2020
Kosalisa na nzela ya Mosala ya Tempelo
Sanza ya misato 2020


Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya misato 2020

KOSALISA NA NZELA YA MOSALA YA TEMPELO

Ntango tosungaka basusu kosepela na mapamboli ya tempelo, tozali kosalisa.

Elilingi
ministering

Boyebi uta na Bilili ya Getty Images; foto ya Tegucigalpa na Tempelo ya Honduras

Kokende tempelo eleki motuya mpo na kotia bokasi. Mokambi Russell M. Nelson ateyaki ete “tempelo na ntina ntina mpenza mpo na lobiko mpe bonetoli na biso mpe oyo ya mabota na biso. …

“… Moko na moko kati na biso azali ntango nyonso na mposa ya bokasi ya molimo mpe mateya oyo ekoki kozwama bobele na kati ya ndako ya Nkolo.”1

Kokende na tempelo esengaka kolengela ntango, mikumba, mpe makoki na biso, lokola mpe lisusu kozala ya komilengela na molimo. Tosengeli kosalisa ntango tomonaka mpasi oyo ezali kopekisa bandeko na biso mibali mpe basi kokende na tempelo mpe tozali kosunga bango bazwa nzela.

Tempelo Ezali Lipamboli oyo Moto nyonso Akoki Kosepela na Yango

Misionele moko oyo azonga kala te, Meg, azalaki kokende bipai na bikuke ya tempelo ya Kona Hawaii ntango amonaki elenge mwasi oyo kofandaka ye moko likolo ya kiti na libanda. Meg ayokaki ete asengelaki kosolola na elenge mwasi yango, kasi ayebaki te nini asengelaki koloba. Yango wana atunaki ye ntina ya nzoloko oyo ezalaki na likaka ya lokolo ya elenge mwasi. Nde bongo lisolo ebandaki oyo epesaki nzela na elenge mwasi, Lani, kokabola lisolo na ye.

Lani ayebisaki Meg etumba na ye mpo na kozonga kosala nyonso mobimba na Eklezia, bandimi malamu oyo bazalaki kosunga ye, mpe elikya na ye ete mokolo moko akokangisama na mwana na ye ya moke ya mwasi.

Meg abengisaki Lani aya kofanda na kisuku ya bopemi ya tempelo elongo na ye. Bakokaki kokende mosika kati na tempelo naino te, kasi bakokaki koleka ekuke ya koyingela. Lani andimaki, mpe bakotaki elongo na bikuke ya liboso. Mosali ya tempelo alakisaki bango kiti na nse ya elilingi ya Mobikisi.

Ntango bafandaki elongo, Lani azalaki komilobela, “nalingaki mpenza kokota na tempelo lelo, kasi nazalaki kobanga-banga.” Lokola Meg ayokelaki Molimo, akokaki koyanola losambo ya nse ya Lani.

Makanisi mpo na Kosunga Baoyo bazangi mokanda ya Ndingisa ya tempelo

Ata baoyo bazali na mokanda ya ndingisa mpo na tempelo te bakoki kopambolama na nzela ya tempelo.

  • Kabola mayoki na yo na lolenge nini Nkolo apambolaki yo na nzela ya mosala ya tempelo.

  • Bengisa moto moko mpo na kokende na mokolo ya bofungwami ya bikuke ya tempelo to ndako ya bapaya. Luka mikolo ya bofungwami ya bikuke ya tempelo oyo ezali koya nsima na temples.ChurchofJesusChrist.org.

  • Tala bafoto mpe yekola mingi na ntina ya tempelo na temples.ChurchofJesusChrist.org.

Sala ete Kokende na Tempelo Ezala Pete mpo na Basusu

Atako mpo na bandimi oyo bazali na mokanda ya ndingisa mpo na tempelo, kokende na tempelo ekoki kozala mpasi. Basusu bakoki kosala mobembo ya bantaka molai. Basusu bakoki kozala na bana mike to bai libota bakola oyo basengeli na bobateli. Tokoki kosala elongo mpo ete mosala ya tempelo esalema mpo na moto nyonso.

Leola Chandler alembaki na kolengelaka mobali na ye ya maladi mpe bana na bango minei. Yango wana azwaki mokano ya kotia ntango mpembeni mokolo nyonso ya mibale mpo na kokende na tempelo ya penepene. Ekomaki liziba ya kimia mpe nguya na bomoi na ye.

Mokolo moko ayokaki ete mwa ndambo ya bandeko basi ya mibange ya palwasi na ye na mbalakaka balingaki mpenza kokende na tempelo, kasi bazangaki motuka mpo na kokumba bango. Leola apesaki bango esika na motuka na ye. Na mibu 40 oyo elandaki, azalaki kokende mingi mingi na tempelo ye moko te.2

Leola apambolamaki, mpe apambolaki basusu ntango amibonzaki mpo na komema bango elongo na ye na tempelo.

