2019
Maye Lisolo ya Noele Eteyi Biso na ntina ya Kosalisa
Sanza ya Zomi na Mibale 2019


Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi na mibale 2019

Maye Lisolo ya Noele Eteyi Biso na ntina ya Kosalisa

“Oyo ezali eleko ya bolingo ya mobu. Yemba molongo moko; Eleko ya mbotama ezali mosika te. Beta lisolo ya solo ya mbotama ya Yesu, ntango, lokola mwana moke, ayaki na mabele” (“The Nativity Song,” Children’s Songbook, 52).

Elilingi
ministering

Lisolo uta na Behold the Lamb of God, na Walter Rane

Eleko ya noele ezali ngonga ya kafukafu ntango meme, babateli mpate, bilielo, mpe minzoto ezwi na mbalakaka ndimbola ya sika. Bakomi basani minene na kobetaka lisolo ya moko ya makambo minene ya lisitwale ya bomoto: mbotama ya Yesu Klisto. Mabota mingi basalaka esika ya Kolakisa mbotama na bandako na bango. Basusu bamipesaka mokumba ya kotanga lisolo ya mbotama na Ye to kosala milulu ya kotambola elongo na miso ya bato. Lokola masolo nyonso ya Klisto, lisolo ya mbotama na Ye etondisami na mateya oyo tokoki koyekola na ntina ya kosalisa, na ntina ya kokabola pole na Ye mpo na kongengisa mokili. “Lisolo ya Noele ezali lisitwale ya bolingo,” elobaki Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo.

“…Na masolo ya mbotama ya Klisto, tokoki komona mpe koyoka nani Ye azalaki mpe nani ye azali. Wana ekomisaka mokumba na biso pepele nzela nzela. Mpe ekokamba biso tomibosana mpe tokomisa bozito ya mokumba ya basusu pepele .”1

“Esika ezalaki te mpo na bango na ndako na kolala ” (Luka 2:7)

Mokolo ndako ya kolala atikelaki Mobikisi esika te, kasi tosengeli kosala libunga wana te! Tokoki kotikela Mobikisi esika na mitema na biso na kotikaka esika na bandeko na biso mibali mpe basi na mesa na biso, na bandako na biso, mpe na mimesano na biso. Mimesano ya mabota mingi ekoki kokomisama boboto mpe ya kobosana te mingi koleka na kobakisaka bato mosusu. Daiana mpe libota na ye bazalaki na momesano ya kobengisaka moto moko aya kolekisa Noele elongo na bango. Sanza nyonso ya zomi na mibale, basololaka mpe bazwaka mokano mpo na nani bakolinga kobengisa.2 Ntango mosusu libota na bino ekoki kobanda momesano ya lolenge oyo. Ntango mosusu moto moko osalisaka akolinga kosangana na libota na yo na koyembaka elongo banzembo ya Noele oyo bosepelaka na yango. Okoki lisusu kotika esika na elambo monene ya Noele na yo mpo na moto moko oyo akokaki te kozala na libota nzinganzinga .

Nzela nini ya malamu ya kokembela Mobikisi koleka kolanda ndakisa na Ye ya kosangisa bato? Mikundola ete Ye abiangi “banso baya epai na ye mpe bakabola bolamu na ye; mpe akoboya moko te oyo akoya epai na ye, moyindo mpe mpembe, mowumbu mpe monsomi, mobali mpe mwasi; mpe akanisaka bapaganu; mpe bango banso bazali lolenge moko kaka epai ya Nzambe, Bayuda mpe Bapaganu lokola” (2 Nefi 26:33). Sala esika mpe sangisa bato

“Babateli mpate bazalaki na mokili yango, bazalaki na esobe na butu kosenzelaka etonga na bango na mpate”(Luke 2:8

Ebongi bongo malamu ete babateli mpate bazalaki bato ya yambo bapesaki mwana Mobikisi mbote. Basakoli ya kala babengaki Yesu Klisto lokola “Mobateli na Yisalaele” (Nzembo 80:1) mpe “Mobateli likolo ya mabele manso” (1 Nefi 13:41). Mpe Klisto Yemei alobaki, “Ngai nazali mobateli malamu ya bampate, nayebi bampate na ngai” (Yoane 10:14). Koyeba bampate na biso mpe kosenzela yango ezali eteni ya ntina ya kobatela mpe kosalisa lokola esalaka Mobikisi.

