Makomi
Moziya 26


Mokapo 26

Bandimi mingi ba Eklezia bakambemi o kati ya masumu na bazangi bondimi—Alama azwi elako ya bomoi bwa seko—Bango baye babongoli mpe babatisami bakozwa bolimbisi—Bandimi ba Eklezia baye bazali o masumu baye bayamboli mpe batubeli na Alama mpe na Nkolo bakolimbisama; soko te bakotangema te o ntei ya bato ba Eklezia. Penepene na 120–100 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete ezalaki mingi ya nkola ya mbuta baye bakokaki te kososola maloba ma mokonzi Benyamina, ezalaki bango bana bake o ntango alobaki epai ya bato ba ye; mpe bandimaki te mimeseno mya batata ba bango.

2 Bandimaki te nini elobamaka etali bosekwi bwa bakufi, mpe bandimaki te etali boyei bwa Klisto.

3 Mpe sikawa na ntina ya bozangi bondimi bwa bango bakokaki te kososola liloba lya Nzambe; mpe mitema mya bango miyeisamaki mikasi.

4 Mpe balingaki te kobatisama; mpe balingaki te kokangana elongo na eklezia. Mpe bazalaki bato boko ba bokeseni etali bondimi bwa bango, mpe batikalaki boye libela nsima, kutu na bozali bwa bango bwa mosuni mpe bwa lisumu; mpo balingaki te kobianga likolo lya Nkolo Nzambe wa bango.

5 Mpe sikawa o bokonzi bwa Moziya bazalaki katikati te na motango monene lokola bato ba Nzambe; kasi na ntina ya bokabwani o ntei ya bandeko bakomaki na motango monene koleka.

6 Mpo esalemaki ete bakosaki mingi na maloba ma bango ma koleteke, baye bazalaki o eklezia, mpe basalaki bango basumuka mingi; yango wana ekomaki elongobani ete bango baye basalaki masumu, baye bazalaki o eklezia, bakebisama na eklezia.

7 Mpe esalemaki ete bamememeki liboso lya banganga, mpe bapesamaki epai ya banganga na balakisi; mpe banganga bamemeki bango liboso lya Alama, oyo azalaki nganga monene.

8 Sikawa mokonzi Moziya apesaki Alama bokulaka likolo lya eklezia.

9 Mpe esalemaki ete Alama ayebaki te etali bango; kasi ezalaki banzeneneke mingi mpo ya mabe ma bango; iyo, bato batelemeki mpe batatolaki mingi bobe bwa bango.

10 Sikawa esalemaki te likambo lyoko lya lolenge loye yambo o eklezia; yango wana Alama azwaki mobulu o molimo mwa ye, mpe asalaki ete bamememe liboso lya mokonzi.

11 Mpe alobaki epai ya mokonzi: Tala, awa ezali mingi baye tomemi liboso lya yo, baye bafundami na bandeko ba bango; iyo, mpe bakamatamaki o masumu ma lolenge na lolenge. Mpe bayamboli masumu ma bango; yango wana tomemi bango liboso lya yo, ete okoka kosambisa bango engebene na bobe bwa bango.

12 Kasi mokonzi Moziya alobaki epai ya Alama: Tala, nakosambisa bango te; yango wana napesi bango o kati ya maboko ma yo mpo ya kosambisama.

13 Mpe sikawa molimo mwa Alama mozwaki lisusu mobulu; mpe akendeki mpe atunaki Nzambe nini akosala etali likambo liye, mpo abangaki ete asala mbeba o bomoni bya Nzambe.

14 Mpe esalemaki ete esilisaka ye kosopa libanda bozo bwa ye mobimba na Nzambe, mongongo mwa Nkolo moyaki na ye, kolobaka:

15 Opambolami, Alama, mpe bapambolami baye babatisamaki o mai ma Molomoni. Opambolami na ntina ya bondimi boluti bwa yo o maloba kaka ma mosali wa ngai Abinadi.

16 Mpe epambolami bango na ntina ya bondimi boluti bwa bango o maloba kaka maye olobaki epai ya bango.

17 Mpe opambolami zambi otii eklezia yoko o ntei ya bato baye; mpe bakotiama, mpe bakozala bato ba ngai.

18 Iyo, bapambolami bato baye balingi bakomeme nkombo ya ngai; mpo bakobiangema o nkombo ya ngai; mpe bazali ba ngai.

19 Mpe zambi otuni ngai etali mobuki mobeko, opambolami.

20 Ozali mosali wa ngai; mpe nasali boyokani elongo na yo ete okozala na bomoi bwa seko; mpe okosalela ngai mpe okokende o nkombo ya ngai, mpe okosangisa elongo mpate ya ngai.

