Makomi
Moziya 4


Mokapo 4

Mokonzi Benyamina akobi na liloba lya ye—Lobiko loyaki na ntina ya Botumbolami—Ndima na Nzambe mpo ya kobikisama—Kanga bolimbisi bwa masumu ma yo o nzela ya bosembo bwa yo—Kaba eteni ya biloko bya bino na bazangi—Sala makambo manso na bwania mpe na molongo. Penepene na 124 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete etiaki mokonzi Benyamina nsuka yoko ya kolobaka maloba maye mapesamaka epai ya ye na anzelu wa Nkolo, ete abwakaki miso mya ye zingazinga mpembeni likolo lya ebele, mpe tala bakweyaki o mabele, mpo bobangi bwa Nkolo boyaki likolo lya bango.

2 Mpe bamimonoko o bozali bwa bangomei bwa mosuni, kutu boke koleka mputulu ya mabele. Mpe babelelaki na makasi bango banso na mongongo moko, kolobaka: O zala na ngolu, mpe tia makila ma botumbolami ma Klisto ete tokoka kozwa bolimbisi bwa masumu ma biso, mpe mitema mya biso mikoka kopetolama; mpo tondimi na Yesu Klisto, Mwana Mobali wa Nzambe, oyo akelaki lola mpe mabele, mpe biloko binso; oyo akokita o ntei ya bana ba bato.

3 Mpe esalemaki ete esilisaki bango koloba maloba maye Molimo mwa Nkolo ayaki likolo lya bango, mpe batondisamaki na bosepeli, kozwaka bolimbisi boko bwa masumu ma bango, mpe kozalaka na kimia ya motema, na ntina ya bondimi boluti boye bazalaki na bwango na Yesu Klisto oyo akoya, engebene na maloba maye mokonzi Benyamina alobaka epai ya bango.

4 Mpe mokonzi Benyamina afungolaki lisusu monoko mwa ye mpe abandaki koloba epai ya bango, kolobaka: Baninga ba ngai mpe bandeko ba ngai, baboti ba ngai mpe bato ba ngai, nalingi lisusu kobenda bokebi bwa bino, ete bokoka koyoka mpe kososola etikali ya maloba ma ngai maye nakoloba epai ya bino.

5 Mpo tala, soko boyebi bwa bolamu bwa Nzambe o ntango eye bolamusi bino o liyoki lyoko lya bompamba bwa bino mpe bozangi bolongobani mpe bozali bwa bokwei bwa bino—

6 Nakoloba epai ya bino, soko bokoki koya o boyebi bwa bolamu bwa Nzambe, mpe nguya ya ye ezangi emekiseli, mpe bwania bwa ye, mpe bompikiliki bwa ye, mpe motema mwa ye ona bana ba bato; mpe lisusu, botumbolami boye bolengelemeki uta o bokelami bwa mokili, ete na yango lobiko lokokaki koya na ye oyo akotia elikia ya ye na Nkolo, mpe akozala na etingia na kobatelaka mitindo mya ye, mpe akokoba na bondimi kutu kina o nsuka ya bomoi bwa ye, nalingi koloba bomoi bwa nzoto ya kufa—

7 Nakoloba ete ezali moto oyo akozwa lobiko, o nzela ya botumbolami boye bolengelemeki uta o bokelami bwa mokili mpo ya bato banso, baye bazalaki uta o bokwei bwa Adama, to baye bazali, to baye bakozala, kutu kina o nsuka ya mokili.

8 Mpe eye ezali nzela na wapi lobiko lokoya. Mpe ezali lobiko losusu te longola se loye lolobamaki; mpe ezali masengeli te na wapi moto akoki kobikisama longola se masengeli maye nalobelaki bino.

9 Ndimani na Nzambe; ndimani ete azali, mpe ete akelaki biloko binso, o lola mpe o mabele lokola; ndimani ete azali na bwania bonso, mpe nguya inso o lola mpe o mabele lokola; ndimani ete moto akososola te makambo manso maye Nzambe akoki kososola.

