Makomi
Moziya 2


Mokapo 2

Mokonzi Benyamina alobeli bato ba ye—Asangeli lisusu alima, malonga, mpe bolimo bwa bokonzi bwa ye—Apesi bango toli mpo ya kosalela Mokonzi wa bango wa Lola—Baye bakotomboka na Nzambe bakoyoka mpasi ya nsomo bo moto mokozima te. Penepene na 124 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete esilisaka Moziya kosala lokola Tata wa ye atindaki ye, mpe kosala esakola yoko o ntaka ya mboka mobimba, ete bato basanganaki bangomei elongo o ntaka ya mboka mobimba, ete bamataki o tempelo mpo ya koyoka maloba maye mokonzi Benyamina alingaki koloba epai ya bango.

2 Mpe ezalaki motango moko monene, kutu boye mingi ete batangaki bango te; mpo bayikanaki mpenza mpe bakolaki o bonene o mboka.

3 Mpe bakamataki mobotami wa yambo ya bibwele bya bango, ete bakoka kobonza libonza mpe mabonza matumbama engebene na mobeko mwa Mose;

4 Mpe lisusu ete bakoka kopesa matondi na Nkolo Nzambe wa bango, oyo amemeki bango libanda lya mboka ya Yelusaleme, mpe oyo abikisaki bango libanda lya maboko ma bayini ba bango, mpe aponoki bato bayengebene mpo ya kozala balakisi ba bango, mpe lisusu moto moko moyengebene mpo ya kozala mokonzi wa bango, oyo atiaki kimia o mboka ya Zalayemila, mpe oyo alakisaki bango kobatela mitindo mya Nzambe, ete bakoka kosepela mpe kotonda na bolingo ona Nzambe mpe bato banso.

5 Mpe esalemaki ete ntango bakomaki o tempelo, batelemisaki biema bya bango zingazinga mpembeni, moto na moto engebene na libota lya ye, kokwaka mwasi wa ye, mpe bana babali ba ye, mpe bana basi ba ye, mpe bana babali ba bango, mpe bana basi ba bango, uta na nkulutu kina na leki, libota na libota lizalaki likabwanaki lyoko na lisusu.

6 Mpe batelemisaki biema bya bango zingazinga mpembeni o tempelo, moto na moto kotalisaka ezipelo ya ema ya ye ona tempelo, ete na yango bakokaki kofanda o biema bya bango mpe koyoka maloba maye mokonzi Benyamina alingaki koloba epai ya bango;

7 Mpo ebele ezalaki boye enene ete mokonzi Benyamina akokaki te kolakisa bango banso o ntei ya tempelo, yango wana asalaki ete linongi litelemisama, ete na yango bato ba ye bakokaki koyoka maloba maye akoloba epai ya bango.

8 Mpe esalemaki ete abandaki koloba epai ya bato ba ye uta o linongi; mpe bakokaki te banso koyoka maloba ma ye o ntei ya bango baye bazalaki te o nse ya lokito la mongongo mwa ye, ete bakoka lokola kozwa maloba ma ye.

9 Mpe iye izali maloba maye alobaki mpe asalaki makomama, kolobaka: Bandeko ba ngai, bino banso baye bosangani binomei elongo, bino baye bokoki koyoka maloba ma ngai maye nakoloba epai ya bino mokolo moye; mpo natindi bino te komata awa mpo ya kosakana na maloba maye nakoloba, kasi ete boyokemela epai ya ngai, mpe bofungola matoyi ma bino ete bokoka koyoka, mpe mitema mya bino ete bokoka kososola, mpe mayele ma bino ete mibombamo mya Nzambe mikoka kofungwana o bomoni bwa bino.

10 Natindi bino te komata awa ete bobanga ngai, to ete bomikundola ete ngaimei nazali mingi koleka moto ya kufa.

11 Kasi nazali bo lokola binomei, moyangelami o bokono bwa ndenge inso o nzoto mpe mayele; kasi naponomoki na bato baye, mpe nabulisamaki na tata wa ngai, mpe nazwaki ndingisa na loboko la Nkolo ete nazala moyangeli moko mpe mokonzi moko likolo lya bato baye; mpe nabombamaki mpe nabatelamaki na nguya ya ye ezanga emekiseli, mpo ya kosalela bino na bokasi, mayele mpe makasi manso maye Nkolo apesaki epai ya ngai.

12 Nalobi epai ya bino ete lokola nazwaki ndingisa mpo ya kolekisa mikolo mya ngai o bosalisi bwa bino, kutu kina o ntango eye, mpe nalukaki wolo te to mpauni te to yoko lolenge la bozwi bwa bino te;

13 Mpe nalingaki te ete bokangema o boloko, to ete bosala bawumbu bino na bino, to ete boboma, to bopunza, to boyiba, to bosala ekobo; to kutu nalingaki te ete bokoka kosala yoko lolenge loko la nkuna, mpe nalakisaki bino ete bokoka kobatela mitindo mya Nkolo, o makambo manso maye atindaki bino—

14 Mpe kutu ngai, ngaimei, nasalaki na maboko ma ngaimei ete nakoka kosalela bino, mpe ete botungisama te na bozito bwa mpako, mpe ete eloko te eya likolo lya bino eye ekozala mpasi mpo ya kokumba—mpe na makambo maye manso maye nalobaki, binomei bozali banzeneneke mokolo moye.

