2019
Ezali Bino Kozanga Eteni Oyo ya Motuya Mpenza ya Kosalisa?
Sanza ya Zomi 2019


Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi 2019

Ezali Bino Kozanga Eteni Oyo ya Motuya ya Kosalisa?

Kosalisa ezali “kosepela elongo na baye bazali kosepela” kaka lokola mpe esengeli “kolela elongo na baye bazali kolela” (Baloma 12:15).

Elilingi
ministering

Illustrations by Augusto Zambonato

Ntango tokanisaka mpo na oyo etali kosalisa, ezali pete ya kokanisa mpo na oyo etali kosunga baye bazali kozanga. Tozali koloba na ntina ya kolona mpo na mwasi mokufeli mobali, komema bilei na mobeli, to kopesa na baye bazali kobunda. Tomikundoli toli ya Paulo ya “kolela elongo na baye bazali kolela,” kasi ezali biso kokangama mpenza na eteni ya yambo ya molongo wana—“kosepela elongo na baye bazali kosepela”? (Baloma 12:15). Kosepela elongo na baye tozali kosalisa—ezala soki elingi koloba kokumisa elonga na bango to kosunga bango kozala na esengo na ntango ya mpasi—ezali eteni ya motuya ya kosalisa lokola Mobikisi alingaki kosala.

Oyo ezali makanisi misato oyo ekoki kosunga (mpe oyo ya koboya) ntango toluki kofandisa makanisi na bolamu Nzambe atii na bomi na biso.

1. Bosala Keba

Bonnie H. Cordon, Mokambi Monene ya Bilenge Basi, asalisi biso kososola ete tosengeli kotala baye tozali kosalisa—kotala kaka te mikumba mpe bitumba na bango kasi lisusu bokasi, batalanta, mpe bilonga na bango. Ye alobaki ete tosengeli kozala “bilombe mpe bato ya koyebisa makambo na bango—moto moko oyo ayebi bizaleli na bango mpe akosunga bango na bilikya mpe mposa na bango.”1

Na lisese ya bameme mpe bantaba, Mobikisi alobaki ete baye bakozala na loboko na ye ya mobali bakotuna: “Nkolo, ntango nini tomonaki yo na nzala, mpe toleisaki yo? to na mposa ya mai, mpe topesaki yo mai?

“Ntango nini tomonaki yo mopaya, mpe toyambaki yo?” (Matai 25:37–38).

“Bandeko mibali mpe bandeko basi, liloba ya motuya ezali tomonaki,” Ndeko Mwasi Cordon said. “Basembo bamonaki baye bazali kozanga mpamba te bakengelaki mpe bamonaki. Biso mpe tokoki kozala na miso ya komona mpo na kosunga mpe kolendisa, kosepela mpe kutu kolota.”2

2. Boluka Ntina Mpo na Kosepela

Kosepelabilonga ya monene mpe ya mike Ekoki kozala kobika na cancer to kolonga bokabwani, kozwa mosala ya sika to komona sapatu ebungaki, kobika nsima ya kobungisa molingami to kobika nsima ya kozanga sukali poso moko.

Benga na telefone mpo na kopesa longonia, kotikela mokanda, to kobima mpo na kolia. Na kokabolanaka mapamboli na biso, kozongisaka botondi, mpe kosepelaka mapamboli mpe bilonga ya basusu, tokoki “kosepela na bisengo ya bandeko na biso” (Alma 30:34).

3. Bomona Loboko ya Nkolo

Ntango mosusu kosepela elongo na basusu elingi koloba kosunga bango bamona ntina ya kosepela—ezala kpokoso to bisengo kani ekoti na bomoi na biso. Bosolo ya pete ete Tata ya Lola ayebi biso mpe azali pene ya ya kokoka mpo na kosunga biso ekoki kozala ntina ya kondima te ya esengo.

Bokoki kosunga basusu bamona loboko ya Nkolo na bomoi bango na kokabolaka lolenge nini bomonaki yango na bomoi na binomei. Bozala na komikitisa ya kokoka mpo na kokabola boniboni Tata na Lola asungaki bino na mikakatano. Litatoli oyo ekoki kosunga basusu bayeba mpe bandima boniboni asungaki bango (tala Mosiah 24:14).

4. Botia Ndelo Te na Makoki na Bino mpo na Kosepela

Likambo ya mawa, tokoki ntango mosusu kotia ndelo na makoki na biso mpo na kosepela elongo na basusu, mingiming ntango toyoki nsoni na nini tozali na yango mpo na kokaba to wapi tozali na bomoi. Na esika ya koyoka esengo na esengo ya mosusu, tokweyaka na motambo ya komekana. Mpe lokola Mpaka Qentin L. Cook ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyaki: “Komekana mapamboli ezali na ntembe te penepene na kokamba libanda ya esengo. Tokoki te kozala na botondi mpe na likunia na mbala moko.”3

“Boniboni tokoki kolonga ezaleli ya boye oyo ekomi momeseno na penepene ya bato nionso?” etunaki Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. “… Tokoki kotanga mingi ya mapamboli na biso mpe tokoki kokumisa bokokisami ya basusu. Mingi koleka nionso, tokoki kosalisa basusu, oyo ngalasisi ya malamu koleka ekomama.”4 Na esika ya komekana, tokoki kopesa longonia na baye tozali kosalisa. Na bonsomi bokabolaka nini bozali kolula mpo na oyo etali bango mpe baye ya libota na bango.

Lokola Paulo akundolisaki biso, tozali bango baye nzoto ya Klisto, mpe ntango “moko esepeli, bilembo nionso bikosepela elongo na yango” (1 Bakolinto 12:26). Na lisungi ya Tata na Lola, tokoki koyeba makambo, kosepelana bilonga minene mpe mike ya basusu, kosalisa bango bamona loboko ya Nkolo, mpe balongo likunia mpo ete tokoka ya solo kosepela elongo na mapamboli ya basusu.

Matangi

  1. Bonnie H. Cordon, “Becoming a Shepherd,” Liahona, Nov. 2018, 76.

  2. Bonnie H. Cordon, “Becoming a Shepherd,” 75.

  3. Quentin L. Cook, “Bosepela!” Ensign, Nov. 1996, 30.

  4. Jeffrey R. Holland, “The Other Prodigal,” Liahona, May 2002, 64.