Na minda kongengaka mpe biloko babongisi na ndako mpe bisika mosusu, ezali na mingi ya kotala na ntango ya Noele. Kasi ntango mosusu kitoko ya makasi mingi koleka ya eleko yango ekoki komonisama ntango tokanisaka kofandisa bokebi na biso likolo ya baye tozali kosalisa mpe kosenzela bitonga na biso moko. Kosenzela ekoki kozala komona eloko moto moko alingaka makasi to kotuna miango ya mokolo ya bopemi ya moto moko. Kosenzelaka ntango tomoni mpe tokokisi bamposa ya basusu—oyo ezali komonana na miso mpe oyo ezali komonana na miso mpenza te lokola.

Ntango Cheryl akufelaki mobali na ye, Mick, na mbalakaka ayokaki mpasi koleka. Lokola Noele na ye ya yambo ezanga ye ekomaki pene, mpasi ya kozala se ye moko ebakisamaki. Botondi, ndeko na ye ya mwasi na mosala ya kosalisa Shauna ayaki kotala ye. Shauna mpe mobali na ye, Jim, babengisaki Cheryl bakende kotambola na ntango mingi ya bopemi. Bamonaki kazaka elemba ya Cheryl mpe bazwaki mokano ya kosala eloko moko na ntina na yango. Mwa mikolo liboso ya Noele, Shauna mpe Jim bamemelaki Cheryl likabo ya Noele: kazaka moko ya sika mpe ya kitoko. Bayebaki bokeleli ya Cheryl na nzoto mpo na kazaka ya malili kasi lisusu bokeleli ya mayoki ya motema na ye mpo na bolendisi mpe kozala na molongani. Basalaki manso oyo ekoki bango mpo na kokokisa bamposa wana na makoki na bango mpe bapesaki ndakisa kitoko na lolenge biso mpe tokoki kosenzela bitonga na biso.3

“Babateli mpate balobanaki ete, Tika tokende na Beteleme” (Luka 2:15)

“Tika sikawa tokende” ezali libengisi moko ya esengo! Babateli mpate bakanisaki te ete baninga na bango bakolemba makasi mpo na kosala mobembo. Bakendaki na kimia te na Beteleme na bango moko. Batalanaki na esengo mpe balobaki, “Tika sikawa tokende!”

Atako tokokoka ntango mosusu te kobengisa baninga na biso baya komona mwana Mobikisi, tokoki kobengisa bango bayoka molimo ya Noele (to molimo ya Klisto) na kosalelaka Nzambe elongo na biso. “Lolenge ya kokolisa molimo ya Noele ezali kosembola loboko na baye bazali nzinganzinga na biso mpe kolakisa bomipesi,” elobaki Bonnie L. Oscarson, Mokambi Monene ya Bilenge Basi ya kala.4 Kanisa ozali kosimba buzi. Basusu bakoki solo komona mpe kozwa litomba uta na pole ya buzi, kasi kanisa moto bakoki koyoka soki osaleli buzi na yo mpo na kopelisa buzi na bango mpe kopesa bango nzela basimba pole na bangomei.

Klisto Yemei ateyaki ete baoyo balandi Ye bakozala na pole ya bomoi (tala Yoane 8:12). Kosalaka lokola esalaki Ye ezali nzela moko tokoki kolanda Ye mpe kosepela na pole oyo alakaki. Boye, kabola pole yango na kobengisaka basusu basala elongo na yo! Lolenge nini ekoki yo mpe baye osalisaka kosalela basusu elongo? Elongo bokoki kolengela bilei na bino bosepelaka na yango to kokamwisa moto moko na likabo to mokanda moke. Elongo bokoki bino mibale koyoka pole oyo eyaka uta na kolandaka ndakisa ya lisalisi ya Klisto.

