2019
Kokomisa Mosala ya Kosalisa Esengo
Sanza ya Minei 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya minei 2019

Kokomisa Mosala ya Kosalisa Esengo

Kosalisaka na bolingo ememaka esengo na banso mibale mopesi mpe mozwi.

Ntango mosusu boluki na biso ya esengo na bomoi oyo ekoki kozala lokola kokimaka likolo ya tapis roulant. Tokimi mpe tokimi kino toyoki lokola tozwi eloko moko te. Mpo na basusu, likanisi ya kosalisa basusu emonisamaka na pete lokola kobakisaka mosala ebele ya kosala.

Kasi Tata na biso ya Lola alingi biso tozala na esengo mpe ayebisaki biso “bato bazali, ete bakoka kozala na esengo” (2 Nefi 2:25). Mpe Mobikisi ateyaki ete kosalisaka basusu ezali eteni moko ya ntina ya lolenge nini tomemaka esengo na babomoi na biso mpe babomoi ya basusu.

Esengo Ezali Nini?

Esengo elimbolami lokola “liyoki moko ya elengi makasi mpe bosepeli.”1 Baprofeta ya mikolo ya nsuka balakisaki na polele na oyo etali esika esengo ewutaka mpe lolenge nini tokoki kozwa yango. “Esengo toyokaka etali mpenza makambo ya babomoi na biso te kasi ezali mpenza moboko ya babomoi na biso,” elobaki Mokambi Russell M. Nelson. “… esengo ewutaka mpe na ntina ya [Yesu Klistu]. Azali liziba ya esengo nyonso.”2

Kosalisa Ememaka Esengo

Ntango Lehi aliaki mbuma ya nzete ya bomoi, molimo na ye eyokisamaki “na esengo makasi mpenza” (1 Nefi 8:12). Mposa na ye ya yambo ezalaki ya kokabola mbuma oyo na baoyo ye alingaki.

Bolingi na biso ya kosalisa basusu ekoki komema esengo ya lolenge oyo epai na biso mpe basusu. Mobikisi ateyaki bayekoli na Ye ete mbuma oyo tobotaka ntango tokangami epai na Ye esungaka biso komemela biso esengo meke (tala Yoane 15:1–11). Kosalaka mosala na Ye na kosalisaka mpe kolukaka komema basusu epai na Ye ekoki kozala boyebi moko ya esengo (tala Luka 15:7; Alma 29:9; Doctrine et Alliances 18:16; 50:22). Tokoki kozwa esengo oyo atako liboso ya bonguna mpe mpasi (tala 2 Bakolinti 7:4; Bakolose 1:11).

Mobikisi alakisaki biso ndakisa moko ebonga nie ete kosalisa ezali liziba monene koleka ya esengo ya solo na bomoi ya nkufa. Ntango tosalisi bandeko na biso ya mibali mpe ya basi lokola Mobikisi, na bolingani mpe bolingo na mitema na biso, tokoki kozwa esengo oyo eleki bosepeli ya pete.

“Ntango tozwaka [kosalisa] na mitema ya bolingi, toko … zala pene ya kokoma bato ya Siona mpe tokoyoka esengo monene na baoyo tosalisi na nzela ya kimoyekoli,” eteyaki Ndeko mwasi Jean B. Bingham, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.3

Lolenge nini Tokoki Kosala Mosala ya Kosalisa na Esengo Koleka?

Ezali na nzela ebele tokoki komema esengo na kosalisa na biso. Tala mwa makanisi:

  1. Sosola ntina na yo na kosalisaka. Ezali na ntina ebele mpo na kosalisa. Na nsuka, babokasi na biso esengeli kokokana na bantina ya Nzambe “ya kokokisa bozangi kufa mpe bomoi ya seko ya moto” (Mose 1:39). Ntango tondimi libiangi ya Mokambi Russell M. Nelson ya kosalisa basusu na nzela ya liyokani, tokoki kozwa esengo na kosalaka mosala ya Nzambe.4 (Mpo na bantina ebele ya kosalisa, tala “Mabongi ya Kosalisa: Ntina Oyo Ekobongola Kosalisa na Biso,” na Sanza ya yambo 2018 Liahona.)

  2. Komisa kosalisa lokola ntina ya bato kasi misala te. Mokambi Thomas S. Monson mbala mingi akundolisaki biso: “Kotika ata moke te kpokoso ya koyambola ekoma na motuya koleka moto ya kolinga.”5 Kosalisa ezali na ntina ya bolingo ya bato, kasi na ntina ya makambo ya kosala te. Ntango tozali kokola mpo na kolinga lokola Yesu alingaki, tokozala ya kofungwama makasi na esengo oyo ewutaka na kosungaka basusu.

  3. Komisa mosala ya kosalisa pete. Mokambi M. Russell Ballard, Mokambi ya Sikoyo na Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, ayebisi biso: “Makambo minene ekokisamaka na makambo ya mike mike. … Misala na biso ya mike mpe pete ya boboto mpe lisalisi ekobakisama kati na bomoi moko etondisama na bolingo mpo na Tata na Lola, bomipesi na mosala ya Nkolo Yesu Klisto, mpe ntina ya kimya mpe esengo mbala na mbala oyo tosalisi moto moko.”6

  4. Longola bolembu na mosala ya kosalisa. Ezali mokumba na yo te ya kosala lobiko ya moto mosusu. Wana ezali katikati ya moto ye moko mpe Nkolo. Mokumba na biso ezali ya kolinga bango mpe kosunga bango bazongela Yesu Klisto, oyo azali Mobikisi na bango.

