2019
Lolenge nini Tokoki Kokela Ezalela ya Boyambi na Eklezia?
Sanza ya Nsambo 2019


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Nsambo 2019

Lolenge nini Tokoki Kokela Ezalela ya Boyambi na Eklezia?

Ntango tozali kotala nzinganzinga na bapalwasi mpe baetape na biso, tozali komona bato oyo bazali komonana lokola komesana na pete. Oyo tozali kososola te ezali ete kutu kati na baoyo bazali komonana lokola komesana, ezali na mingi oyo bazali komiyoka ya kobosanama. Boyekoli moko, na ndakisa, kala te emonanaki ete pene ndambo ya mikolo kati na Etazini balobaki komiyokaka kozala bango moko, ya kobosanama, to ya kotiama mpembeni uta na basusu.1

Ezali motuya ya komiyoka ete oyambami. Ezali mposa ya ntina mpo na moto nyonso, mpe ntango tozali komiyoka ya kobenganama, esalaka mpasi. Kozala ya kobosanama ekoki kobota mayoki ya mawa to nkanda.2 Ntango tozali komiyoka lokola ete tozali na kati te, tozali na likanisi ya koluka esika wapi tozali koyoka malamu mingi koleka. Tosengeli kosalisa moto nyonso amiyoka ete azali ya eklezia.

Koyambaka Lokola Mobikisi.

Mobikisi azalaki ndakisa ya bobongi nie ya kososolaka mpe kosangisaka basusu. Ntango Aponaki Bapostolo na Ye, Asalaki ezalela, bomengo, to mosala ya lokumu te. Apesaki motuya na mwasi na Samalia na libulu ya mayi, kotatolaka epai na ye na ntina ya bonzambe na Ye atako lolenge kani Bayuda bazalaki kotala Basamalia mpamba, (tala Yoane 4). Atalaka motema mpe azwaka moto nyonso ndenge moko (tala 1 Samwele 16:7; Doctrine et Alliances 38:16, 26).

Mobikisi alobaki:

“Najali kopesa bino lilako na sika ete, Bolinganaka lokola ngai nalingi bino, ete bino lisusu bolingana.

“Na eye nde bato banso bakoyeba ete bozali bayekoli ba ngai, soki bolingani moko na moko” (Yoane 13:34–35

Nini Tokoki Kosala?

Ntango mosusu ezali mpasi koyeba soki moto azali komiyoka lokola atiami libanda. Bato mingi mpenza balobaka yango te—ata na moke polele te. Kasi na motema ya bolingo, na bokambi ya Molimo Mosantu, mpe na kosalaka mwa makasi ya koyeba, tokoki kososola lisusu ntango moto azali komiyoka ete ayambami na makita mpe milulu ya Eklezia te.

Bilembo Oyo Ekoki Kolakisa Ntango mosusu Moto Amiyokaka ya Kobenganama:

  • Elobeli ya nzoto ya kokangama, ndakisa maboko ya kokangama makasi to miso ya kokita na nse.

  • Kofanda na nsuka na nsima to kofanda ye moko.

  • Kokenda te na eklezia to kokendaka ntango nyonso te.

  • Kotika makita to milulu liboso.

  • Kozanga kosangana na masolo to mateya.

Oyo ekoki kozala bilembo ya mayoki ya motema mpe, lokola nsoni, bobangibangi, to koyokaka malamu te. Bandimi bakoki koyoka “bokeseni” ntango bazali bandimi ya sika ya Eklezia, bawuti na ekolo to ezalela mosusu, to bakutani na mbongwana moko na bomoi ya kala te, ndakisa bobomi libala, liwa ya moto ya libota, to bozongi noki na misio

Atako na ntina nini, tosengeli kotepatepa te na kosalisa na bolingo. Maye tolobaka mpe maye tosalaka ekoki komema na komonisa ete banso bayambami malamu mpe banso basengelami.

Boko Banzela ya Kozala na Boyambi mpe Botombeli boyei bolamu:

  • Kofanda te ntango nyonso pembeni ya bato se moko na eklezia.

  • Tala ndenge ya libanda ya bato bazali koleka mpo na komona moto ya solo. (Mpo na koyeba mingi koleka etali mama ya likambo oyo, tala “Kosalisa Ezali Komona Basusu lokola Mobikisi Asalaka,” Liahona, Sanza ya motoba 2019, 8–11.)

  • Kotisa basusu kati na masolo.

  • Bengisa basusu kozala eteni ya bomoi na yo. Okoki kokwa bango na milulu oyo osili kobongisa.

  • Mona mpe tonga likolo ya maye masepelisaka bato banso.

  • Koboya kimoninga te kaka mpo moto moko azali kokokisa te maye olingaka.

  • Ntango omoni likambo moko oyo ezali moko kaka na moto, sepela na yango na esika ya koluka kobomba yango nokinoki to kokima yango.

  • Lakisa bolingo mpe kumisa na bosembo.

  • Zwa ntango ya kokanisa na ntina ya nini elingi koloba mpenza ntango tolobaka Eklezia ezali ya moto nyonso, atako bokeseni na bango. Lolenge nini tokoki kokomisa yango ya solo?

Ezali ntango nyonso pete te komiyoka malamu nzinganzinga ya bato oyo bazali ya kokesana na biso. Kasi na mosala, tokoki kokoma malamu koleka na komonaka mabongi kati na babokeseni mpe kosepela balisalisi se moko moko na moko amemaka. Lokola eteyaki Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, babokeseni na biso ekoki kosunga kokomisa biso bato malamu koleka, ya esengo koleka: “Yaka, sunga biso totonga mpe tolendisa ezalela ya kobikisa, ya boboto, mpe ya mawa epai ya bana ya Nzambe banso.”3

Opambolami na nzela ya Boyambami

Christl Fechter akendaki na ekolo mosusu nsima bitumba kopanza mboka na ye. Azalaki koloba lokota malamu te mpe ayebaki moto moko te kati na eteni ya mboka na ye ya sika , yango wana na ebandeli amiyokaki kozanga ndeko mpe ye moko kaka.

Lokola mondimi ya Eklezia, abotaki mpiko mpe abandaki kokende na palwasi na ye ya sika. Abangaki ete elobeli mabe ekopekisa bato balinga koloba na ye to ete akosambisama mpo na ndenge azalaki mwasi monzemba.

Kasi akutanaki na basusu oyo batalaki babokeseni na ye te mpe bayambaki ye kati na lingomba na bango ya baninga. Basalisaki ye na bolingo, mpe nokinoki amimonaki na mosala ya kosungaka koteya kelasi ya Eteyelo ya bana. Bana bazalaki bandakisa ya boyambi, mpe liyoki ya kolingama mpe kosengelama elendisaki bondimi na ye mpe esungaki kopelisa lisusu bomipesi ya bomoi na ye mobimba epai ya Nkolo.

Matangi

  1. Tala Alexa Lardieri, “Study: Many Americans Report Feeling Lonely, Younger Generations More So,” U.S. News, Sanza ya mitano 1, 2018, usnews.com.

  2. Tala Carly K. Peterson, Laura C. Gravens, mpe Eddie Harmon-Jones, “Asymmetric Frontal Cortical Activity and Negative Affective Responses to Ostracism,” Social Cognitive and Affective Neuroscience, vol. 6, no. 3 (Sanza ya motoba 2011), 277–85.

  3. Dieter F. Uchtdorf, “Believe, Love, Do,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2018, 48.