21 Mpe ye oyo akoyoka mongongo mwa ngai akozala mpate wa ngai; mpe ye okoyamba o kati ya eklezia, mpe ngai lokola nakoyamba ye.

22 Mpo tala, eye ezali eklezia ya ngai; onso oyo abatisami akobatisama mpo ya boyamboli. Mpe onso oyo oyambi akondima o nkombo ya ngai; mpe nakolimbisa ye lokola motema molingi.

23 Mpo ezali ngai oyo nakokamata likolo lya ngai masumu ma mokili; mpo ezali ngai oyo nakelaki bango; mpe ezali ngai oyo napesaki epai ya ye oyo andimi kina o nsuka esika yoko o loboko la mobali la ngai.

24 Mpo tala, babiangemi o nkombo ya ngai; mpe soko bayebi ngai bakoya, mpe bakozala o esika yoko seko o loboko la mobali la ngai.

25 Mpe ekosalema ete ekobete mondule mwa mibale nde ekoya baye bayebi ngai mokolo moko te mpe bakoteleme liboso lya ngai.

26 Mpe nde ekoyeba bango ete nazali Nkolo Nzambe wa bango, ete nazali Mosikoli wa bango; kasi bakosikolama te.

27 Mpe nde nakosakola epai ya bango ete nayebi bango mokolo moko te; mpe bakokende o kati ya moto mwa libela elengeleme mpo ya zabulu mpe banzelu ba ye.

28 Yango wana nalobi epai ya yo, ye oyo akolinga te koyoka mongongo mwa ngai, ye kaka okoyamba te o kati ya eklezia ya ngai, mpo ye nakoyamba te o mokolo mwa nsuka.

29 Yango wana nalobi epai ya yo: Kende; mpe onso oyo akobuka mobeko mwa ngai, ye okosambisa engebene na masumu maye asalaki; mpe soko atubeli masumu ma ye liboso lya yo mpe ngai, mpe ayamboli o bosolo bwa motema mwa ye, ye okolimbisa, mpe ngai nakolimbisa ye lokola.

30 Iyo, mpe mbala inso bato ba ngai bakoyambola nakolimbisa bango masumu ma bango na ngai.

31 Mpe bino lokola limbisani bino na bino masumu ma bino; mpo solo nakoloba epai ya bino, oyo akolimbisa te masumu ma moto wa penepene na ye, elobi ye ete ayamboli, ye kaka amimemi o nse ya bokweyisami.

32 Sikawa nakoloba epai ya yo, Kende; mpe onso oyo akoyambola te uta o masumu ma ye ye kaka akotangema te o ntei ya bato ba ngai; mpe eye ekotosama uta ntango eye mpe nsima.

33 Mpe esalemaki ete eyokaki Alama maloba maye akomaki mango ete akoka kozala na mango, mpe ete akoka kosambisa bato ba eklezia engebene na mitindo mya Nzambe.

34 Mpe esalemaki ete Alama akendeki mpe asambisaki baye bakamatamaki o bobe, engebene na liloba lya Nkolo.

35 Mpe banso baye bayambolaki masumu ma bango mpe batubelaki mango, atangaki bango o ntei ya bato ba eklezia;

36 Mpe bango baye balingaka te kotubela masumu ma bango mpe koyambola bobe bwa bango, bango kaka batangemaki te o ntei ya bato ba eklezia, mpe nkombo ya bango elongolamaki nie.

37 Mpe esalemaki ete Alama abongisaki makambo manso ma eklezia; mpe babandaki lisusu kozala na kimia mpe kozwa bomengo mpenza o makambo ma eklezia, kotambolaka na bokebi liboso lya Nzambe, koyambaka mingi, mpe kobatisaka mingi.

38 Mpe sikawa makambo maye manso Alama mpe baninga ba ye basali baye bazalaki likolo lya eklezia, kotambolaka na etingia, kolakisaka liloba lya Nzambe o makambo manso, koyokaka ndenge inso ya matungisi, koniokwamaka na bango baye bazalaki te ba eklezia ya Nzambe.

39 Mpe bakebisaki bandeko ba bango; mpe lokola bakebisamaki, moko na moko na liloba lya Nzambe, engebene na masumu ma ye, to na masumu maye asalaki, kotindamaka na Nzambe mpo ya kosambela na kolembe te, mpe mpo ya kopesa matondi o makambo manso.