Kopusa Lobi Esengo ya Lisalisi Te

Mbala mosusu bato babangaka kosenga lisungi, na yango kokabaka mosala na biso ekoki kozala oyo bango bazali na yango mposa. Kasi komilingisaka na bato na makasi ezali ntina te, mpe lokola. Kosengaka ndingisa yambo ya kosalisa ezali likanisi malamu.

Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale alobelaki na ntina ya mama monzemba oyo azwaki kolokoto mpe bana na ye mpe nsima bakomaki maladi mpe. Ndaku ya bopeto koleka ekomaki bosoto mpe ezanga bobongisi. Basani mpe ya bilamba ya mbindo etondaki.

Na ngonga moko elekelaki ye mpenza, Lingomba ya Bamama Basungi ebetaki ekuke na ye. Balobaki kutu te, “Yebisa biso soki tokoki kosunga yo.” Ntango bamonaki kaka lolenge ndako ezalaki, bamipesaki na mosala.

“Bapetolaki KO yango, bamemaki pole mpe bongengi na libota, mpe babengaki moninga moko mpo na komema mwa biloko ya kolia oyo esengelamaki mingi. Ntango basilisaki nsima mosala na bango mpe bapesaki bambote na bango ya bokabwani, batikaki mama ya elenge wana na mpizoli—mpizoli ya botondi mpe bolingo.”7

Bango mibale bapesi mpe mozwi bayokaki moto ya esengo.

Salela Esengo na Bomoi na Yo

Soki tokoki kosalela esengo monene, kimya, mpe bosepeli na babomoi na biso mingi, tokozala na makoki ya kokabola na basusu ntango tozali kosalisa. Esengo eyaka na nzela ya Molimo Mosantu (tala Bagalatia 5:22 mpe Doctrine et Alliances 11:13). Ezali eloko oyo tokoki kosambela mpo na yango (tala Doctrine et Alliances 136:29) mpe kobengisa na babomoi na biso. Tala mwa makanisi mpo na kosalela esengo na babomoi na biso moko:

  1. Tanga mapamboli na yo. Ntango otali bomoi na yo, koma na zulunale na yo makambu oyo Nzambe apambolaki yo.8 Tala bolamu nyonso oyo ezali nzinganzinga na yo.9 Keba na oyo ekoki kosala ete oyoka esengo na yo te mpe koma ndenge ya kosilisa to kososola yango malamu. Na ntango ya eleko ya Pasika oyo, zwa ntango ya koluka mokangano monene na Mobikisi (tala Doctrine et Alliances 101:36).

  2. Salela bofuluki ya mayele. Esengo ekoki koyela yo na bangonga ya kimya.10 Yokamela mpenza na oyo ememelaka yo esengo (tala 1 Ntango 16:15). Ntango mosusu ezali malamu kozala mosika ya media mpo na kosalela boluki ya mayele.11

  3. Kima komikokanisa to komimeka. Elobama ete komikokanisa ezali moyibi ya esengo. Paul akebisaki ete baoyo “komipima na bango mpenza mpe komimeka kati na bango moko, bazangi bwanya” (2 Bakolinti 10:12).

  4. Luka emoniseli na yo moko. Mobikisi: ateyaki “soki bosengi, bokozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi, mpo bokoka koyeba mabombano mpe makambo ya kimya—oyo ememaka esengo, oyo ememaka bomoi ya seko” (Doctrine et Alliances 42:61).

Libiangi ya Kosala

Lolenge nini bokoki komatisa esengo oyo bozwaka na bomoi na bino na nzela ya kosalisa?

Matangi

  1. “Esengo,” en.oxforddictionaries.com

  2. Russell M. Nelson, “Esengo mpe Libiki ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 82.

  3. Jean B. Bingham, “Kosalisa lokola Mobikisi Asalaka,” Liahona, Snza ya mitano 2018, 107.

  4. Tala Russell M. Nelson, “Lokola Tozali Kokende Liboso Elongo ,” Liahona, Sanza ya minei 2018, 4–7.

  5. Thomas S. Monson, “Kozwaka Esengo na Mobembo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2008, 86.

  6. M. Russell Ballard, “Kozwaka Esengo na Nzela ya Mosala ya Bolingo,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 49.

  7. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Kosalelaka Nsango malamu na Esengo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2014, 120–123.

  8. Tala Henry B. Eyring, “O Mikundola, Mikundola,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2007, 67.

  9. Tala Jean B. Bingham, “Ete Esengo na Bino Ekokoza Kozala Meke,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 87.

  10. Tala Dieter F. Uchtdorf, “Makambo Oyo Etungisaka Mingi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2010, 21.

  11. Tala Gary E. Stevenson, “Kibwisa Mpimpa ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2017, 46.