10 Mpe lisusu, ndimani ete, bosengeli koyambola uta o masumu ma bino mpe kosundola mango, mpe komikitisa liboso lya Nzambe; mpe kosenge na bosolo bwa motema ete alimbisa bino; mpe sikawa, soko bondimi makambo manso maye botala ete bosali mango.

11 Mpe lisusu nakoloba epai ya bino, lokola nalobaki liboso, ete lokola boyei o boyebi bwa nkembo ya Nzambe, to soko boyebaki bolamu bwa ye mpe bomekaki bolingo bwa ye, mpe bozwaki bolimbisi bwa masumu ma bino, boye bosali lolenge la bosepeli mpenza o bozo bwa bino, kutu boye nalingi ete bomikundola, mpe ntango inso bobomba o bokundoli, bonene bwa Nzambe, mpe bompamba bwa binomei, mpe bolamu bwa ye mpe motema molai mwa ye ona bino, bikelamo bilongobani te, mpe bomikitisa kutu o bozindo bwa bosawa, kobiangaka likolo lya nkombo ya Nkolo mokolo na mokolo, kotelemeke sikisiki o bondimi bwa eye ekoya, eye elobamaki na monoko mwa anzelu.

12 Mpe tala, nalobi epai ya bino ete soko bosali eye bokozala na bosepeli ntango inso, mpe bokotondisama na bolingo bwa Nzambe, mpe ntango inso bokokanga bolimbisi bwa masumu ma bino; mpe bokokola o boyebi bwa nkembo ya ye oyo akelaki bino, to o boyebi bwa eye ezali eyengebene mpe ya solo.

13 Mpe bokozala na likanisi lyoko te ya kosala mabe bino na bino, kasi kozala na kimia, mpe kopesa na moto na moto engebene na eye esengeli na ye.

14 Mpe bokotika te bana ba bino ete bakende na nzala, to bolumbu; mpe bokotika te ete babuka mobeko mya Nzambe, mpe babunda mpe baswana bango na bango, mpe basalela zabulu, oyo azali mokonzi wa masumu, to oyo azali molimo mobe oyo alobelamaki na batata ba biso, ye kozalaka moyini moko wa bosembo bonso.

15 Kasi bokolakisa bango kotambola o nzela ya bosolo mpe ya limemia; bokolakisa bango kolinga na bango na bango, mpe kosalisa na bango na bango.

16 Mpe lisusu, bino binomei bokosalisa baye batelemi na mposa ya lisalisi lya bino; bokokaba biloko bya bino epai ya ye oyo atelemi na mposa, mpe bokotika te ete mosengi amatisa esenge ya ye na mpamba, mpe bobengana ye libanda mpo ya kowa.

17 Mbele okoloba: Moto amemeki likolo lya yemei bobola bwa ye; yango wana nakokanga maboko ma ngai, mpe nakopesa te epai ya ye bilei bya ngai, to nakokaba te epai ya ye eteni ya eloko ya ngai ete akoka te komono mpasi, mpo bitumbu bya ye bizali biyengebene—

18 Kasi nakoloba epai ya yo, O moto, onso oyo akosala lolenge lona azali na ntina enene ya koyambola; mpe longola se soko ayamboli ena eye asali akowa libela, mpe azali na litomba te o bokonzi bwa Nzambe.

19 Mpo tala, ezali biso banso basengi te? Eyekemi biso te banso likolo lya Mozali ona kaka, kutu Nzambe, mpo ya biloko binso tozwi, mpo ya bilei mpe bilamba lokola, mpe mpo ya wolo, mpe mpo ya mpauni, mpe mpo ya bozwi bonso tozwi bwa lolenge na lolenge?

