Makomi
Omini 1


Buku ya Omini

Mokapo 1

Omini, Amaloni, Kemisi, Abinadomi, mpe Amaleki, moto na moto o ntango ya ye, babateli makundoli—Moziya abomboli bato ba Zalayemila, baye bayaki uta o Yelusaleme o mikolo mya Sidikiya—Moziya bamopomi mokonzi likolo lya bango—Biboto bya Muleki o Zalayemila babombolaka Koliatumili, moto wa nsuka wa Bayalede—Mokonzi Benyamina akitani Moziya—Bato basengeli kobonza bozo bwa bango lokola libonza lyoko na Klisto. Penepene na 323–130 Yambo ya Klisto.

1 Tala, esalemaki ete ngai, Omini, etindami ngai na tata wa ngai, Yalomi, ete nakoma mwa moke likolo lya palaki iye, mpo ya kobatela bonkoko bwa biso—

2 Yango wana, o mikolo mya ngai, nalingi ete boyeba ete nabundaki nzike na mopanga mpo ya kobatela bato ba ngai, Banefi, uta o bokwei o kati ya maboko ma bayini ba bango, Balamani. Kasi tala, ngai na ngaimei nazali moto wa nkuna, mpe natosaki te meko mpe mitindo mya Nkolo lokola nasengelaki kosala.

3 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na ntuku sambo na motoba milekaki, mpe tozalaka na bileko mingi bya kimia; mpe tozalaka na bileko mingi bya etumba ya ndongo mpe ya bosopi makila. Iyo, mpe o nsuka, mibu nkama mibale na ntuku mwambe na mibale milekaki, mpe nabombaka palaki iye engebene na mitindo mya batata ba ngai; mpe napesaki yango na mwana wa ngai Amaloni. Mpe natii nsuka yoko.

4 Mpe sikawa ngai, Amaloni, nakomi makambo nini nakomi, maye mazali make, o buku ya tata wa ngai.

5 Tala, esalemaki ete mibu kama misato na ntuku mibale milekaki, mpe eteni eleki nkuna ya Banefi ebebisamaki.

6 Mpo Nkolo alingaki te kotika, esilisaki ye kokamba bango libanda lya mboka ya Yelusaleme mpe kobatela mpe kobomba bango na bokwei o kati ya maboko ma bayini ba bango, iyo, alingaki te kotika ete maloba malakisama bosolo te, iyo, maye alobaki epai ya batata ba biso, kolobaka ete: Mbala nzike lokola ekobomba bino te mitindo mya ngai bokozwa te bomengo o mboka.

7 Yango wana, Nkolo abimelaki bango o bosambisi bonene; nzokande, abikisaki basembo ete bawa te, kasi abikisaki bango libanda lya maboko ma bayini ba bango.

8 Mpe esalemaki ete napesaki palaki epai ya ndeko wa ngai Kemisi.

9 Sikawa ngai, Kemisi, nakomi mwa makambo nini nakomi, o buku ena kaka elongo na ndeko wa ngai; mpo tala, namonoki ya nsuka eye akomaki, ete akomaki yango na loboko la yemei; mpe akomaki yango o mokolo moye apesaki yango epai ya ngai. Mpe nsima ya lolenge loye tobatelaki makundoli, mpo ezali engebene na mitindo mya batata ba biso. Mpe natii nsuka yoko.

10 Tala, ngai, Abinadomi, nazali mwana mobali wa Kemisi. Tala, esalemaki ete namonoki etumba mpe boweli boike o kati ya bato ba ngai, Banefi, mpe Balamani; mpe ngai, elongo na mopanga mwa ngaimei, nakamataki bomoi bwa mingi ya Balamani mpo ya kobatela bandeko ba ngai.

11 Mpe tala, likundoli lya bato baye ikomami o palaki iye izali na bakonzi, engebene na nkola; mpe nayebi libimisi te longola se liye likomamaki, mpe mabikuli; yango wana, eye ekoki ekomamaki. Mpe natii nsuka yoko.

12 Tala, nazali Amaleki, mwana mobali wa Abinadomi. Tala, nakoloba epai ya bino mwa moke etali Moziya, oyo atiamaki mokonzi likolo lya mboka ya Zalayemila; mpo tala, ekebisamaki ye na Nkolo ete akima libanda lya mboka ya Nefi, mpe mingi lokola balingaki koyokemela epai ya mongongo mwa Nkolo balingaki kokende libanda lya mboka elongo na ye, o kati ya esobe—

13 Mpe esalemaki ete asalaki engebene lokola Nkolo atindaki ye. Mpe bakendeki libanda lya mboka o kati ya esobe, lokola mingi balingaki koyokemela epai ya mongongo mwa Nkolo; mpe bakambemaki na mateya mpe mabikuli mingi. Mpe bakebisamaki mbala inso na liloba lya Nzambe; mpe bakambemaki na nguya ya loboko la ye, o katikati ya esobe, kina bakitaki o kati ya mboka eye ebiangemi mboka ya Zalayemila.

14 Mpe babombolaki bato baye babiangemi bato ba Zalayemila. Sikawa, ezalaki bosepeli enene o ntei ya bato ba Zalayemila; mpe lisusu Zalayemila asepelaki mpenza, zambi Nkolo atindaki bato ba Moziya elongo na palaki ya motako iye ikwaki likundoli lya Bayuda.