Makanisi mpo na Kosunga Basusu Bakende Tempelo

Lolenge nini okoki kosunga basusu bakendeke na tempelo mbala na mbala? Okoki komona ete makanisi oyo ekosunga yo mpe.

  • Kokende elongo. Komibonza mpo na kopesa to kolengela makoki mpo na kokumba moto songolo. Ekoki kolendisa moto mosusu akende mpe na tempelo.

  • Senga bato ya libota to bandimi ya palwasi na yo basunga yo kosala makuli mpo na batata na yo, mingi mingi ntango ozali na bankombo ebele ya bato ya libota oyo ebelemi mpo na makuli.

  • Kopesa lisalisi ya kobatela bana na ntina ete baboti bakoka kokende tempelo. To kobongisa kosala likelemba mpo na kobatela bana.

Soki Tempelo Ezali Mosika Mpenza

Chandradas “Roshan” mpe Sheron Antony ya Colombo, Sri Lanka, bazwaki mokano ya kokangisama na tempelo. Baninga na bango Ann mpe Anton Kumarasamy basepelaki makasi mpo na bango. Kasi bayebaki ete kokende na Tempelo ya Manila Philippines mpo ezalaki pete to ntalo moke te.

Roshan mpe Sheron babombaki mosolo mpe bafutaki mpepo liboso basanza mingi yambo bakende mobembo. Nsuka - nsuka, mokolo ekokaki. Nzokande, ntango bakitaki na Malaisie, bamonaki ete mpo na kokoba kokende na Filipine, basengelaki kozala na viza to basengelaki kokende na mpepo mosusu. Bakokaki kozwa viza te, mpe bazalaki na makoki ya kosomba tike ya mpepo mosusu te. Kasi bakokaki kondima likanisi ya kozonga ndako te na kozangaka kokangisama.

Komonaka eloko mosusu ya kosala te, Roshan abengaki Anton. Anton mpe Ann bazalaki na mposa ya lisungi na lolenge ya kozanga elikya. Bazalaki moko kati na balongani na Sri Lanka oyo bakangisamaki na tempelo, mpe bayebaki ezalaki lipamboli monene mpenza. Kasi basalelaki kala te makoki na bango babomba mpo na kosunga moto ya libota moko oyo azalaki na bosenga, mpe bazalaki na mosolo ya kokoka te mpo na kosunga Roshan mpe Sheron basomba batike mpo na mobembo ya mpepo ya sika.

Na Sri Lanka ezali momesano ete mobali abali sika asombela mwasi na ye liyaka ya wolo mpo ete akoka kozwa mbongo soki mobali na ye akufi. Ann azwaki mokano ya koteka liyaka wana mpo na kosunga kosomba batike ya sika. Likabo na ye ya bosembo ekokisaki elaka ya Roshan mpe Sheron ya kokende tempelo na bango na Manila.

“Nayebi motuya ya bokangisi na tempelo,” Ann alobaki. “Nayebaki Sheron mpe Roshan bakozala ndakisa ya bolendisi monene na etape. Nalingaki te ete bazanga libaku oyo.”3

Makanisi mpo na Kosunga Baoyo Bakoki Kokende Tempelo Te

Bokoki kobiangema mpo na kosalisa baoyo bazali kokoka kokende na tempelo mbala na mbala te to ata moke te mpo na mosika to motuya ya mobembo. Kasi bokoki ntango nyonso komona banzela ya kosunga bango basepela na mapamboli ya tempelo.

  • Boteya to bozala elongo na kelasi ya bomilengeli mpo na tempelo to ya mambi ya libota ya kala.

  • Bopesa bango foto ya tempelo moko mpo na kobamba na ndako na bango.

  • Soki bosila kokenda na tempelo, bakabola mayoki na bino ya boyebi mpe litatoli na bino ya makuli ya tempelo.

  • Bosunga bango bayekola mingi mayokani basalaki mpe lolenge nini kobatela yango. Bobanza kosalelaka Bososoli Mayokani na Biso elongo na Nzambe: Emoneli moko ya Bilaka na Biso ya Ntina Mpenza na Liahona.ya sanza ya nsambo 2012

Matangi

  1. Russell M. Nelson, “Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 114.

  2. Tala LaRene Gaunt, “Finding Joy in Temple Service,” Ensign, Sanza ya zomi 1994, 8.

  3. Ann mpe Anton bakokaki kozwa lisusu liyaka na bango ya wolo ntango bazongiselaki bango mosolo uta na Misolo ya Lisungi Monene ya Bato Bakendeke na Tempelo ya Eklezia, oyo epesaka lisungi ya misolo na mbala moko na bandimi ya Eklezia oyo bazali na makoki te ya kokende tempelo.