15 Kasi, bandeko ba ngai, nasalaki te makambo maye ete nakoka komilakisa, mpe nalobeli te makambo maye ete na yango nakoka kofunda bino; kasi nalobeli bino makambo maye ete bokoka koyeba ete nakoki koyanola motema moko polele liboso lya Nzambe mokolo moye.

16 Tala, nalobi epai ya bino ete zambi nalobaki epai ya bino ete nalekisaki mikolo mya ngai o mosala mwa bino, nazali na mposa ya komilakisa te, mpo nazalaki mpenza kosalela Nzambe.

17 Mpe tala, nalobeli bino makambo maye ete bokoka koyekola bwania; ete bokoka koyekola ete ezali bino o mosala mwa bazalani ba bino bozali mpenza o mosala mwa Nzambe wa bino.

18 Tala, bobiangaki ngai mokonzi wa bino; mpe soko ngai, oyo bokobianga mokonzi wa bino, nazali kosala mpo ya kosalisa bino, nde esengeli bino te kosala mpo ya kosalisana?

19 Mpe tala lisusu, soko ngai, oyo bobiangi mokonzi wa bino, oyo alekisaki mikolo mya ye o mosala mwa bino, mpe nzokande azalaki o mosala mwa Nzambe, nazali na likoki lya matondi te uta epai ya bino, O boniboni bosengelaki kotonda Mokonzi wa bino wa lola!

20 Nakoloba epai ya bino, bandeko ba ngai, ete soko bokozongisa matondi mpe masanzoli manso maye bozo bwa bino mobimba bozali na nguya ya kozwa, na Nzambe ona oyo akelaki bino, mpe abombaki mpe abatelaki bino, mpe asalaki ete bosepela, mpe apesaki ndingisa ete bozala na bomoi na kimia bino na bino—

21 Nakoloba epai ya bino ete soko bosaleli ye oyo akelaki bino uta o ebandeli, mpe azali kobatela bino mokolo na mokolo, na kodefisaka bino mpema, ete bokoka kozala na bomoi mpe koningana mpe kosala engebene na bolingi bwa binomei, mpe kutu kotelemisaka bino uta ngonga yoko na esusu—Nakoloba, soko bokosalela ye na bozo bwa bino mobimba nzokande bokozala basali bazangi litomba.

22 Mpe tala, enso eye akosenge na bino ezali kobatela mitindo mya ye; mpe alakaki bino ete soko bokobatela mitindo mya ye bokozwa bomengo o mboka; mpe abaluki mokolo moko te uta na eye alobaki; yango wana, soko bokobatela mitindo mya ye akopambola bino mpe akozwisa bino bomengo.

23 Mpe sikawa, o esika ya yambo, akelaki bino, mpe apesaki ndingisa epai ya bino ya bomoi bwa bino, mpo ya bwango bozali na niongo ya ye.

24 Mpe ya ibale, akosenge bino ete bosala lokola atindaki bino; mpo ya yango soko bosali, akopambola bino sasaipi; mpe yango wana afutaki bino. Mpe bozali naino na niongo ya ye, mpe bozali, mpe bokozala, libela na libela; yango wana, na nini bosengeli komikumisa?

25 Mpe sikawa nakotuna, ekoki bino likambo lya binomei? Nayanoli, Te. Bokoki te koloba ete bozali kutu lokola mpenza mputulu ya mabele; nzokande bokelamaki na mputulu ya mabele; nzokande tala, ezali ya ye oyo akelaki bino.

26 Mpe ngai, kutu ngai, oyo bokobianga mokonzi wa bino, nazali molamu te koleka bozali binomei; mpo nazali lokola mputulu. Mpe bomoni ete nakomi mobange, mpe nakomi penepene na kotika lolenge loye la kufa na mama wa ye mabele.

27 Yango wana, lokola nalobaki epai ya bino ete nasalelaki bino, kotambolaka na motema polele liboso lya Nzambe, kutu boye ngai o ntango eye nasalaki ete bosangana binomei elongo, ete nakoka komonomo na mpamela te, mpe ete makila ma bino maya te likolo lya ngai, ekoteleme ngai mpo ya kosambisama na Nzambe mpo ya makambo na yango atindaki ngai etali bino.

28 Nakoloba epai ya bino ete nasalaki ete bosangana binomei elongo ete nakoka kosukola bilamba bya ngai ya makila ma bino, o eleko eye ya ntango ekomi ngai penepene na kokita na lilita lya ngai, ete nakoka kokita na kimia, mpe molimo mwa ngai mwa kufa te mokoka kokangana elongo na lingomba lya bayembi likolo nakoyembaka masanzoli ma Nzambe moyengebene.

