Makomi
Moziya 27


Mokapo 27

Moziya apekisi boniokoli bwa bato mpe atindi bokokani—Alama Elenge mpe bana banei ba Moziya bazali koluka kobebisa Eklezia—Anzelu moko abimi mpe atindi bango batika botamboli bwa bango bobe—Alama akomi baba—Bato banso basengeli kobotama lisusu mpo ya kolonga lobiko—Alama mpe bana babali ba Moziya basakoli nsango ya nsai. Penepene na 100–92 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete boniokoli boye bokweyaki likolo lya eklezia na bazangi bondimi bokomaki bonene boye ete eklezia ebandaki koyimayima, mpe komilela mpo ya bakambi ba bango etali likambo lyango; mpe bakendeki komilela na Alama. Mpe Alama amemeki likambo liboso lya mokonzi, Moziya. Mpe Moziya asololaki elongo na banganga ba ye.

2 Mpe esalemaki ete mokonzi Moziya atindaki esakoli lyoko o ntaka ya mboka zingazinga mpembeni ete mozangi bondimi moko te akoniokolo moko wa bango baye bazali o eklezia ya Nzambe.

3 Mpe ezalaki etinda yoko ya sikisiki o ntaka ya biklezia binso ete ezala boniokoli te o ntei ya bango, ete ezala bokokani o ntei ya bato banso.

4 Ete batika te ete lolendo to efundeli etia mobulu na kimia ya bango; ete moto na moto atala moto wa penepene na ye lokola yemei, kosalaka na maboko ma bangomei mpo ya lisalisi lya bango.

5 Iyo, mpe banganga banso ba bango mpe balakisi ba bango basala na maboko ma bangomei mpo ya lisalisi lya bango, longola se soko ezali o malali, to o mposa nzike; mpe kosalaka makambo maye, bakofuluka o boboto bwa Nzambe.

6 Mpe ebandaki kozala kimia nzike lisusu o mboka; mpe bato babandaki kokoma na motango monene mpenza, mpe babandaki kopanzana mosika likolo lya etando ya mabele, iyo, o nordi mpe o sudi, o esti mpe o westi, kotongaka bingumba binene mpe mboka ike o biteni binso bya mboka.

7 Mpe Nkolo abimelaki bango mpe apesaki bango bomengo, mpe bakomaki bato banene mpe ba bozwi.

8 Sikawa bana babali ba Moziya batangemaki o ntei ya bazangi bondimi; mpe lisusu moko wa bana babali ba Alama atangemaki o ntei ya bango, ye kobiangemaka Alama, nsima ya tata wa ye; nzokande, akomaki moto moko wa nkuna mpenza mpe moto moko mosambeli bikeko. Mpe azalaki moto wa maloba mingi, mpe alobaki maloba ma kolete na bato; yango wana akambaki bato mingi mpo ya kosala nsima ya lolonge la mabe ma ye.

9 Mpe akomaki ekonongo enene mpo ya bomengo bwa eklezia ya Nzambe; na koyibaka mosika mitema mya bato; kosalaka bokabwani boike o ntei ya bato; kopesaka nkonzo na moyini wa Nzambe mpo ya kosalela nguya ya ye likolo lya bango.

10 Mpe sikawa esalemaki ete ntango ezalaki ye kokendeke bipai na bipai mpo ya kobebisa eklezia ya Nzambe, mpo akendeki bipai na bipai na nkuku elongo na bana babali ba Moziya kolukaka kobebisa eklezia, mpe kokamba mpembeni bato ba Nkolo, o bokeseni na mitindo mya Nzambe, to kutu mokonzi—

11 Mpe lokola nalobaki epai ya bino, lokola bazalaki kokendeke bipai na bipai kotombokaka na Nzambe, tala anzelu wa Nkolo abimaki epai ya bango; mpe akitaki lokola ezalaki na lipata lyoko; mpe alobaki lokola ezalaki na mongongo mwa nkake, moye mosalaki mabela koningana likolo lya mango batelemeki;

12 Mpe boye enene ezalaki bokamwi bwa bango, ete bakweyaki o mabele, mpe basosolaki te maloba maye alobaki epai ya bango.

