2020
Kosalisa na nzela ya Mambi ya Kala ya Libota
Sanza ya mibale 2020


Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya mibale 2020

Kosalisa na nzela ya Mambi ya Kala ya Libota

Elilingi
ministering

Ndakisa na Joshua Dennis; elili ya nse mpe foto uta na Getty Images

Kosalisa moto na nzela ya mambi ya kala ya libota na bango ezali yoko lolenge ya nguya mpo na kosalisa. Ntango okangisi basusu na bankoko na bango na nzela ya masolo ya libota mpe molai ya bansango ya libota, osungi bango bayoka esengo makasi mpe bamiyoka ya kokangama elongo na mabota na bango koleka ndelo ya makanisi na bango (tala Malaki 4:5–6).

Ezala mondimi oyo alekisa bomoi na ye mobimba na Eklezia to moto moko oyo naino ayoka nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto te, bana nyonso ya Nzambe bayokaka mposa ya koyeba bawutaki wapi.

Mbala mingi yango ezwaka ntango molai te mpo na kotika liyoki ya mozindo mpe ya makasi, lokola etalisami na masolo oyo elandi.

Kokutana na Libota na Bametele 9100

Kala mingi te na mpepo ya bozongi ndako, nakutanaki na Steve, oyo akabolaki elongo na ngai biteni ya lisolo na ye moko. Asilisaka kelasi na ye na eteyelo ya mibale, akotaka na Mapinga ya Etazini lokola nganga mayele mopesi nsango na mibu 18, mpe nokinoki abandaki kosala na Maison Blanche, kopesaka lisungi ya bopesi nsango epai ya Tata Mokambi ya Etazini. Uta na mibu 18 kino 26, asungaki Batata Bakambi mibale ya Etazini. Masolo na ye ezalaki kokamwa!

“Steve,” nalobaki, “osengeli kokoma masolo oyo mpo na nkola na yo! Basengeli kozala bato ya yambo ya koyeba masolo oyo uta na litatoli na yo.” Andimaki.

Nsima Molimo etindikaki ngai natuna ye nini ayebaki mpo na oyo etali bankoko na ye. Steve ayebaki makambo ebele na ngambo ya mama na ye, mpe lisusu lisolo ya lolenge nini libota na ye baliaka mokolo moko elambo monene elongo na Abraham Lincoln na ntango azalaka kotambola kosalaka kampanye na mboka mpo na maponami ya bokambi ya Etazini na 1860.

Kasi ayebaki moke na ngambo ya tata na ye. Alingaki koyeba mingi koleka. Nabimisaki telefone na ngai mpe nafungolaki ebombelo ya FamilySearch. “Steve, tokoki komona libota na yo sikawa!”

Nakangisaki telefone na Wi-Fi ya mpepo . Nakitisaki telefone na ngai likolo ya mesa oyo ezalaki liboso na ngai mpo ete tokoka komona biso mibale. Tolukaki Nzete ya Libota. Mwa miniti nsima biso mibale tobandaki kotala mokanda ya libala ya nkoko na ye ya mobali na nkoko na ye ya mwasi.

“Ezali bango!” ye alobaki. “Namikundoli nkombo na ye sikawa!”

Molimo ya esengo ekitelaki biso mibale. Tosalaki na botongi miango ya bankoko na ye oyo bayebanaki mingi te na baminiti 45 oyo elandaki. Asengaki ngai nalaka ye ete tokokoba koluka elongo na Colorado. Tokabolanaki banimelo ntango mpepo ezalaki kokita.

Tozalaki wana, kopumbwaka 9,145 m na likolo, elongo na apareye moke lokola loboko na ngai, kolukaka mobali mpe mwasi oyo babalanaki mibu 100 kala oyo babungisamaka epai na ye mpe libota na ye. Kokamwa! Kasi tozwaki bango. Mabota ekangisamaki. Masolo ekundolisamaki. Mayoki ya botondi eyokisamaki mpo na tekinoloji mpe bisalelo. Ezalaki solo likamwisi.

