2019
Boniboni Molimo Akoki kosalisa (mpe Akosalisa) Yo Osalisa
Sanza ya Libwa 2019.


Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Libwa 2019

LOLENGE NINI Molimo Akoki kosalisa (mpe Akosalisa) Yo Osalisa

Etinda ya bonganganzambe mpo na kosalisa, oyo epesameli mibali mpe basi lokola, ezali na likoki ya kozwa emoniseli.

Elilingi
ministering

Illustrations from Getty Images

Libiangi mpo na kosalisa mpe kosunga mpe kutu kolinga lokola Mobikisi ntango mosusu emonanaka lokola mokakatano—mingimingi ntango esengi kokende kosalisa baye toyebi ntango mosusu malamu te. Na nkoto na bankoto ya banzela ya kosalisa, tokoki komituna boniboni tokoki koyeba nzela ya malamu koleka nyonso dya kokende kosalisa baye totindami.

Tosengeli te komituna mpo na ntango molai te mpamba te bokasi na biso ekoki kokambama na Molimo Mosantu.

“Etinda na bino ya kosalisa ya bule ekopesa bino makoki ya bonzambe mpo na kofulama na Molimo,“ elobaki Ndeko Mwasi Bonnie H. Cordon, Mokambi Monene ya Bilenge Basi. “Bokoki koluka bofuli wana na bondimi.”1

Ntango tozali koluka kosalisa lokola Mobikisi asalaki, tokoki kokambama na Molimo oyo akambaki Ye. Oyo ezali ya solo ntango ozali kosala na bitinda, lokola kosalisa, oyo esalemi na nse ya likoki ya bafungola ya bonganganzambe ya episikopo. Makanisi motoba ezali awa mpo na kosalisa na Molimo.

Lolenge Boni Nakoki Kozala na Molimo NtangoNazali Kosalisa?

  • Senga ete Bakamba Yo. Tata na Lola alingaka biso tosolola na Ye na nzela ya losambo. Losambo epesaka biso kaka ndingisa ya kobelema penepene na Ye te, kasi ememaka lisusu “mapamboli oyo Nzambe asila kolinga kopesa kasi oyo esengeli na biso kosenga mpo na yango.”2 “Soki tosambeli mpe toluki kososola mitema na bango,” elobaki Ndeko Mwasi Cordon, “natatoli ete Tata na Lola akokamba biso mpe Molimo akokende elongo na biso.”3

  • Kozela Botindiki te. Banda kosala Zala “na esengo makasi ya kosala” (Doctrine et Alliances 58:27), mpe okomona ete makasi na yo ekoki kokambama mpe kokoma monene. “Kokendaka liboso mpo na kopesa lisalisi mpe mosala na biso ezali nzela ya motuya ya komilongisa mpo na kozwa emoniseli,” elobaki Mokambi Dallin H. Oaks, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo. “Na boyekoli na ngai ya makomi namoni ete bimoniseli mingi koleka na bana ya Nzambe eyaka ntango bazali na mosala, te ntango bazali ya kofanda na bandako na bango kozelaka Nkolo alobela bango nini litambi ya yambo ya koniata.”4

Boniboni Koyeba Malamu Botindiki mpo na Kosalisa?

  • Zwa Toli ya Mormon. Tosengeli te kobalukabaluka komitungisaka soki likanisi moko ezali etindami na biso to te. Te ntango tozali na fungola ya pete ya Mormon mpo na koyeba: soki ozali na likanisi oyo etindi yo kosala malamu mpe kondima to kosunga basusu kondimela Klisto, okoki koyeba ete ezali ya Nzambe (talaMoroni 7:16).

  • Komitungisa Te mpo na Yango. “Bobele pumbwa na kati ya liziba mpe beta mai,” elobaki Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Kende epai ya baye bazali na mposai. Kokangama te komitunaka soki osengeli kobeta mai na nsima to na liboso. Soki tolandi mabongi ya ebandeli oyo eteyamaki, totikali na nzela ya bafungola ya bonganganzambe, mpe toluki Molimo Mosantu mpo na kokamba biso, tokoki kokweya te.”5

Lolenge nini eleki malamu ya kolanda Botindiki?

  • Sikasikawana Ndeko Mwasi Susan Bednar (mwasi ya Mpaka David A. Bednar ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale) azali ndakisa monene ya kolanda botindiki. Nsima ya kosambela “mpo na kozwa miso ya molimo ya komona baye bazangi,” akotala nzinganzinga na lingomba mpe mbala mingi “akoyoka boningisi ya molimo mpo na kotala to kobenga na telefoni moto moko,” ekabolaki Mpaka Bednar. “Mpe ntango Ndeko Mwasi Bednar akozwa liyoki ya boye, akoyanola nokinoki mpe akotosa. Esalemaka mbala mingi boye ete nokinoki ntango ‘amene’ elobami na lipamboli, akosolola na elenge moko to akoyamba ndeko mwasi moko to, nsima ya kozonga na ndako, mbala moko akokamata telefoni mpe akobenga.”6

  • Na mpiko. Kobanga koboyama mpe koyoka nsoni, ya kokoka te, to kozala ya litomba te ekoki kopekisa biso kolanda botindiki na kosalisa. “Na ngonga mpe ndenge kilikili, biso banso tomiyokaka ya kokoka te, ya sikisiki te, ntango mosusu ya kolongobana te,” elobaki Mpaka Gerrit W. Gong ya Bapostolo Zomi na Mibale. “Kasi na makasi na biso ya bondimi mpo na kolinga Nzambe mpe kosalisa bazalani na biso, tokoki koyoka bolingo ya Nzambe mpe bofuli esengeli mpo na bomoi na bango mpe na biso na ndenge ya sika mpe esantu mingi koleka.”7

    Ndeko mobali moko akabolaki boniboni azalaki kotepatepa mpo na kokende kosalisa mobali ya mwasi moko oyo amekaki komiboma. Kasi na nsuka asengaki mobali wana bakende kolia. “Ntango nalobaki, ‘Mwasi na yo amekaki komiboma. Yango esengeli kolekela yo. Okoki kolinga kosolola yango?’ na kobombana te alelaki,” ye akabolaki. “Tosololaki lisolo moko ya bosembo mpe ya bolingo mpe tokolisaki kimoninga ya kitoko mpe ya bondimani na mwa baminiti.”8

Matangi

  1. Bonnie H. Cordon, “Becoming a Shepherd,” Liahona, Nov. 2018, 76.

  2. Bible Dictionary, “Prayer.”

  3. Bonnie H. Cordon, “Becoming a Shepherd,” 76.

  4. Dallin H. Oaks, “In His Own Time, in His Own Way,” Liahona, Aug. 2013, 24.

  5. Jeffrey R. Holland, “The Ministry of Reconciliation,” Liahona, Nov. 2018, 77.

  6. David A. Bednar, “Quick to Observe,” Liahona, Dec. 2006, 17.

  7. Gerrit W. Gong, “Our Campfire of Faith,” Liahona, Nov. 2018, 42.

  8. Tala Bonnie H. Cordon, “Becoming a Shepherd,” 76.