13 Nzokande abelelaki lisusu, kolobaka: Alama, lamuka mpe teleme, mpo ntina nini okoniokolo eklezia ya Nzambe? Mpo Nkolo alobaki: Eye ezali eklezia ya ngai, mpe natiaki yango; mpe eloko te ekolonga yango, longola se soko ezali bobuki mobeko bwa bato ba ngai.

14 Mpe lisusu, anzelu alobaki: Tala, Nkolo ayokaki nsambo ya bato ba ye, mpe lisusu nsambo ya mosali wa ye, Alama, oyo azali tata wa yo; mpo asambelaki na bondimi boike etali yo ete okoka komememe o boyebi bwa bosolo; yango wana, mpo ya mwango moye nayei mpo ya kondimisa yo nguya mpe bokulaka bwa Nzambe, ete nsambo ya basali ba ye ikoka koyanolama engebene na bondimi bwa bango.

15 Mpe sikawa tala, ekoki yo koswana na nguya ya Nzambe? Mpo tala, mongongo mwa ngai moningisi te mabele? Mpe ekoki yo kotala ngai te liboso lya yo? Mpe natindami na Nzambe.

16 Sikawa nakoloba epai ya yo: Kende, mpe omikundola bokangemi bwa batata ba yo o mboka ya Helama, mpe o mboka ya Nefi; mpe omikundola boniboni makambo manene asalaki mpo ya bango; mpo bazalaki o bowumbu, mpe abikisaki bango. Mpe sikawa nakoloba epai ya yo, Alama, kende o nzela ya yo, mpe luka te lisusu kobebisa eklezia, ete nsambo ya bango ikoka koyanolama, mpe eye kutu soko yomei olingi kobwakama mosika.

17 Mpe sikawa esalemaki ete iye izalaki maloba ma nsuka maye anzelu alobaki epai ya Alama, mpe akendeki.

18 Mpe sikawa Alama mpe bango baye bazalaki elongo na ye bakweyaki lisusu o mabele, mpo enene ezalaki bokamwi bwa bango; mpo na miso mya bangomei bamonoko anzelu wa Nkolo; mpe mongongo mwa ye mozalaki lokola nkake, eye elengisaki mabele; mpe bayebaki ete ezalaki eloko te longola se nguya ya Nzambe eye ekoki koningisa mabele mpe kosala mango kolenge lokola soko malingi kopasuka ndambo ndambo.

19 Mpe sikawa bokamwi bwa Alama bozalaki bonene boye ete akomaki baba, ete akokaki kofungola te monoko mwa ye; iyo, mpe akomaki motau, kutu ete akokaki koningisa lisusu te maboko ma ye; yango wana akamatamaki na bango baye bazalaki elongo na ye, mpe amememeki ye, lisalisi te, kina balalisaki ye liboso lya tata wa ye.

20 Mpe bazongelaki epai ya tata wa ye manso maye makomaki epai ya bango; mpe tata wa ye asepelaki, mpo ayebaki ete ezalaki nguya ya Nzambe.

21 Mpe asalaki ete ebele basangana elongo ete bakoka kotatola nini Nkolo asalaka mpo ya mwana mobali wa ye, mpe lisusu mpo ya bango baye bazalaki elongo na ye.

22 Mpe asalaki ete banganga basangisa bangomei elongo; mpe babandaki kokila, mpe kosambela na Nkolo Nzambe wa bango ete andima kofungola monoko mwa Alama, ete akoka koloba, mpe lisusu ete binama bya ye bikoka kozwa makasi—ete miso mya bato mikoka kofungwana mpo ya komono mpe koyeba bolamu mpe nkembo ya Nzambe.

