Makomi
Moziya 3


Mokapo 3

Mokonzi Benyamina akobi esakola ya ye—Nkolo wa Nguya Inso akosala o ntei ya bato o tabelenakele ya modongo—Makila makobima uta o malusu ma lomposo la ye lokola akotumbolama mpo ya masumu ma mokili—Ya ye ezali nkombo eye kaka na yango lobiko lokoya—Bato bakoki kolongola moto wa mokili mpe kokoma Basantu na lisalisa lya Botumbolami—Monioko mwa moto wa nkuna mokozala lokola liziba lya moto mpe libanga lya fofolo. Penepene na 124 Yambo ya Klisto.

1 Mpe lisusu bandeko ba ngai, nakobenda bokebi bwa bino, mpo nazali na mwa moke lisusu ya koloba epai ya bino; mpo tala, nazali na makambo ma kolobela bino matali maye makoya.

2 Mpe makambo maye nakolobela bino mayebisamaki epai ya ngai na anzelu wa Nzambe. Mpe alobaki epai ya ngai: Lamuka; mpe nalamukaki, mpe tala atelemeki liboso lya ngai.

3 Mpe alobaki epai ya ngai: Lamuka, mpe yoka maloba maye nakolobela yo; mpo tala, nayei mpo ya kosakola epai ya yo nsango ya nsai ya bosepeli bonene.

4 Mpo Nkolo ayokaki nsambo ya yo, mpe asambisi bosembo bwa yo, mpe atindi ngai mpo ya kosakola epai ya yo ete okoki kosepela; mpe ete okoki kosakola epai ya bato ba yo, ete bango bakoka lokola kotonda na bosepeli.

5 Mpo tala, ntango ekoya, mpe ezali mosika te, ete na nguya, Nkolo wa Nguya Inso oyo akonzi, oyo azalaki, mpe azali uta boseko bonso na boseko bonso, akokita o nse uta o lola o ntei ya bana ba bato, mpe akofanda o tabelenakele yoko ya modongo, mpe akokende o ntei ya bato, kosalaka makamwisi makasi, lokola kobikisaka bakoni, kosekwisaka bakufi, kosalaka batengoli batambola, bato ba lolanda bazwa bomoni, mpe bakufa matoyi bayoka, mpe kobikisaka ndenge inso ya malali.

6 Mpe akobwaka libanda bazabulu, to milimo mibe miye mifandi o mitema mya bana ba bato.

7 Mpe tala, akoyoka mpasi ya masenginia, mpe bolozi bwa nzoto, nzala, mposa ya mai, mpe bolembi, kutu koleka eye moto akoki kakanga motema, longola se soko ezali mpo ya liwa; mpo tala, makila makobima uta o lilusu linso, boye enene ekozala nsomo ya ye mpo ya nkuna mpe bonsomo bwa bato ba ye.

8 Mpe akobiangema Yesu Klisto, Mwana wa Nzambe, Tata wa lola mpe mabele, Mokeli wa biloko binso uta o ebandeli; mpe mama wa ye akobiangema Malia.

9 Mpe tala, akoya epai ya ba ye mpenza, ete lobiko lokoka koya epai ya bana ba bato kutu na bondimi likolo lya nkombo ya ye; mpe kutu na nsima ya enso eye bakomono ye moto moko, mpe bakoloba ete azali na zabulu, mpe bakofiakola ye, mpe bakobaka ye o ekulusu.

10 Mpe akosekwa o mokolo mwa misato uta o bakufi; mpe tala, atelemi mpo ya kosambisa mokili; mpe tala, makambo maye manso masalemi ete bosambisi sembo bokoka koya likolo lya bana ba bato.

11 Mpo tala, mpe lisusu makila ma ye matumbolami mpo ya masumu ma baye bakweyaki na bobuki mobeko bwa Adama, baye bakufaki koyebaka te bolingi bwa Nzambe botali bango, to baye basalaki masumu na bozangi boyebi.

12 Kasi lisuma, lisuma epai ya ye oyo ayebi ete atomboki na Nzambe! Mpo lobiko lokoya na ya moko te wa lolenge loye longola soko ezali o boyamboli mpe bondimi likolo lya Nkolo Yesu Klisto.

13 Mpe Nkolo Nzambe atindaki baprofeta basantu ba ye epai ya bana banso ba bato, mpo ya kosakola makambo maye o libota na libota, ekolo na ekolo, mpe monoko na monoko, ete na yango banso bayo e bakondima ete Klisto akoya, bango kaka bakozwa bolimbisi bwa masumu ma bango, mpe akosepela na bosepeli bonene mpenza, lokola soko ayei kala o ntei ya bango.