Jonathan Petty, Colorado, USA

Azingamaki na Libota ya Sika

Maria azalaka komipesa lisusu na Eklezia te mibu 20 koleka. Mwa basanza moke eleki, tolekisaki ntango elongo na ye na ndako na biso, kotalaka libota na ye na nzela ya botangi bato mpe nkoma mosusu. Na mbala moko akatanaki na kolela kolobaka, “Nayekoli mingi ya libota na ngai na ntango mibale koleka oyo nayebi na bomoi na ngai mobimba!”

Na nsuka ya ntango na biso ya kozala elongo, tolakisaki pologalami ya Mabota Nzinga nzinga na Ngai ya ebombelo ya Nzete ya Libota. Emonisamaki ete mobali na ngai mpe ngai tozali bandeko ya mosika ya Maria. Akatanaki na kolela lisusu, kolobaka akanisaki azalaki ye moko. Atikalaki koyeba te ete azalaki na libota nzinganzinga wana. Mwa baposo moke nsima Maria akutanaki na episikopo na biso. Azali kosala sikawa na komilengelaka mpo na tempelo, mpe akutanaki na bandeko ya libota ebele ya “sika” na palwasi na biso!

Carol Riner Everett, Caroline du Nord, USA

Elubu mpo na Kosalisa

Ashley, ndeko mwasi moko nasalisaka, mpe ngai biso mibale tozali na babuku ya bilubu uta na bankoko na biso ya basi. Ya ye ewuti na nkoko na ye ya mwasi, mpe oyo ya ngai ezali buku oyo nasangisaka ntango nasangolaki nkeni ya bilubu ya Nkoko na ngai ya mwasi Greenwood nsima ya liwa na ye.

Ashley mpe ngai biso mibale toponaki elubu uta na buku ya bolambi na biso, mpe tosanganaki nsima ya mosala na butu moko mpo na komeka yango. Aponaki elubu ya bilei ya nsuka, tosalaki yango yambo mpe totiaki yango na lituka. Naponaki chip dip—bilei ya motuya na feti nyonso ya libota ya Greenwood. Mwana mwasi ya Ashley Alice asungaki biso komeka mpimbo ya bilei yango. Nsima, lokola Ashley azalaki kolinga te bana na ye balia biloko ya nsuka nyonso, azalaki kopesa ndambo na bandeko basi oyo azalaki kosalisa.

Eloko nalingaki mingi na ntina ya butu ya elubu na biso ezali ete ntango tozalaki kolamba mpe kotumba, tozalaki kolobela makambo ya kosalisa ya momesano nyonso—bitumba na ye mpe oyo ya ngai. Kasi lisusu tolobelaki bankoko na biso mpe bamama, oyo bazalaki bato ya boboto mpo na biso mibale.

Jenifer Greenwood, Utah, USA

Bandenge Malamu mpo na Kosunga

Mambi ya Kala ya Libota ekoki kofungola bikuke ya mabaku ya kosalisaka ntango emonani lokola ete eloko mosusu te ekoki kofungola. Oyo ezali mwa makanisi moke okoki komeka.

  • Sunga bango bakoma mpe bazwa na Interneti audio ya nsango ya masolo ya mambi ya kala ya libota, mingi mingi oyo eyanoli na bafoto.

  • Kela motuka ya kipakapaka to mokanda ya lisolo moko ya libota ebima na lokasa oyo okoki kopesa lokola likabo.

  • Teya ndenge ya kokanga lisolo na bango moko na nzela ya kobatelaka zulunale na lolenge basepelaka. Zulunale ya Audio? Zulunale ya Foto? Zulunale ya Video? Ezali na banzela ebele mpo na baoyo basepelaka te na ndakisa ya zulunale eyebana.

  • Bokende elongo na tempelo mpo na kosala makuli mpo na bankoko. To bomipesa mpo na kosala makuli mpo na bankombo ya mabota na bango soki bazali na bankombo ebele koleka oyo bakoki kosala.

  • Bosangana elongo mpo na kokabola masolo ya libota.

  • Bosala eteyelo ya mambi ya kala ya libota elongo.