29 Mpe lisusu, nakoloba epai ya bino ete nasalaki ete bosangana binomei elongo, ete nakoka kosakola epai ya bino ete nakoki kozala lisusu te ngonga elai molakisi wa bino, to mokonzi wa bino;

30 Mpo kutu na ntango eye, mikuwa mya ngai mibimba mikolenge mpenza ntango ekomeka ngai koloba epai ya bino; kasi Nkolo Nzambe atelemisi ngai, mpe atiki ngai ete nakoloba epai ya bino, mpe atindaki ngai ete nasakola epai ya bino o mokolo moye, ete mwana mobali wa ngai Moziya azali mokonzi moko mpe moyangeli moko likolo lya bino.

31 Mpe sikawa, bandeko ba ngai, nalingi ete bosala lokola bosalaki kina sikawa. Lokola bobatelaki mitindo mya ngai, mpe lisusu mitindo mya tata wa ngai, mpe bozwaki bomengo, mpe bobikisamaki na kokweya o kati ya maboko ma bayini ba bino, kutu boye soko bokobatela mitindo mya mwana mobali wa ngai, to mitindo mya Nzambe miye mikopesama epai ya bino na ye, bokozwa bomengo o mboka, mpe bayini ba bino bakozala te na nguya likolo lya bino.

32 Kasi, O bato ba ngai, kebani mbele ekozala boweli o ntei ya bino, mpe bokopono kotosa molimo mobe, oyo Tata wa ngai Moziya alobelaki.

33 Mpo tala, ezali lisuma lyoko lisakolami likolo lya ye oyo aponi kotosa molimo mona; mpo soko aponi kotosa mwango, mpe awumeli mpe akufi o masumu ma ye, ye kaka akomele bokweyisami na molimo wa yemei; mpo akozwa mpo ya lifuta lya ye etumbu ya libela, ebukaki ye mobeko mwa Nzambe o bokeseni na boyebi bwa yemei.

34 Nalobi epai ya bino, ete ezali moko te o ntei ya bino, longola se soko ezali bana bake ba bino baye balakisami te etali makambo maye, oyo ayebi te ete bozali na niongo ya seko na Tata wa bino wa lola, mpo ya kozongisela ye enso eye bozali na yango mpe bozali; mpe lisusu alakisamaki etali makundoli maye mazali na mabikuli maye malobamaki na baprofeta basantu, kutu kina o ntango tata wa biso, Lehi, atikaki Yelusaleme;

35 Mpe lisusu, enso eye elobamaki na batata ba biso kina sikawa. Mpe tala, lisusu, balobaki eye etindamaki bango na Nkolo; yango wana, mazali ma sembo mpe ma solo.

36 Mpe sikawa, nakoloba epai ya bino, bandeko ba ngai, ete ekosila bino koyeba mpe kolakisama makambo maye manso, soko bokobuka mobeko mpe bokokende na bokesani na maye malobamaki, ete bomilongola na Molimo mwa Nkolo, ete ekoka kozala na esika te na bino mpo ya kokamba bino o nzela ya bwania ete bokoka kopambolama, kozwa bomengo, mpe kobatelama—

37 Nakoloba epai ya bino, ete moto oyo akosala eye, ye kaka akobima o botomboki bwa polele na Nzambe; yango wana aponi kotosa molimo mobe, mpe akomi moyini na bosembo bonso; yango wana, Nkolo azali te na esika o kati ya ye, mpo afandi te o tempelo izangi isantu.

38 Yango wana soko moto ona ayamboli te, mpe awumeli mpe akufi moyini wa Nzambe, bisenge bya boyengebene bwa bozambe bikolamusa bozo bwa ye bwa kufa te na liyoki lyoko likasi lya elindo ya yemei, eye ekosala ye azonga nsima uta o miso mya Nkolo, mpe ekotondisa ntolo ya ye na elindo, mpe mpasi, mpe nsomo, eye ezali bo moto mokozima te, ya yango mololi mokomata libela na libela.

39 Mpe sikawa nakoloba epai ya bino, ete ngolu ekozala na likoki te mpo ya moto ona; yango wana atandeli ya ye ya nsuka ezali kokanga motema na monioko moko mokosuka mokolo moko te.

40 O, bino banso bampaka, mpe lisusu bino bilenge babali, mpe bino bana bake baye bakoki koyoka maloba ma ngai, mpo nalobaki polele epai ya bino ete bokoka koyoka, nakosambela ete bolamuka o bokundoli bwa ezaleli ya nsomo ya baye bakweyaki o kati ya bobuki mobeko.

41 Mpe lisusu, nazali na mposa ete bomaniola likolo lya bozali bopambolama mpe bwa bosepeli bwa bango baye babateli mitindo mya Nzambe. Mpo bapambolami o makambo manso, ma ntango mpe ma molimo lokola; mpe soko batikali potongono kina o nsuka bayambemi o kati ya lola, ete na yango bakoka kofanda elongo na Nzambe na bozali boko bwa esengo ekosuka mokolo moko te. O bomikundola, bomikundola ete makambo maye mazali ma solo; mpo Nkolo Nzambe alobaki mango.