Moninga
Liahona
Sanza ya Mibale 2024


“Liahona,” Moninga, Sanza ya Mibale 2024, 26–27.

Etinda ya sanza mpo na Moninga, Sanza ya Mibale 2024

Liahona

Elilingi
maloba mosusu

Biema na Andrew Bosley

Nkolo ayebisaki Lehi akende na libota na ye na mboka ya elaka. Kasi bayebaki te ndenge nini bakokoma kuna.

Elilingi
maloba mosusu

Nkolo apesaki Lehi esaleli moko ya ntina mingi. Ezalaki lokola kompa. Ezalaki kolakisa nzela basengeli kokende. Babengaki yango Liahona.

Elilingi
maloba mosusu

Ntango babatelaki mitindo, Liahona ezalaki kosala. Ezalaki komema bango na bilei mpe na libateli. Kasi ntango bazalaki koswana mpe koboya kotosa, yango etikaki kosala.

Elilingi
maloba mosusu

Libota ya Lehi elandaki Liahona mpo ete bakoka kokoma na mboka ya elaka. Ntango toponi bolamu, Tata ya Lola akokamba biso mpe.

Kopakola Langi na Lokasa

Nakoki kobatisama lokola Yesu.

Elilingi
Maloba mosusu

Liyema na Adam Koford

Lolenge nini ekoki bino komilengela mpo na kobatisama?