20 Mpe tala, kutu o ntango eye, bozali kobianga likolo lya nkombo ya ye, mpe kosengeke mpo ya bolimbisi bwa masumu ma bino. Mpe atiki ete bosenge na mpamba? Te; asopi libanda Molimo mwa ye likolo lya bino, mpe asali ete mitema mya bino mitondisami na bosepeli, mpe asali ete minoko mya bino mikangemi te ete bokoki kozwa bolobi, boye enene mpenza ezalaki bosepeli bwa bino.

21 Mpe sikawa, soko Nzambe, oyo akelaki bino, likolo lya ye boyangelami mpo ya bomoi bwa bino mpe mpo ya enso eye bozwi mpe bozali, apesi ndingisa epai ya bino mpo ya nini bokosenge eye ezali semba, na bondimi, kondimaka ete bokozwa, o nde, boniboni bosengelaki kokaba eteni ya biloko biye bozwi bino na bino.

22 Mpe soko bosambisi moto oyo akomatisa esenge ya ye na bino mpo ya biloko bya bino mpo awa te, mpe bokweisi ye, boniboni eyengebene nzike koleka ekozala bokwei bwa bino mpo ya kopimaka biloko bya bino, biye bizali bya bino te kasi bya Nzambe, na ye lisusu bomoi bwa bino bozali; mpe nzokande bomatisi esenge te, to boyamboli te mpo ya likambo liye bosalaki.

23 Nalobi epai ya bino ete, lisuma ezala epai ya moto ona, mpo biloko bya ye bikowa elongo na ye; mpe sikawa, nakoloba makambo maye mpo ya baye bazali na bozwi bwa mokili.

24 Mpe lisusu, nakoloba epai ya bazangi, bino baye bozangi kasi bozali na makoki, ete bowumela mokolo na mokolo; nalingi koloba bino banso baye boboyi basengi, zambi bozangi; nalingi ete boloba o mitema mya bino ete: Nakopesa te zambi nazangi, kasi soko nazalaki na eloko nalingaki kopesa.

25 Mpe sikawa, soko bolobi eye o mitema mya bino botikali na elindo te, soko te bokozwa bokweyisami; mpe bokweyisami bwa bino bozali boyengebene mpo boluli eye bozwi te.

26 Mpe sikawa, mpo ya ntina ya makambo maye nalobaki epai ya bino—ena ezali, mpo ya ntina ya kokangaka bolimbisi bwa masumu ma bino mokolo na mokolo, ete bokoka kotambola na elindo te liboso lya Nzambe—Nalingi ete bokabaka eteni ya biloko bya bino na bazangi, moto na moto engebene na eye azwi, lokola koleisaka oyo azali na nzala, kolatisaka oyo azali bolumbu, kobimelaka bakoni mpe kokabolaka mpo ya bobondisi bwa bango, o molimo mpe o nzoto lokola, engebene na mposa ya bango.

27 Mpe tala ete makambo maye manso masalemi na bwania mpe na molongo; mpo esengeli te ete moto moko akima mbangu koleka azali na makasi. Mpe lisusu, elongobani ete azala na etingia, ete na yango akoka kolonga lifuta; yango wana, makambo manso masengeli kosalema na molongo.

28 Mpe nalingi ete bomikundola, ete onso oyo o ntei ya bino akodefa na moto wa penepene na ye asengeli kozongisa eloko eye adefi, engebene lokola andimaki, soko te okosala lisumu; mpe mbele okotinda moto wa penepene na yo asala lisumu lokola.

29 Mpe o nsuka, nakoki te kolobela bino makambo manso na mango bokoki kosala masumu; mpo ezali nzela mpe mitindo lolenge na lolenge, kutu boye mingi ete nakoki te kotanga yango.

30 Kasi eye nzike nakoki kolobela bino, ete soko bokokengele te binomei, mpe makanisi ma bino, mpe maloba ma bino, mpe misala mya bino, mpe bokobatela te mitindo mya Nzambe, mpe kokoba te o bondimi bwa nini boyokaki etali boyei bwa Nkolo wa biso, kutu kina o nsuka ya bomoi bwa bino, bosengeli kowa. Mpe sikawa, O moto, omikundola, mpe owa te.