“Bayebisaki bato likambo bayebisaki bango na ntina na mwana yango” (Luka 2:17)

Ezali pete ya kokanisa bosepeli ya babateli mpate ntango bazalaki kokabola nsango ya kokamwa ya mbotama ya Klisto elongo na bato mingi lokola ekokaki bango. Lokola Asakolamaki na banjelu, Mesiya mosakolami ayaka! Azalaki wana! Solo, kokabolaka nsango malamu ya Mobikisi ezali likambo moko monene ya lisolo ya Mbotama. Banjelu bayembaki. Monzoto elakisaki nzela. Mpe babateli mpate basalaki ete eyebana na mboka mopaya.

Tokoki kobakisa mingongo na biso na lisolo ya Noele na kokabolaka nsango malamu mpe kotatolaka Mobikisi. “Ntango ozali na libaku ya kozala ntoma ya Mobikisi na bokasi na yo ya kosalisa, mituna, ‘Lolenge nini ekoki ngai kokabola pole ya nsango malamu na moto to libota oyo?’” eteyaki Ndeko mwasi Jean B. Bingham, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. Nini Molimo ezali kotinda ngai nasala?”5

Tala mwa makanisi ya kosalela ntango ozali koluka koyeba lolenge nini ekoki yo kokabola litatoli na yo ya Mobikisi mpe nsango malamu na Ye:

  • Mona makomi oyo ezali kotuta mayoki na yo na ntina ya Mobikisi to loba mpo na nini ozali na botondi epai na Ye. Kabola yango elongo na baye osalisaka.

  • Tinda nkoma to nsango na nzela ya media social na video ya Noele. Ezali na oyo ya kokamwisa na ChurchofJesusChrist.org!

  • Lobela moninga moko na ntina ya likundoli to momesano ya kafukafu oyo ezali kokundolisa yo Klisto.

Zala na kondima ete Molimo Mosantu akotatola na ntina ya bosolo ya litatoli na yo, kaka lokola Ye atatolaki epai ya Simeona mpe Ana ete mwana Yesu azalaki Mobikisi (tala Luka 2:26, 38).

“Mpo na kopesa solo lokumu na boyei ya [Yesu Klisto] na mokili, tosengeli kosala lokola Ye asalaki mpe kosembola loboko na mawa mpe ngolu epai ya baninga na biso bato,” elobaki Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bazomi na Mibale. “Tokoki kosala yango mokolo na mokolo, na maloba mpe misala. Tika yango ekoma momesano na biso ya Noele, likambo te esika kani tozwami—mpo na kozala mwa boboto, kolimbisaka mingi koleka, kosambisaka moke koleka, botondi mingi koleka, mpe ya bokabi mingi koleka na kokabolaka bofuluki na biso na baye bazangi.”6

Matangi

  1. Henry B. Eyring, “Christmas Stories” (Losambo ya Bakambi ya Yambo na Noele, sanza ya zomi na mibale 6, 2009), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  2. Tala Daiana Melina Albornoz Díaz, “Sharing Christmas,” Liahona, sanza ya zomi na mibale 2007, 17.

  3. Tala Cheryl Boyle, “He Would Have Bought It for You,” Ensign, sanza ya zomi na mibale 2001, 57.

  4. Bonnie L. Oscarson, “Christmas Is Christlike Love” (Losambo ya Bakambi ya Yambo na Noele, sanza ya zomi na mibale 7, 2014), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

  5. Jean B. Bingham, “Kosalisa lokola Mobikisi Asalaka,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 104.

  6. Dieter F. Uchtdorf, “Scatter Your Crumbs” (Losambo ya Bakambi ya Yambo na Noele, sanza ya zomi na mibale 3, 2017), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.