2019
Kosalisa Ezali Komona Basusu lokola Mobikisi Amonaka
Sanza ya Motoba 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Motoba 2019

Kosalisa Ezali Komona Basusu lokola Mobikisi Amonaka

Yesu alekisaki ebele ya ntango na ye elongo na baoyo bazalaki ya kokesena; Amonaki makoki na bango ya bonzambe.

Na bokasi na biso ya kosalisa lokola Mobikisi, tokoki kosengama mpo na kosalisa moto oyo azali ya kokesena na biso. Yango elakisaka libaku mpo na biso koyekola mpe kokola.

Bokeseni ya bonkoko, ya bobokoli, ya langi ya loposo, ya mosolo, ya mobu, ya bizalela eleka to ya sikawa, to ya babokeseni mosusu ekoki kosala ete ezala pete mpo na kosambisa bato yambo kutu toyeba bango. Kosambisa yambo ya koyeba oyo ezali ntina ya likama, mpe Mobikisi akebisaki na ntina na yango, (tala 1 Samuele 16:7; Yoane 7:24).

Ekoki biso komona babokeseni eleka mpe komona basusu lokola Mobikisi amonaka? Lolenge nini tokoki koyekola kolinga basusu kozanga kotala oyo bazali mpe oyo bakoki kokoma?

Kotalaka mpe Kolingaka

Biblia elobeli lisolo oyo eyebana ya elenge mozwi oyo atunaki lolenge nini kozwa bomoi ya seko: “Nde Yesu kotalaka ye alingaki ye, mpe alobaki na ye, Eloko moko ezangi yo: kende, teka biloko na yo nyonso, mpe pesa na babola, mpe okozwa nkita ya lola: mpe yaka, mema ekulusu, mpe landa ngai” (Malako 10:21).

Ntango Mpaka S. Mark Palmer ya Bantuku nsambo ayekolaki likomi oyo mwa mibu eleki, eteni moko ya sika ya lisolo etelemaki na mbalakaka uta na ye.

‘Nsima Yesu kotalaka ye alingaki ye.’

“Ntango nayokaki maloba oyo, elilingi ya pole etondisamaki na makanisi na ngai ya Nkolo na biso kopemaka mpe kotalaka elenge mobali oyo. Kotalaka—lokola na kotalaka na bozindo mpe kokota na molimo na ye, koyebaka bolamu na ye mpe lisusu makoki na ye, lokola kososola mposa na ye monene koleka.

“Nsima maloba ya pete—Yesu alingaki ye. Ayokaki bolingo monene mpe mawa mpo na elenge mobali oyo, mpe mpo na ntina ya bolingo oyo mpe elongo na bolingo oyo, Yesu atunaki ye mbala mingi. Nabanzaki oyo esengelaki koyokama mpo na elenge mobali oyo mpo na kotondisama na bolingo ya lolenge wana atako na ntango atunamaki kosala eloko moko ya makasi bongo lokola koteka nyonso ya ye mpe kopesa yango na babola. …

“[Namitunaki] ‘Lolenge nini nakoki kotondisama na bolingo ya Kimoklisto bongo [basusu] bakoka koyoka bolingo ya Nzambe na nzela na ngai mpe mposa ya kobongwana?’ Lolenge nini nakoki komona [bato nzinga nzinga na ngai] na lolenge moko Nkolo amonaki elenge mozwi wana, komonaka bango mpo na oyo bazali mpenza mpe oyo bakoki kokoma, koleka kutu oyo basalaka to oyo basalaka te? Lolenge nini nakoki kozala mingi lokola Mobikisi?”1

Koyekola Komona Basusu

Koyekola komona basusu lokola Mobikisi amonaka ememaka matomba ya bozwi. Oyo ezali mwa makanisi oyo ekoki kosunga lokola tozali kosala na ntina ya likambo oyo.

  • Luka Oyeba Bango
    Sala makasi mpo ya koyeba bato koleka ndenge ya likolo likolo. Yeba ete kotonga kimoninga ezwaka ntango mpe bokasi ya solo. (Tala atikele ya Mabongi ya Kosalisa ya Sanza ya mwambe 2018 “Kotongaka Kimoninga ya Bozindo” mpo na lisungi.)

