Makomi
Maloba ma Molomoni 1


Maloba ma Molomoni

Mokapo 1

Molomoni asali bokuse bwa palaki inene ya Nefi—Atii palaki ike elongo na palaki isusu—Mokonzi Benyamina atii kimia o mboka. Penepene na 385 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa ngai, Molomoni, ekomi ngai mpembeni mpo ya kopesa likundoli liye nazalaka kosala o kati ya maboko ma mwana mobali wa ngai Moloni, tala natatolaki penepene na bobebisami bonso bwa bato ba ngai, Banefi.

2 Mpe ezali mibu mikama mingi nsima ya boyei bwa Klisto eye napesi makundoli maye o kati ya maboko ma mwana mobali wa ngai; mpe nabanzi ete akotatola bobebisami mobimba bwa bato ba ngai. Kasi tika Nzambe alinga ete abikisa mango, ete akoka kokoma mwa moke etali bango, mpe mwa moke etali Klisto, ete mbele yoko mokolo makoka kopesa bango litomba.

3 Mpe sikawa, nakoloba mwa moke etali eye nakomaki; mpo esilisaki ngai kosala bokuse boko uta o palaki ya Nefi, kina o bokonzi bwa mokonzi Benyamina, oyo Amaleki alobelaki, nalukaki o ntei ya mabikuli maye bapesaka o kati ya maboko ma ngai, mpe nakutaki palaki iye, iye ikwi nsango eke eye ya baprofeta, uta na Yakobo kina o bokonzi bwa mokonzi oyo Benyamina, mpe lisusu mingi ya maloba ma Nefi.

4 Mpe makambo maye mazali likolo lya palaki iye makosepelisa ngai, mpo ya mabikuli ma boyei bwa Klisto; mpe batata ba ngai bayebaki ete mingi ya mango makokisamaki; iyo, mpe lisusu nayebi ete makambo mingi lokola mabikulamaki matali biso kina mokolo moye makokisamaki, mpe lokola mingi nsima na mokolo moye masengeli na ntembe te kosalema—

5 Yango wana, naponoki makambo maye, mpo ya kosilisa likundoli lya ngai likolo lya bango, mango matikali ma likundoli lya ngai nakokamata uta o palaki ya Nefi; mpe nakoki kokoma te eteni ya nkama ya makambo ma bato ba ngai.

6 Kasi tala, nakokamata palaki iye, iye ikwi mabikuli mpe mabimisi maye, mpe nakotia yango elongo na etikali ya likundoli lya ngai, mpo malingami epai ya ngai; mpe nayebi ete makolingama epai ya bandeko ba ngai.

7 Mpe nasali eye mpo ya mwango mwa bwania; mpo boye eyimisani ngai, engebene na misala mya Molimo mwa Nkolo oyo azali na ngai. Mpe sikawa, nayebi makambo manso te; kasi Nkolo ayebi makambo manso maye makoya; yango wana, asali na ngai mpo ya kosala engebene na bolingi bwa ye.

8 Mpe losambo la ngai na Nzambe lotali bandeko ba ngai, ete bakoka mbala yoko lisusu koya o boyebi bwa Nzambe, iyo, bosikoli bwa Klisto; ete bakoka kozala lisusu bato kitoko.

9 Mpe sikawa ngai, Molomoni, nalingi kosilisa likundoli lya ngai, liye nakamataki uta o palaki ya Nefi; mpe nasali yango engebene na boyebi mpe bososoli boye Nzambe apesaki ngai.

10 Yango wana, esalemaki ete esilisaki Amaleki kopesa palaki iye o kati ya maboko ma mokonzi Benyamina, akamataki yango mpe atiaki yango elongo na palaki isusu, iye ikwi makundoli makitanisamaki na bakonzi, uta nkola o nkola kina o mikolo mya mokonzi Benyamina.

11 Mpe makitanisamaki uta na mokonzi Benyamina, uta nkola o nkola, kina makweyaki o kati ya maboko ma ngai. Mpe ngai, Molomoni, nasambeli Nzambe ete mabatelama uta o ntango eye kina nsima. Mpe nayebi ete makobatelama; mpo ezali makambo manene makomami likolo lya mango, uta o yango bato ba ngai mpe bandeko ba bango bakosambisama o mokolo monene mpe mwa nsuka, engebene na liloba lya Nzambe liye likomami.

12 Mpe sikawa, etali mokonzi oyo Benyamina—Azalaka mwa moke na boweli o ntei ya bato ba ye mei.

13 Mpe esalemaki lisusu ete mampinga ma Balamani makitaki libanda lya mboka ya Nefi, mpo ya kobunda na bato ba ye. Kasi tala, mokonzi Benyamina asangisaki elongo mampinga ma ye, mpe apikaki mpende likolo lya bango; mpe abundaki na makasi ma loboko la yemei, elongo na mopanga mwa Labana.

14 Mpe na makasi ma Nkolo bawelaki na bayini ba bango, kina babomaka nkoto mingi ya Balamani. Mpe esalemaki ete bawelaki na Balamani kina babenganaki bango libanda lya mboka mobimba ya lisango lya bango.

15 Mpe esalemaki ete esilaka kozala Baklisto ba lokuta, mpe minoko mya bango kokangema, mpe kotumbolama engebene na mabe ma bango;

16 Mpe esilaka kozala baprofeta ba lokuta, mpe baleyi ba lokuta mpe balakisi ba lokuta o ntei ya bato, mpe baye banso batumbolamaki engebene na mabe ma bango; mpe esilaka kozala boweli boike mpe bokabwani mosika epai ya Balamani, tala, esalemaki ete mokonzi Benyamina, na lisalisi lya baprofeta basantu baye bazalaki o ntei ya bato ba ye—

17 Mpo tala, mokonzi Benyamina azalaki moto mosantu, mpe akonzaki likolo lya bato ba ye na bosembo; mpe ezalaki bato basantu mingi o mboka, mpe bateyaki liloba lya Nzambe na nguya mpe na bokulaka; mpe basalelaki monkete na ntina ya nkanza ya bato—

18 Yango wana, na lisalisi lya baye, mokonzi Benyamina, na kosalaka na bokasi bonso bwa nzoto ya ye mpe na nguya ya bozo bwa ye mobimba, mpe lisusu baprofeta, atiaki mbala yoko lisusu kimia o mboka.