2019
Kokolisa Bolingo ya Kosalisa
Sanza ya mibale 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya mibale 2019

Kokolisa Bolingo ya Kosalisa

Kosalisa ezali kotombola. Tokoki kotombola basusu ntango tomeki kososola oyo bazali kokutana na yango mpe kolakisa ete tozali na bolingi ya kotambola elongo na bango.

Mpo ete Tata na biso ya Lola alingi biso tokoma lokola Ye, mimekano tokutanaka na yango na bomoi oyo ekoki kosunga biso toyekola mabaku soki totie elikya epai na Ye mpe totikali na nzela. Kasi, kotikala na nzela ekoki kozala mbala mosusu mpasi ntango toyoki lokola tozali kokutana na mikakatano oyo ya biso moko.

Kasi tosalemaki te mpo na kotambola na nzela biso moko. Mobikisi akokisaki bolingo ya nsuka ya bobongi nie, akitaki na nse ya biloko nyonso mpo ete akoka koyeba lolenge nini akokaki kobikisa biso na babotau mpe babolembu na biso (tala Alma 7:11–12; Doctrine et Alliances 122:8). Azelaka ete moko na moko na biso alanda ndakisa na Ye mpe alakisa bolingo lokola. Mondimi nyonso ya Eklezia alakaki “kolela na baoyo bazali kolela; iyo, mpe kobondisa baye bazali na mposa ya libondisi” (Mozia 18:9). Atako mimekano na biso, toteyami na makomi mobimba totelema mpe “totombola maboko oyo ezali kolemba, mpe [kolendisa] mabolongo oyo elembi” mpe “kosala nzela etandama mpo makolo na bino, mpo ete oyo alembi akoka kobunga nzela te” (Baebele 12:12–13; tala lisusu Yisaya 35:3–4; Doctrine et Alliances 81:5–6).

Ntango tosimbi basusu na maboko, tika ete bayekama likolo na biso, mpe totambola elongo na bango, tosunga bango batikala na nzela libela mpo na Mobikisi kaka mpo na kobongola bango te—moko ya bantina monene ya lisalisi—kasi lisusu kobikisa bango (tala Doctrine et Alliances 112:13).

Bolingo Ezali Nini?

Bolingo ezali kososola mayoki ya moninga mosusu, makanisi, mpe lolenge ya bomoni na bango koleka ya biso moko.1

Kozala na bolingo ezali motuya kati na babokasi na biso ya kosalisa basusu mpe kokokisa ntina na biso lokola kosalisa bandeko mibali mpe basi. Epesaka biso ndingisa tomitia na esika ya moto mosusu.

Komitia na esika ya Moto Mosusu

Ezali na lisolo moko ya Mosantu ya mokolo ya nsuka ya mobali moko ya kimya oyo azalaki kofanda mbala mingi na molongo ya nsuka na ndako nzambe. Ntango mondimi moko ya lisanga likoki ya bampaka akufaki, episikopo apesaki mapamboli ya bonganganzambe mpo na kolendisa baye libota ya mpaka yango. Lingomba ya Bamama Basungi ememaki bilei. Baninga mpe bato ya penepene ya makanisi malamu bazalaki kokende kotala libota mpe koloba, “Boyebisa biso soki tokoki kosala nini mpo na lisungi.”

Kasi ntango moto ya kimia oyo ayaki kotala libota na nsima na moyi, abetaki ngonga ya ekuke mpe ntango mokufeli mobali ayanolaki, alobaki na pete, “Nayei kopangusa basapatu na bino.” Nsima ngonga moke, basapatu ya baye libota mobimba epangusamaki mpe engengisamaki mpo na bolengeli matanga. Eyenga oyo elandaki libota ya mpaka mowei bafandaki pembeni ya moto ya kimia na molongo ya nsuka.

Tala moto oyo azali na makoki ya koyanola na bolingo oyo esengeli. Bango mpe ye lokola bapambolamaki na nzela ya lisalisi ekambama na bolingo.

Lolenge Nini Nakoki Kokolisa Bolingo?

Basusu bamonanaka lokola bapambolama na likabo ya bolingo. Kasi mpo na baoyo balukaka, ezali na nsango malamu. Mibu ntuku 30 eleki, mwa motango ya baluki bayekolaki bolingo. Kasi ebele kati na bango bayekolaki mama na likambo yango na babokeseni ya makanisi, basusu bandimaki ete bolingo ezali eloko oyo ekoki koyekolama.2

Tokoki kosambela na ntina ya likabo ya bolingo. Na ntina ya komatisa, ezali lisusu na lisungi kozala na bososoli malamu ya lolenge nini bolingo esalaka. Makanisi oyo elandi endimami mbala mingi lokola makambo ya ebandeli ya bolingo.3 Ntango makambo oyo ezui esika mbala mingi kasi biso kutu tozangi makanisi ete ezali kosalema, kozala na bokebi na yango ekopesa biso litomba ya komona mabaku ya komatisa.