15 Tala, esalemaki ete Moziya abombolaki ete bato ba Zalayemila bayaki uta o Yelusaleme o ntango eye Sidikiya, mokonzi wa Yuda, akangemaki mokangemi o Babiloni.

16 Mpe bakendeki mobembo o esobe, mpe bamememeki na loboko la Nkolo o bokatisi bwa mai manene, o kati ya mboka wapi Moziya abombolaki bango; mpe bafandaki kuna uta o ntango ena.

17 Mpe o ntango eye Moziya abombolaki bango, bakomaki baike mpenza. Nzokande, bazalaka na bitumba mingi mpe boweli bwa ndongo, mpe bakweyaka na mopanga mbala na mbala; mpe lokota la bango lobebaki; mpe bamemeki makundoli te elongo na bango; mpe bawanganaki bozali bwa Mokeli wa bango; mpe Moziya, to bato ba Moziya, bakokaki kososola mango te.

18 Kasi esalemaki ete Moziya asalaki ete balakisama o lokota la ye. Mpe esalemaki ete esilaki bango kolakisama o lokota la Moziya, Zalayemila apesaki bonkoko bwa batata ba ye, engebene na bokundoli bwa ye; mpe makomami, kasi o palaki iye te.

19 Mpe esalemaki ete bato ba Zalayemila, mpe ba Moziya, basanganaki elongo; mpe Moziya aponomoki kozala mokonzi wa bango.

20 Mpe esalemaki ete o mikolo mya Moziya, ezalaki libanga lyoko linene likomamaki epai ya ye na minkoma likolo lya lyango; mpe abongolaki minkoma na likabo mpe nguya ya Nzambe.

21 Mpe mipesi nsango moko ya Koliatumili moko, mpe bobomi bwa bato ba ye. Mpe Koliatumili abombolamaki na bato ba Zalayemila; mpe afandaki elongo na bango o ntaka ya sanza libwa.

22 Milobaki lisusu ndambo yoko ya maloba matali batata ba ye. Mpe baboti ba ye ba yambo bayaki uta o linongi, o ntango Nkolo abulunganisaki lokota la bato; mpe monkete mwa Nkolo mokweyaki likolo lya bango engebene na bosambisi bwa ye, boye bozali boyengebene; mpe mikuwa mya bango milali mipalangani o mboka ona nordi.

23 Tala, ngai, Amaleki, nabotamaki o mikolo mya Moziya; mpe nazalaki na bomoi mpo ya komono liwa lya ye; mpe Benyamina, mwana mobali wa ye, akonzaki o esika ya ye.

24 Mpe tala, namonoki, o mikolo mya mokonzi Benyamina, etumba ya ndongo mpe bosopi makila o kati ya Banefi mpe Balamani. Kasi tala, Banefi bazwaki litomba liike likolo lya bango; iyo, mpo ete mokonzi Benyamina abenganaki bango libanda lya mboka Zalayemila.

25 Mpe esalemaki ete nabandaki kozala mobange; mpe, ezalaki ngai na bana te, mpe eyebaki ngai ete mokonzi Benyamina azalaki moto moyengebene liboso lya miso mya Nkolo, yango wana, nakopesa ye palaki iye epai ya ye, kolendisaka bato banso mpo ya koya epai ya Nzambe, Mosantu Moko wa Yisalaele, mpe kondima o mabikuli, mpe o mabimisi, mpe o lisalisi lya banzelu, mpe o likabo lya bolobi minoko, mpe o likabo lya bolimboli nkota, mpe o makambo manso maye mazali malamu; mpo ezali eloko te eye ezali elamu longola se soko eyei uta na Nkolo; mpe eye ezali ebe eyei uta na zabulu.

26 Mpe sikawa, bandeko balingami ba ngai, nalingi ete boya epai ya Klisto, oyo azali Mosantu Moko wa Yisalaele, mpe bokabola lobiko la ye, mpe nguya ya bosikoli bwa ye. iyo, yakani epai ya ye, mpe bonzani bozo bwa bino mobimba lokola libonza lyoko epai ya ye, mpe kobani na kokilaka bilei mpe kosambelaka, mpe tiani molende kina o nsuka; mpe lokola Nkolo azali na bomoi bokobikisama.

27 Mpe sikawa nalingi koloba mwa moke etali motuya mwa motango moko mwa baye bamataki o kati ya esobe mpo ya kozonga o mboka ya Nefi; mpo ezalaki motango moko monene mwa baye bazalaki na mposa ya kozwa mboka ya lisango lya bango.

28 Yango wana, bamataki o kati ya esobe. Mpe ezalaki mokambi wa bango moto wa mpiko mpe moto mokasi, mpe moto wa nkanza, yango wana asalaki boweli o ntei ya bango; mpe babomaki bango banso, longola se ntuku itanu, o esobe, mpe bazongaki lisusu o mboka ya Zalayemila.

29 Mpe esalemaki ete bakamataki lokola basusu ba motango moko monene, mpe bakendeki mobembo mwa bango lisusu o kati ya esobe.

30 Mpe ngai, Amaleki, nazalaka na ndeko mobali moko, oyo lokola akendeki elongo na bango; mpe uta kala nayebi te nsango ya bango. Mpe nazali penepene na kolala o lilita lya ngai; mpe palaki iye itondi. Mpe natii nsuka yoko ya bolobi bwa ngai.