Makomi
Moziya 5


Mokapo 5

Basantu bakomi bana babali mpe bana basi ba Klisto o nzela ya bondimi—Babiangemi nde na nkombo ya Klisto—Mokonzi Benyamina apesi bango toli bazala sikisiki mpe molende o misala milamu. Penepene na 124 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete elobaki mokonzi Benyamina boye na bato ba ye, atindaki bato o ntei ya bango, kozalaka na mposa ya koyeba na bato ba ye soko bandimaki makambo alobaki epai ya bango.

2 Mpe bango banso babelelaki na mongongo moko, kolobaka: Iyo, tondimi makambo manso maye olobi epai ya biso; mpe lisusu, toyebi sikisiki mpe bosolo bwa mango, na ntina ya Molimo mwa Nkolo wa Nguya Inso, oyo asali mbongwana ekasi na biso, to o mitema mya biso, ete tozali lisusu na meko mpo ya kosala bobe te, kasi mpo ya kosala bolamu ntango inso.

3 Mpe biso, bisomei, lisusu, na bolamu bozanga ndelo bwa Nzambe, mpe na mimoniseli mya Molimo mwa ye, tozali na mamoni manene ma eye ekoya; mpe ezalaki yango elongobani, tokoki kobikula makambo manso.

4 Mpe ezali bondimi tozwaki likolo lya makambo maye mokonzi wa biso alobaki epai ya biso maye mapesaki biso boyebi boye bonene, na yango tokosepela na bosepeli mpenza ya lolenge loye.

5 Mpe tozali kolinga kokota o kati ya boyokani boko elongo na Nzambe wa biso mpo ya kosala bolingi bwa ye, mpe kozala na botosi na mitindo mya ye na makambo manso maye akotinda biso, etikali ya mikolo mya biso minso, ete tokoka komeme te likolo lya bisomei monioko moko mokosuka mokolo moko te, lokola elobamaki na anzelu, ete tokoka komele te nkeni ya nkele ya Nzambe.

6 Mpe sikawa, oyo ezali maloba maye mokonzi Benyamina azalaki na yango mposa na bango; mpe yango wana alobaki epai ya bango: Bolobi maloba maye nazali na yango mposa; mpe boyokani boye bosali bozali boyokani sembo.

7 Mpe sikawa, mpo ya boyokani boye bosali bokobiangema bana ba Klisto, bana babali ba ye, mpe bana basi ba ye; mpo tala, mokolo moye aboti bino o molimo; mpo bolobi ete mitema mya bino mibongwani na bondimi likolo lya nkombo ya ye; yango wana, bobotami na ye mpe bokomi bana babali mpe bana basi ba ye.

8 Mpe o nse ya moto moye bokomi bansomi, mpe ezali moto mosusu te na yango bokoki kokoma bansomi. Ezali nkombo esusu te epesami na yango lobiko lokoya; yango wana, nalingi ete bokamata likolo lya bino nkombo ya Klisto, bino banso baye bokoti o kati ya boyokani elongo na Nzambe ete bokozala batosi kina o nsuka ya bomoi bwa bino.

9 Mpe ekosalema ete onso oyo akosala eye akomonomo o loboko la mobali la Nzambe, mpo akoyeba nkombo na yango abiangemi; mpo akobiangema na nkombo ya Klisto.

10 Mpe sikawa ekosalema ete, onso oyo akokamata te likolo lya ye nkombo ya Klisto akobiangema na yoko nkombo esusu; yango wana, akomimono o loboko la mwasi la Nzambe.

11 Mpe nalingi ete bomikundola lisusu, ete eye ezali nkombo eye nalobaki ete nakopesa epai ya bino eye ekolongolama mokolo moko te, longola se soko ezali o nzela ya bobuki mobeko; yango wana, bosala keba ete bobuka mobeko te, ete nkombo yango elongolama mpenza te libanda lya mitema mya bino.

12 Nalobi epai ya bino ete, nalingi ete bomikundola kokanga nkombo ekomama ntango inso o mitema mya bino, ete bomonomo te o loboko la mwasi la Nzambe, kasi ete boyoka mpe boyeba mongongo na yango bokobiangema, mpe lisusu, nkombo eye akobianga bino.

13 Mpo boniboni eyebi moto moko nkolo oyo asaleli te, mpe oyo azali mopaya epai ya ye, mpe azali mosika uta o makanisi mpe mikano mya motema mwa ye?

14 Mpe lisusu, moto moko akamata mpunda ya moto wa penepene na ye, mpe abomba yango? Nalobi epai ya bino, Te; akolinga kutu te ete akoka koleisama o ntei ya bibwele bya ye, kasi akobengana ye mosika, mpe akobwaka ye libanda. Nakoloba epai ya bino, ete kutu boye ekozala o ntei ya bino soko boyebi te nkombo na yango bobiangemi.

15 Yango wana, nalingi ete bozala sikisiki mpe molende, ntango inso kotondaka na misala milamu, ete Klisto, Nkolo Nzambe wa Nguya Inso, akoka kokanga bino ba ye, ete bokoka komememe o lola, ete bokoka kozwa lobiko la libela mpe bomoi bwa seko, na bwania, mpe nguya, mpe boyengebene, mpe ngolu ya ye oyo akelaki biloko binso, o lola mpe o mabele, oyo azali Nzambe likolo lya inso. Amene.