Makomi
Moziya 28


Mokapo 28

Bana babali ba Moziya bakei koteya Balamani—Kosalelaka mabanga mabale ma momoni, Moziya abongoli palaki ya Bayelede. Penepene na 92 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa esalemaki ete esilisaka bana babali ba Moziya kosala makambo maye manso, bakamataki motango moko moke elongo na bango mpe bazongaki na tata wa bango, mokonzi, basengelaki na ye apesa ndingisa epai ya bango ete bakoka, elongo na bato baye baponoki, komata o mboka ya Nefi ete bakoka koteya makambo maye bayokaki, mpe ete bakoka kokaba liloba lya Nzambe na bandeko ba bango, Balamani—

2 Ete mbele bakoka komeme bango o boyebi bwa Nkolo Nzambe wa bango, mpe kondimisa bango bobe bwa batata ba bango; mpe ete mbele bakoka kosalisa bango na boyini bwa bango mpo ya Banefi, ete bakoka lisusu kosepela na Nkolo Nzambe wa bango, ete bakoka kokoma balingi bango na bango, mpe ete ezala lisusu te boweli o mboka mobimba eye Nkolo Nzambe wa bango apesaka bango.

3 Sikawa bazalaki na mposa ete lobiko losakolama na ekelamo na ekelamo, mpo bakokaki te kondima ete bozo boko bwa moto bowa; iyo, kutu makanisi mpenza ete bozo boko bowumela o monioko mozanga nsuka esalaki bango koningana mpe kolenge.

4 Mpe boye Molimo mwa Nkolo asalaki likolo lya bango, mpo bazalaki babe mpenza koleka ba basumuki. Mpe Nkolo amonoki elongobani na ngolu ya ye ezanga ndelo abatela bango; nzokande bayokaki mpasi nzike ya nsomo ya bozo na ntina ya mabe ma bango, koyokaka mpasi nzike mpe bobangi ete babwakama mosika libela.

5 Mpe esalemaki ete basambaki elongo na tata wa bango mikolo mingi ete bakoka komata o mboka ya Nefi.

6 Mpe mokonzi Moziya akendeki mpe atunaki na Nkolo soko atika bana babali ba ye bamata o ntei ya Balamani mpo ya koteya liloba.

7 Mpe Nkolo alobaki epai ya Moziya: Tika bango bamata, mpo mingi bakondima o maloba ma bango, mpe bakozala na bomoi bwa seko; mpe nakobikisa bana babali ba yo libanda lya maboko ma Balamani.

8 Mpe esalemaki ete Moziya apesaki ndingisa ete bakoka kokende mpe kosala engebene na esenge ya bango.

9 Mpe bakendeki mobembo mwa bango o kati ya esobe mpo ya komata koteya liloba o ntei ya Balamani; mpe nakopesa nsango yoko ya matamboli ma bango nsima.

10 Sikawa mokonzi Moziya azalaka lisusu na moko te mpo ya kopesa bokonzi likolo lya ye, mpo ezalaki moko te wa bana babali ba ye oyo andimaki bokonzi.

11 Yango wana akamataki makundoli maye makomamaki likolo lya palaki ya motako, mpe lisusu palaki ya Nefi, mpe makambo manso maye abombaki mpe abatelaki engebene na mitindo mya Nzambe, nsima ya kobongola mpe kosala ekomama makundoli maye mazalaki likolo lya palaki ya wolo iye ezwamaka na bato ba Limiyi, iye ipesamaki na ye na loboko la Limiyi;

12 Mpe eye asalaki na ntina ya motema likolo mwa bato ba ye; mpo bazalaki na mposa eleki ndelo mpo ya koyeba etali bato baye babebisamaki.

13 Mpe sikawa abongolaki mango na lisalisi lya mabanga mabale maye makangemaki o kati ya nsonge ibale ya litimbo lyoko.

14 Sikawa biloko biye bilengelemeki uta o ebandeli, mpe bikitanisamaki uta nkola o nkola, mpo ya mwango mwa kolimbolaka nkota;

15 Mpe bibombanaki mpe bibatelamaki na loboko la Nkolo, ete abombola na ekelamo enso oyo akozwa mboka mabe mpe bonsomo bwa bato ba ye;

16 Mpe onso oyo akozala na biloko biye akobiangema momoni, nsima ya lolenge la kala.

17 Sikawa esilisaka Moziya kobongola makundoli maye, tala, apesaki nsango yoko ya bato baye babebisamaki, uta o ntango eye babebisamaki kina nsima o botongi bwa linongi linene, o ntango Nkolo abulunganisaki lokota la bato mpe bato banso bapalanganisamaki mosika likolo lya mabele manso, iyo, mpe kutu uta o ntango ena nsima kina o bokeli bwa Adama.

18 Sikawa nsango eye esalaki bato ba Moziya balela mpenza, iyo, batondisamaki na mawa; nzokande epesaki bango boyebi boike, o eye basepelaki.

19 Mpe nsango eye ekokomama nsima; mpo tala, elongobani ete bato banso bayeba makambo maye makomami o nsango eye.

20 Mpe sikawa, lokola nalobaki epai ya bino, ete esilisaki mokonzi Moziya kosala makambo maye, akamataki palaki ya motako, mpe biloko binso biye abombaka, mpe apesaki byango likolo lya Alama, oyo azalaki mwana mobali wa Alama; iyo, makundoli manso, mpe lisusu bibongolele, mpe apesaki byango likolo lya ye, mpe atindaki ye ete abatela mpe abomba byango, mpe abatela lisusu likundoli lyoko lya bato, kokitanisaka byango uta nkola yoko o esusu, kutu lokola ekitanisamaka uta ntango Lehi atikaki Yelusaleme.