  • Mitala yo Moko
    Keba na masambisi okoki kosala yo moko to na makanisi to na kozanga makanisi. Koma makanisi ozali kozwa oyo etali basusu mpe meka kososola mpo na nini ozali koyoka na ntina na bango lolenge wana.

  • Boya Bosambisi
    Yeba ete makambo etalisaka te bobongi nie ya moto. Mitia na esika na bango mpe tala lolenge nini okokaki kolinga moto amona yo soki ozalaki na makambo ya lolenge wana. Kokabolaka maponi ya moto moko mpe ezalela uta na motuya ya kobotama mpe likoki ya bonzambe na bango ekoki kosunga biso tomona bango lokola Mobikisi akokaki komona.

  • Sambela mpo na Kolinga Bango
    Sambela mpo na bango mbala na mbala na nkombo mpe na motema molai mpo na kokolisa kimoninga ya solo. Zala na ezaleli moko ya losambo na mosala na yo. Ezali na bokeseni kati na oyo ozali kosala mpe oyo basengeli na yango mpenza?

Yesu ebele ya ntango na ye elongo na bato ya ndenge na ndenge na bomoi: bazwi, babola, bakambi, mpe bato ya bongo na bongo. Akutanaki mbala mingi na likama ya bosambisi mabe na basusu ntango batalaki Ye mpe lolenge na Ye ya lokola bobola to makambo ezanga ntina. “Ntango ekomono biso ye ezali kitoko te ete tozala na mposa ya ye. … Bamonaki Ye mpamba, mpe tolingaki ye te” (Yisaya 53:2–3).

Limoni ya Kimoklisto

Ndeko mwasi moko akabolaki lisolo oyo ya koyekolaka komona mozalani moko na miso ya Kimoklisto:

“Julia (nkombo ebongwanaki) azalaki kofanda pene na ngai mpe emonisami lokola azalaki na baninga te. Azalaki ntango nyonso na nkele mpe nkanda. Atako bongo, nazwaki mokano ya kozala moninga na ye. Kaka lokola moninga ya nzela te, kasi moninga ya solo. Nasololaki na ye ntango nyonso namonaki ye mpe nalakisaki litomba na oyo nyonso azalaki kosala. Na malembe, nakelaki mokangano ya kimoninga elongo na ye, komemaka esengo na motema na ngai.

“Mokolo moko, nazwaki mokano ya kotala Julia mpe kotuna ye na ntina mokano ya mpo na nini ayaka eklezia te.

“Nayekolaki ete azalaki na libota te to bandeko pene wana. Ndeko na ye moko, ya mobali oyo azalaki kofanda mosika, azalaki kosolola na ye kaka mbala moko na mobu na telefone. Wana ezalaki ngai koyoka ye kobimisa bololo, nkanda, mpe babobangi na na ye na ntina ya libota na ye mpe Eklezia, liyoki moko ya solo ya mawa mpe bolingo mpo na ndeko mwasi ekomelaki ngai makasi mpenza. Nayokaki mpasi mpe babobangi na ye. Nasolaki bobele lolenge nini atikalaki ye moko na bomoi. Ezalaki lokola nayokaki liloba moko ya kimia nsima na ngai: ‘nalingaki ye mpe. Kolinga mpe kotosa ye.’

“Nafandaki mpe nayokaki kino azangaki maloba ya koloba. Nayokaki bolingo mpe mawa mpo na ye. Oyo ezali ndeko mwasi oyo ayebaki ata moke te nini elakisi kolingama. Na mbalakaka nasosolaki ye na bozindo makasi. Natondaki ye mpo na kopesa ngai ndingisa ya kotala ye, mpe natikaki ye na boyambi mpe elongo na bolingo mpe limemia mpo na ye. Akotikala koyeba te boni boni asimbaki ngai na botali wana. Tata na Lola afungolaki miso na ngai mpe ateyaki ngai ete nazalaki na likoki ya kolinga na mawa makasi. Nazwi mokano mpenza ya kozala kaka moninga na ye te kasi lisusu kozala moko ya libota na ye.”

Ezali eloko moko ya bule ya kozala eteni ya bomoi ya moto mosusu. Elongo na losambo, motema molai, mpe lisungi kouta na Molimo, tokoki koyekola kosala elongo na limoni monene ya Kimoklisto.

Matangi

  1. S. Mark Palmer, “Nsima Yesu Kotalaka Ye Alingaki Ye,” Liahona, sanza ya mitano 2017, 115.