1.Kososola

Bolingo esengaka mwa bososoli ya ezalela ya basusu. Soki tososoli malamu makambo na bango, ekokoma pete mpo na kososola lolenge nini bazali komiyoka mpo na yango mpe nini tokoki kosala mpo na kosalisa.

Koyokaka mpenza, kotunaka mituna mpe kosalaka likita elongo na bango mpe basusu ezali misala ya ntina mpo na bososoli ya ezalela na bango. Boyekola mingi na ntina ya makanisi oyo na baartikele ya Mabongi ya Kosalisa oyo eleki:

  • “Makambo Mitano oyo Bayoki Malamu Basalaka,” Liahona, Sanza ya motoba 2018, 6.

  • “Kosala likita na ntina ya Bosenga na Bango,” Liahona, Sanza ya mwambe. 2018, 6.

  • “Kokotisa Basusu na Mosala—lokola Esengeli,” Liahona,Sanza ya zomi. 2018, 6.

Ntango toluki kososola, tosengeli kozwa ntango ya kososola ezalela na bango moko kaka na esika ya komikotisaka makanisi oyo efandisami likolo na mosusu oyo akutanaki na likambo ya lolenge moko. Na ngambo mosusu, tokoki kozanga kososola mpe kotika bango komiyokaka ya kososolama te.

2.Kanisa

Na babokasi na biso ya kotosa liyokani ya kolela na baoyo bazali kolela mpe kolendisa baoyo bazali na bosenga ya bolendisi, tokoki kosambela ete Molimo Mosantu asunga biso tososola oyo moto moko azali koyoka mpe lolenge nini tokoki kosunga.4

Ntango tososoli makambo ya moto moko, moko na moko na biso—soki ekosalema na bopete to te—tokoki kolekela na ngalasisi ya kokanisaka oyo tokoki kokanisa to koyoka na likambo wana. Kososolaka makanisi oyo mpe mayoki, elongo na bokambi ya Molimo Mosanto, ekoki kosunga biso toyanola na likambo na bango.

Ntango tososoli makambo ya basusu mpe tokanisi lolenge nini basengeli koyoka, ezali motuya ete tosambisi bango te na lolenge mabe (tala Matai 7:1). Kotongo na ntina lolenge moto mosusu akutani na ezalela yango ekoki kokamba biso na komona mpamba mpasi oyo likambo ezali kosala.

3.Eyano

Lolenge toyanolaka ezali ntina mpo ete yango ezali kolakisa bolingo na biso. Ezali na molongo ebele ya kolakisa bososoli na biso na maloba mpe misala lokola. Ezali motuya tomikundola ete ntina na biso ezali kaka te ya kobongisa likambo. Mbala mingi ntina ezali kaka kotombola mpe kolendisa na kotikaka bango bayeba ete bazali bango moko te. Oyo ekoki kolinga koloba, “nazali na esengo oyebisaki ngai” to “limbisa ngai. Wana esengeli kosala mpasi.”

Na libaku nyonso eyano na biso esengeli kozala malamu. Mpe kolongobana, kozala na mposa ekoka ya kosalisa basusu bamona babotau na biso moko mpe makama ekoki kosala ntina ya mokangano.

Libiangi ya Kosala

Ntango obanzi makambu ya baoyo ozali kosalisa, kanisa kozalaka na ezalela na bango mpe oyo osengeli komona lokola lisalisi soki ozalaki na esika na bango. Sambela mpo ya kososola lolenge nini bazali koyoka mpe kolanda. Eyano na yo ekoki kozala pete, kasi ekozala ntina koleka.

Matangi

  1. Tala W. Ickes, Empathic Accuracy (1997); mpe M. L. Hoffman, Empathy and Moral Development: Implications for Caring and Justice (2000).

  2. Tala, ndakisa, Emily Teding van Berkhout mpe John M. Malouff, “The Efficacy of Empathy Training: A Meta-Analysis of Randomized Controlled Trials,” Journal of Counseling Psychology (2016), 63(1), 32–41.

  3. Tala, ndakisa, Brené Brown, I Thought It Was Just Me (But It Isn’t) (2008); Theresa Wiseman, “A Concept Analysis of Empathy,” Journal of Advanced Nursing (1996), 23, 1162–67; mpe Ed Neukrug mpe basusu, “Creative and Novel Approaches to Empathy: a Neo-Rogerian Perspective,” Journal of Mental Health Counseling, 35(1) (Sanza ya yambo 2013), 29–42.

  4. Tala Henry B. Eyring, “The Comforter,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 17–21.