23 Mpe esalemaki ete esilisaki bango kokila mpe kosambela o ntaka ya mikolo mibale mpe butu ibale, binama bya Alama bizwaki makasi, mpe atelemeki mpe abandaki koloba epai ya bango, kosengeke bango kozala na bobondisami:

24 Mpo, alobaki, nayamboli masumu ma ngai, mpe nasikolami na Nkolo; tala nabotami na Molimo.

25 Mpe Nkolo alobaki epai ya ngai: Kamwa te ete bato banso, iyo, babali mpe basi, bikolo, mabota, minoko mpe bato banso, basengeli kobotama lisusu; iyo, kobotama na Nzambe, kobongola bozali bwa bango bwa mosuni mpe bwa bokwei, o bozali bwa bosembo, esikolami bango na Nzambe, kokomaka bana babali ba ye mpe bana basi ba ye;

26 Mpe boye bakokoma bikelamo bya sika; mpe longola se soko basali eye, bakoki na lolenge loko te kosangola bokonzi bwa Nzambe.

27 Nalobi epai ya yo, longola se soko eye ezali boye, basengeli kobwakama mosika; mpe eye nayebi, mpo nazalaki bo nasengeli kobwakama mosika.

28 Nzokande, nsima ya kokatisaka mokakatano moike, koyambolaka kina penepene na liwa, Nkolo na ngolu amonoki elongobani kowambola ngai libanda lya boziki bwa libela, mpe nabotami na Nzambe.

29 Bozo bwa ngai bosikolami uta o lititi lya bololo mpe nsinga ya bobe. Nazalaki o lobwaku la molili; kasi sikawa namoni mwinda mwa bokamwi bwa Nzambe. Bozo bwa ngai boniongamaki na monioko mwa seko; kasi nawambolami, mpe bozo bwa ngai bozali o bolozi lisusu te.

30 Nabwakaki Mosikoli wa ngai, mpe nawanganaki nini alobaka na batata ba biso; kasi sikawa ete bakoka komono yambo esalema ete akoya, mpe ete omikundoli ekelamo na ekelamo ya bokeli bwa ye, akomimonisa epai ya banso.

31 Iyo, libolongo na libolongo likogumbama, mpe lolemo na lolemo lokotubela liboso lya ye. Iyo, kutu o mokolo mwa nsuka, ekoteleme bato banso mpo ya kosambisama na ye, nde bakoyambola ete azali Nzambe; nde bakondima, baye bazali na bomoi libanda lya Nzambe o mokili, ete bosambisi bwa etumbu ya libela boyengebeni likolo lya bango; mpe bakoningana, mpe bakolenge mpe bakozonga nsima o nse ya botali bwa liso lya ye likoluka-inso.

32 Mpe sikawa esalemaki ete Alama abandaki uta o ntango eye kina nsima kolakisa bato, mpe bango baye bazalaki elongo na Alama o ntango anzelu abimaki epai ya bango, kokendeke mobembo zingazinga mpembeni na mboka, kosakolaka na bato banso makambo maye bamonoko mpe bayokaka, mpe koteyaka liloba lya Nzambe o mokakatano nzike, eniokwamaki ye mpenza na bango baye bazalaki bazangi bondimi, ebetemeki ye na mingi ya bango.

33 Kasi ata eye enso, bakabaki libondisi liike o eklezia, kokomisaka bondimi bwa bango bokasi, mpe kolendisaka bango na motema molai mpe mosala moike mpo ya kobatela mitindo mya Nzambe.

34 Mpe inei ya bango bazalaki bana babali ba Moziya; mpe nkombo ya bango izalaki Amona, mpe Aloni, mpe Omina, mpe Imini; iye izalaki nkombo ya bana babali ba Moziya.

35 Mpe bakendeki mobembo o ntaka ya mboka mobimba ya Zalayemila, mpe o ntei ya bato banso baye bazalaki o nse ya bokonzi bwa Moziya, basalaki makasi na mpila mpo ya kobongisa mpasi eye basalaki na eklezia, koyambolaka masumu ma bango manso, mpe kosakolaka makambo manso maye bamonoki, mpe kolimbolaka mabikuli mpe nkoma na banso baye balingaki koyoka bango.

36 Mpe boye bazalaki bisalele o maboko ma Nzambe na komemeke mingi o boyebi bwa bosolo, iyo, mpo ya boyebi bwa Mosikoli wa bango.

37 Mpe boniboni bapambolami! Mpo basakolaki kimia; basakolaki nsango elamu; mpe basakolaki epai ya bato ete Nkolo akonzi.