2020
Bosangisi Yisalaele na Nzela ya Kosalisa
Sanza ya Yambo 2020


Elilingi
ministering

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Yambo 2020

Bosangisi Yisalaele na Nzela ya Kosalisa

Kosalisa ezali libaku mpo na kolanda toli ya profeta mpo na kosangisa Yisalaele.

Mokambi Russell M. Nelson abengisi biso tosunga kosangisa Yisalaele ezala—“likambo eleki na motuya na oyo ezali kosalemaka na mabele lelo.”1

Mpo na baoyo balingi kozala eteni ya mosala oyo ya bosangisi Yisalaele, kosalisa ekoki kozala libaku moko ya kafukafu. Ezali nzela moko efulama mpo na kobongola bomoi ya bato. Atako tozali kosalisa bandimi oyo bazali na bolembu to kobengisa bango basunga biso ntango tozali kosalisa baye bazali bandimi ya eklezia na biso te, kosalisa ezali kopesa mabaku mpo na kosangisa Yisalaele.

Kobikisa Bandimi oyo Bazongi

“Na bolingo lokola ntina ya kosala, bikamwa ekosalema, mpe tokozwa banzela ya komema bandeko na biso ya mibali mpe basi ‘oyo babunga’ koyambama banso na nsango malamu ya Yesu Klisto.” —Jean B. Bingham2

“Nazalaki kati na bolembu mibu pene motoba ntango mobali na ngai mpe ngai tokendaki kofanda na engumba moko ya sika. Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na ngai ya sika ayaki kotala ngai, kotunaka soki akokaki kotinda ndeko mwasi moko koya kotala ngai. Na motema ya mwa nkanda, nandimaki. Ndeko mwasi oyo azalaki koya kotala ngai sanza nyonso, atako bobangi na ye ya bambwa—mpe nazali na mbwa elingaka ngai mpenza! Kosalisa na ye ekobaki mibu mibale, mpe ezalaki na nguya makasi likolo na ngai.

“Atako boye kotala na ye ezalaki mbala mingi ya sosiale kaka, ntango mosusu azalaki kotuna ngai mituna oyo ezalaki komema biso na masolo ya molimo. Oyo ezalaki kosala ngai mpasi, kasi etindikaki ngai nazwa mokano soki nakende liboso kati na nsango malamu to natikala esika oyo nazalaki. Mokano oyo ezalaki etumba mpo na ngai, kasi naponaki kokende kotala elongo na ye bandeko basi misionele.

“Mokolo nakendaki na liyangani ya elambo mpo na mbala ya yambo uta mibu motoba, nabangaki kokota na kati. Ntango nakotaki na ndakonzambe, ndeko mwasi ya kosalisa na ngai azalaki kozela ngai, mpe akotaki elongo na ngai na esambelelo. Nsima, azongisaki ngai tii na motuka na ngai, kotunaka oyo akokaki kosala mpo na kosunga ngai malamu nazala pene ya Mobikisi.

“Ntango mpe bolingo ya ndeko mwasi ya kosalisa na ngai esungaki nazongela Eklezia mpe nazwaki bokasi na ye lokola moko ya makabo minene epesamelaki ngai naino te. Nazali na matondi mpenza ete azalaki wana pembeni na ngai na mobembo na ngai ya kozonga na Eklezia ya Mobikisi.”

Nkombo ebombani, British Columbia, Canada

Mabongi ya Kotala

“Azalaki koya kotala ngai sanza nyonso”

Lolenge nini okoki kolakisa ete ozali na bokebi na ntina ya baye osalisaka mingi koleka makambo mosusu? (tala Doctrine et Alliances 121:44).

“Mituna”

Kotuna mituna malamu ekoki kosunga omibongola yo moko. Omikundola ete kosalisa ezali ntina moko oyo ekeyi koleka kozalaka moto ya bato.3

“Kozelaka ngai”

Moto nyonso asengeli amiyoka ya koyambama (tala 3 Nefi 18:32).

“Wana pembeni na ngai na mobembo na ngai ya kozonga”

Lisungi na biso ekoki kosala bokeseni ya ntina epai ya baoyo batuti libaku mpo na kozonga epai ya Mobikisi mpe kobikisama (tala Baebele 12:12–13).

Kosalisa mpe Kosangisa

“Na ndenge nyonso kani emonani malamu mpe ebongi na yo, kokabola elongo na bato mpo na nini Yesu Klisto mpe Eklezia na Ye bazali motuya mpo na yo. …

“… Mosala na yo ezali ya kokabola oyo ezali na motema na yo mpe kobika engebene na biyamba na yo.” —Mpaka Dieter F. Uchtdorf4

Kosalisa mpe kokabola nsango malamu ekendaka elongo. Tala ndenge mosusu tokoki komemela Nkolo baninga na biso mpe bato ya penepene ntango tozali kosalisa—to kosalisa ntango tozali komemela Nkolo baninga na biso mpe bato ya penepene:

  • Bosala elongo. Boluka mabaku ya kobengisa baninga to bato ya penepene mpo na kosangana elongo na bino na kosalisaka na ntina ya bosenga ya moto moko. Bosenga bango basunga bino balengela elambo mpo na mama aboti sika, kokende kotala bampaka ya penepene, to kosukola ndako ya moto moko oyo azali maladi.

  • Boteya elongo. Kanisa kobengisa moninga moko to moto ya penepene oyo azali kokende na ndakonzambe mbala mingi te mpo na koyamba liteya ya bamisionele na ndako na bango mpo na moto moko oyo azali kokutana na bamisionele. To moninga na yo akoki kosunga yo na koyambaka liteya na ndako na yo to kokendaka elongo na yo na liteya moko na ndako ya moto mosusu.

  • Bosalisa basusu ntango bomoni bosenga moko. Bobongisa bokumbi ya kokende na ndakonzambe. Bobengisa bana na milulu ya bilenge to Eteyelo ya bana. Ndenge nini mosusu ekoki bino kosalisa mpe komema na Nkolo?

  • Bosalela makoki Eklezia epesi. Eklezia epesaka banzela mingi epai ya bandimi mpo na kosunga bango bakabola nsango malamu. Bokoki kotala na nzela eteni ya “Missionary” kati na app ya Ebombelo Buku ya Nsango malamu mpe kokende kotala ComeUntoChrist.org mpo na makanisi etali lolenge ya kosangisa Yisalaele na masanga na biso.

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Hope of Israel” (Losambo ya bilenge ya mokili mobimba, sanza ya motoba 3, 2018), HopeOfIsrael.ChurchofJesusChrist.org.

  2. Jean B. Bingham, “Ministering as the Savior Does,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 106.

  3. Tala “Mabongisi mpo na Kosalisa Ntina Oyo Ekobongola Lisalisi na Biso,” Sanza ya yambo 2019.

  4. Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 17.