Makomi
Moziya 24


Mokapo 24

Amuloni aniokoli Alama mpe bato ba ye—Basengeli kopesama liwa soko basambeli—Nkolo asali mokumba mwa bango moyokema pepele—Abikisi bango o kati ya bowumbu, mpe bazongi o Zalayemila. Penepene na 145–120 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Amuloni azwaki lisungi o miso mya mokonzi wa Balamani; yango wana, mokonzi wa Balamani apesaki ndingisa epai ya ye mpe bandeko ba ye ete bapono balakisi likolo lya bato ba ye, iyo, kutu likolo lya bato baye bazalaki o mboka ya Semiloni, mpe o mboka ya Silomi, mpe o mboka ya Amuloni.

2 Mpo Balamani bazwaki mboka eye enso; yango wana, mokonzi wa Balamani aponoki bakonzi likolo lya mboka eye enso.

3 Mpe sikawa nkombo ya mokonzi wa Balamani ezalaki Lamani, abiangemaki nsima ya nkombo ya tata wa ye; mpe yango wana abiangemaki mokonzi Lamani. Mpe azalaki mokonzi likolo lya bato boko ba motango monene.

4 Mpe aponoki balakisi ya bandeko ba Amuloni o mboka na mboka eye ezwamaki na bato ba ye; mpe boye lokota la Nefi lobandaki kolakisama o ntei ya bato banso ba Balamani.

5 Mpe bazalaki bato boko balingani bango na bango; nzokande bayebaki Nzambe te; mpe bandeko ba Amuloni balakisaki bango eloko te etali Nkolo Nzambe wa bango, mpe mobeko mwa Mose te; to balakisaki bango te maloba ma Abinadi;

6 Kasi balakisaki bango ete babatela makundoli ma bango, mpe ete bakoka kokomana bango na bango.

7 Mpe boye Balamani babandaki kofuluka o bozwi, mpe babandaki kosala nkita bango na bango mpe kokoma banene, mpe babandaki kozala bato ba mayele mabe mpe ba bwania, lokola o bwania bwa mokili, iyo, bato ba mayele mabe mpenza, kosepelaka o ndenge inso ya nkuna mpe bopunzi, longola se soko ezalaki o ntei ya bandeko ba bangomei.

8 Mpe sikawa esalemaki ete Amuloni abandaki kosalela bokulaka likolo lya Alama mpe bandeko ba ye, mpe abandaki koniokolo ye, mpe asalaki ete bana ba ye baniokolo bana ba bango.

9 Mpo Amuloni ayebaki Alama, ete azalaka moko wa banganga ba mokonzi, mpe ete ezalaki ye oyo andimaki maloba ma Abinadi mpe abenganamaki liboso lya mokonzi, mpe yango wana adasukaki na ye; mpo ayangelamaki na mokonzi Lamani, kasi asalelaki bokulaka likolo lya bango, mpe atiaki misala likolo lya bango, mpe atiaki bakapita likolo lya bango.

10 Mpe esalemaki ete boye enene ezalaki matungisi ma bango ete babandaki kobelela na bokasi na Nzambe.

11 Mpe Amuloni atindaki bango ete basukisa bibelela bya bango; mpe atiaki bakengeli likolo lya bango, ete onso oyo akozwama kobengaka Nzambe, apesama liwa.

12 Mpe Alama mpe bato ba ye babutisaki te mingongo na Nkolo Nzambe wa bango, kasi basopaki libanda mitema mya bango na ye; mpe ayebaki makanisi ma mitema mya bango.

13 Mpe esalemaki ete mongongo mwa Nkolo moyaki na bango o matungisi ma bango, kolobaka: Tombolani mito mya bino mpe zalani na mpiko, mpo nayebi boyokani boye bosalaki epai ya ngai; mpe nakosala boyokani elongo na bato ba ngai mpe nakobikisa bango libanda lya bowumbu.

14 Mpe nakokomisa lisusu pepele mikumba miye mitiami likolo lya mapeka ma bino, ete kutu bokoka koyoka myango te likolo lya mikongo mya bino, kutu ntango ezali bino o bowumbu; mpe nakosala ete bokoka koteleme lokola banzeneneke mpo ya ngai nsima, mpe ete bokoka koyeba na ntembe te ete ngai, Nkolo Nzambe, nakobimela bato ba ngai o matungisi ma bango.

15 Mpe sikawa esalemaki ete mikumba mitiamaki likolo lya Alama mpe bandeko ba ye mikomaki pepele; iyo, Nkolo apesaki bango bokasi ete bakoka komeme mikumba mya bango na malamu, mpe batosaki na bosepeli mpe bompikiliki bolingi bwa Nkolo.

16 Mpe esalemaki ete boye enene ezalaki bondimi mpe bompikiliki bwa bango ete mongongo mwa Nkolo moyaki epai ya bango lisusu, kolobaka: Zalani na mpiko, mpo o mokolo mwa nsima nakobikisa bino libanda lya bowumbu.

17 Mpe alobaki epai ya Alama: Okokende liboso lya bato baye, mpe nakokende elongo na yo mpe nakobikisa bato baye libanda lya bowumbu.

18 Sikawa esalemaki ete Alama mpe bato baye o ntango ya butu basangisaki bibwele bya bango elongo, mpe lisusu mboto ya bango; iyo, kutu ntango inso ya butu ezalaki bango kosangisaka bibwele bya bango elongo.

19 Mpe o ntongo Nkolo asalaki mpongi ya bozindo eya likolo lya Balamani, iyo, mpe bakapita ba bango banso bazalaki o mpongi ya bozindo.

20 Mpe Alama mpe bato ba ye bakendeki o kati ya esobe; mpe ekendeke bango mobembo mokolo mobimba batelemisaki biema bya bango o lobwaku loko, mpe babiangaki lobwaku la Alama, mpo akambaki nzela ya bango o esobe.

21 Iyo, mpe o lobwaku la Alama basopaki libanda matondi ma bango na Nzambe zambi ayokaki ngolu epai ya bango, mpe akomisaki pepele mikumba mya bango, mpe abimisaki bango libanda lya bowumbu; mpo bazalaki o bowumbu, mpe moko te akokaki kobikisa bango longola se soko ezalaki Nkolo Nzambe wa bango.

22 Mpe bapesaki matondi na Nzambe, iyo, babali ba bango banso mpe basi ba bango banso mpe bana ba bango banso baye bakokaki koloba batombolaki mingongo mya bango o bosanzoli bwa Nzambe wa bango.

23 Mpe sikawa Nkolo alobaki epai ya Alama: Sala noki mpe kende yo mpe bato baye libanda lya mboka eye, mpo Balamani balamuki mpe bakolanda bino; yango wana kende libanda lya mboka eye, mpe nakosukisa Balamani o lobwaku loye ete bakoya mosika te o bolandi bwa bato baye.

24 Mpe esalemaki ete bakendeki libanda lya lobwaku, mpe bakamataki mobembo mwa bango o kati ya esobe.

25 Mpe esilaki bango kozala o esobe mikolo zomi na mibale bakomaki o mboka ya Zalayemila; mpe mokonzi Moziya ayambaki bango na bosepeli.