solo; mpe tokoki koyeba sikisiki ya mango zambi tozali na yango liboso lya miso mya biso.

7 Mpe sikawa, bana babali ba ngai, nalingi ete bomikundola koluka yango na etingia, ete bokoka kozwa litomba na yango; mpe nalingi ete bobatela mitindo mya Nzambe, ete bokoka kozwa bomengo o mboka engebene na bilako biye Nkolo asalaki epai ya batata ba biso.

8 Mpe makambo mingi masusu mokonzi Benyamina alakisaki bana babali ba ye, maye makomami o buku iye te.

9 Mpe esalemaki ete esilisaka mokonzi Benyamina kotia nsuka yoko ya kolakisaka bana babali ba ye, ete akomaki mobange, mpe amonoki ete asengelaki mosika te kokende nzela ya mabele manso; yango wana, akanisaki yango elongobanaki ete apesa bokonzi likolo lya moko wa bana babali ba ye.

10 Yango wana, asalaki Moziya amememe liboso lya ye; mpe iye izali maloba maye alobaki epai ya ye, kolobaka: Mwana mobali wa ngai, nalingi ete osala esakola yoko o ntaka ya mboka eye mobimba o ntei ya bato banso baye, to bato ba Zalayemila, mpe bato ba Moziya baye bafandi o mboka, ete na yango bakoka kosangana elongo; mpo, o mokolo mwa nsima nakosakola epai ya bato ba ngai baye na monoko mwa ngaimei ete ozali mokonzi moko mpe moyangeli moko likolo lya bato baye, baye Nkolo Nzambe wa biso apesaki biso.

11 Mpe lisusu, nakopesa bato baye nkombo yoko, ete na yango bakoka kokesenisama likolo lya bato banso baye Nkolo Nzambe amemeki libanda lya mboka ya Yelusaleme; mpe eye nakosala zambi bazalaki bato ba etingia na kobatelaka mitindo mya Nkolo.

12 Mpe nakopesa epai ya bango nkombo yoko eye mokolo moko te ekolongolama mpenza, longola se soko ezali o nzela ya bobuki mobeko.

13 Iyo, mpe lisusu nakoloba epai ya yo, ete soko bato baye basungama mpenza na Nkolo bakwei o kati ya bobuki mobeko, mpe bakomi bato boko ba nkuna mpe bato ba ekobo, ete Nkolo akotika bango, ete na yango bakoma batau bo bandeko ba bango; mpe akobatela bango lisusu te na nguya ya ye ezanga emekiseli mpe ya bokamwi, lokola kina sikawa abatelaki batata ba biso.

14 Mpo nakoloba epai ya yo, ete soko atandolaki te loboko la ye na kobatelaka batata ba biso basengelaki kokweya o kati ya maboko ma Balamani, mpe kokoma miboma mya boyini bwa bango.

15 Mpe esalemaki ete esilisaka mokonzi Benyamina kotia nsuka ya bolobi boye na mwana wa ye, ete apesaki ye mokumba motali makambo manso ma bokonzi.

16 Mpe lisusu, apesaki ye lokola mokumba motali makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako; mpe lisusu palaki ya Nefi; mpe lisusu, mopanga mwa Labana, mpe libungutulu to mokambi, eye ekambaki batata ba biso o katikati ya esobe, eye elengelemeki na loboko la Nkolo ete na yango bakokaki kokambema, moko na moko engebene na bokebi mpe etingia eye bapesaki epai ya ye.

17 Yango wana, lokola bazangaki bondimi bazwaki bomengo te to botomboli o mobembo mwa bango, kasi bazongisamaki nsima, mpe bamilukelaki nkanda ya Nzambe likolo lya bango; mpe yango wana babetemeki na nzala mpe matungisi ma nsomo, mpo ya kolamusa bango o bokundoli bwa lotomo la bango.

18 Mpe sikawa, esalemaki ete Moziya akendeki mpe asalaki lokola tata wa ye atindaka ye, mpe asakolaki epai ya bato banso baye bazalaki o mboka ya Zalayemila ete na yango bakokaki komisangisa elongo; mpo ya kokende o tempelo koyoka maloba maye tata wa ye akoloba epai ya bango.