14 Nzokande Nkolo Nzambe amonoki ete bato ba ye bazali bato ba nkanza, mpe apesaki bango mobeko moko, kutu mobeko mwa Mose.

15 Mpe bilembo mingi, mpe makamwa, mpe bimoniseli, mpe bililingi alakisaki epai ya bango, etali boyei bwa ye; mpe lisusu baprofeta basantu balobaki epai ya bango etali boyei bwa ye; mpe nzokande bayeisaki mitema mya bango mikasi, mpe basosolaki te ete mobeko mwa Mose mozali na motuya moko te longola se soko ezali na botumbolami bwa makila ma ye.

16 Mpe kutu soko ekokaki kosalema ete bana bake bakoka kozala na masumu bakokaki te kobikisama; kasi nakoloba epai ya bino ete bapambolami; mpo tala, lokola na Adama, to na lizali, bakweyaki, kutu boye makila ma Klisto matumbolami mpo ya masumu ma bango.

17 Mpe lisusu, nakoloba epai ya bino, ete ekozala nkombo esusu te epesami kati ya to nzela esusu te to eloko te na yango lobiko lokoki koya epai ya bana ba bato, bobele o kati ya mpe o nzela ya nkombo ya Klisto, Nkolo wa Nguya Inso.

18 Mpo tala akosambisa, mpe bosambisi bwa ye bozali boyengebene; mpe mwana akowa te oyo akokufa o bomwana bwa ye; kasi bato bakomele botumboli o bozo bwa bangomei longola se soko bamikitisi mpe bakomi lokola bana bake, mpe bandimi ete lobiko lozalaki, mpe lozali, mpe lokoya, o kati ya mpe o nzela ya makila ma botumbolami bwa Klisto, Nkolo wa Nguya Inso.

19 Mpo moto wa mokili azali moyini wa Nzambe, mpe azalaki uta o bokwei bwa Adama, mpe akozala, libela na libela, longola se soko amitiki o masengisi ma Molimo Mosantu, mpe abwaki mosika moto wa mokili mpe akomi moko mosantu o nzela ya botumbolami bwa Klisto Nkolo, mpe akoma lokola mwana, moyangelami, mosokemi, mosawa, mompikiliki, atonda na bolingo, kondimaka kotosa o makambo manso maye Nkolo amoni elongobani kotinda likolo lya ye, kutu lokola mwana moko akotosa tata wa ye.

20 Mpe lisusu, nakoloba epai ya bino, ete ntango ekoya eye boyebi bwa Mobikisi bokopanzana o ntaka ya ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato.

21 Mpe tala, ekoya mokolo mona, moko te akomonomo azangi mpamela liboso lya Nzambe, longola se soko ezali bana bake, bobele o nzela ya boyamboli mpe bondimi likolo lya nkombo ya Nkolo Nzambe wa Nguya Inso.

22 Mpe kutu o ntango ena, ntango ekolakisa yo bato ba yo makambo maye Nkolo Nzambe wa yo atindaki yo, kutu nde ekozala bango lisusu te bazangi mpamela o miso mya Nzambe, bobele engebene na maloba maye nalobaki epai ya yo.

23 Mpe sikawa nalobi maloba maye Nkolo Nzambe atindaki ngai.

24 Mpe boye elobi Nkolo: Makoteleme lokola litatoli lya ngelingeli likolo lya bato baye, o mokolo mwa bosambisi; ya yango bakosambisama, moto na moto engebene na misala mya ye, soko mizali milamu, to soko mizali mibe.

25 Mpe soko mizali mibe bakangemi na bomoni bwa elindo mpe bonsomo bwa bangomei, miye mikosala bango bazonga nsima uta o miso mya Nkolo o kati ya bozali boko bwa bobola mpe monioko mozanga nsuka, uta wapi bakoki kozonga lisusu te; yango wana bameleki botumboli o bozo bwa bangomei.

26 Yango wana, bameleki nkeni mobimba ya nkele ya Nzambe, eye boyengebene bokoki lisusu te kowangana epai ya bango lokola bokokaki kowangana ete Adama akweyaki zambi aliaki mbuma epekisama; yango wana, ngolu ekokaki kozala na likoki lisusu te likolo lya bango libela.

27 Mpe monioko mwa bango mozali lokola liziba lya moto mpe libanga lya fofolo, ya yango mololi mokozima te, mpe ya yango molinga mikomata libela na libela. Boye etindaki ngai Nkolo. Amene.