2020
Kosalisa na Nzela ya Likita Linene
Sanza ya Minei 2020


“Kosalisa na Nzela ya Likita Linene,” Liawona, Sanza ya Minei 2020

Elilingi
kosalisa

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya minei 2020

Kosalisa na Nzela ya Likita Linene

Na matangi nyonso ya bolendisi, mimesano ya libota, mpe mateya uta na basali ya Nkolo, likita linene epesaka biso banzela mingi mpo na kosalisa—liboso ya, na ntango ya, mpe na poso nsima ya likita linene!

Lokola bateyi ya kelasi ya kolengela bana mpo na misio, Susie mpe Tom Mullen balendisaka mbala na mbala bana ya kelasi na bango mpo na kobengisa moto moko aya kotala likita linene.

“Kobengisa moto mpo na kosala likambo moko ezali eteni moko monene kati na mosala ya bamisionele, mpe yango etali mpe lokola mosala ya kosalisa,” elobi ye. “Bayekoli na biso bazongisaka mbala na mbala maloba na lolenge makambo elekaki malamu mpo na bango mpe lisusu mpo na moto babengisaki.”

Oyo ezali mwa banzela moke bayekoli na bango bazongisaki maloba ntango bapesamaki maloba:

  • “Tosalisaka moninga moko oyo azali na mwa mikakatano miye ye azali kobunda na yango. Tobengisaki ye kolanda likita linene mpo na kozwa biyano. Ntango tokendeki kotala ye nsima ya likita, ye ayebisaki biso ete ayokaki makanisi mingi mpenza oyo ekosalisa ye.”

  • “Tosalaki feti moko ya likita linene mpe moto nionso amemaki bilei mpo na kokabola. Ezalaki likambo ya kosepela mpenza ete tokanaki kosala yango lisusu.”

  • “Nabengisaki moninga moko kotala likita linene elongo na ngai. Ntango tolobelaki yango, tokanaki kokende na motuka na ndako ya nzambe mpo na kotala soki tokokaki kotala yango kuna. Totalaki yango, mpe ezalaki libaku ya malamu mingi koleka ya kozala kuna!”

Lokola baMullens mpe bayekoli na bango bayekolaki, ezali na banzela mingi ya kosalisa bato basusu na nzela ya likita linene. Ezali lolenge moko ya kitoko ya kokabola matangi mpo na kolendisa, mimesano ya libota, masolo ya ntina monene, mpe mateya ya basali ya Nkolo!

Bengisa Bato Basusu na Ndako na Yo.

“Mobisiki atindaki balandi na ye ete ‘bolingana, lokola nalingi bino’ (Yoane 13:34). Boye tozali kolanda lolenge Ye alingaki biso. … Soki tokomisi Ye ndakisa na biso, tokozala ntango nyonso komeka kosalisa mpo na koyamba moto nyonso.” —President Dallin H. Oaks1

Mibu mileki moteyi malamu mingi ya ndako na biso Mike amonaki ete bana na ngai misato mpe ngai tozalaki kaka na mwa ordinatele ya moke mpenza mpo na kolanda likita linene. Siakasika wana ye abengisaki biso koya na ndako na ye kotala elongo na ye mpe mwasi na ye, Jackie, kozongelaka koyebisa biso ete bakolinga kozala na biso elongo. Bana na ngai basepelaki mingi kotala likita linene na TV moko ya solo; nasepelaki mpenza kozwa lisungi yango; mpe banso tosepelaki ngonga tolekisaki elongo.

Nsima na yango, kolanda likita linene elongo ekomaki momesano. Ata ntango tozwaki TV na biso moko, tozalaki kaka kokende epai ya Mike mpe Jackie na bakuse na biso ya kolalisa mito, bakaye, mpe bilei mpo na likita linene.. Koyoka maloba ya baprofeta esika moko elongo ekomisaki yango momeseno ya kafukafu. Tokomaki lokola libota. Mike mpe Jackie bakomaki baninga na biso ya malamu mpe mingi koleka bankoko ya mibale mpo na bana na ngai. Ya bango bolingo mpe kozala baninga ezali lipamboli ya kondima te mpo na libota na ngai. Nazali na botondi mpo na bolingi na bango ya kofungolaka ndako mpe mitema na bango epai na biso.

Suzanne Erd, California, USA

Mabongi ya Komanyola

“Oyo bamonaki”

Mobikisi azwaki ntango na bolingo nyonso mpo na kotala mposa ya basusu mpe nsima kosala mpo na kokokisa mposa wana (tala Matai 9:35–36; Yoane 6:5; 19:26–27). Tokoki kosala lolenge moko.

“Babengisaki bango sikasika wana”

Nsima ya komona bamposa ya bato oyo tozali kosalisa, eloko ya nsima ezali kosala.“Koyoka maloba ya baprofeta”

Tosengeli “kokutana elongo mbala mingi” (Moloni 6:5) mpo na koyekola elongo, kokola elongo, kolobela makambo ya molimo oyo ezali na motuya mingi koleka mpo na milimo na biso.

“Yaka, koyoka mongongo ya profeta, mpe koyoka liloba ya Nzambe”2 ekoki kozala moko ya mabengisi ya motuya mingi koleka tokoki kopesa na baye tozali kosalisa.

“Bolingo mpe kozala baninga”

Mpo na kosalisa mpe kosunga solo basusu, tosengeli kotonga mikangano oyo misalemi na mawa “bolingo ya solo” (tala Doctrine and Covenants 121:41).

Kokabola Masolo na Interneti

“Nzela ya masolo na interneti to media sociaux ezali bisalelo minene oyo ekoki kokutanisa mitango minene ya bato na mpe mabota na komemaka litomba malamu. Mpe nandimi ngonga esili koya mpo na biso lokola bayekoli ya Klisto kosalela bisalelo bifulama oyo na lolenge elongobani mpe na elonga mpenza mpo na kotatola Nzambe Tata ya Seko, mwango na Ye ya esengo mpo na bana na Ye, mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, lokola Mobikisi ya mokili.” —Mpaka David A. Bednar3

Interneti epesaka biso nzela ya kokabola Nsango Malamu na mokili mobimba. Nasepeli na yango! Nakabolaka ndambu ya masolo ya likita linene, kasi mingimigni namekaka kosalisa basusu kokela lisolo uta na badisikulu ya likita linene. Komona mituna uta na basusu ekoki kosalisa biso komona makambo na bososoli ya sika mpe ekoki kobakisa pimbu ya elengi na mituna ya masolo minene na biso moko.

Namoni ete ntango bino bosaleli mituna mpo na kosolola na ntina ya badisikulu ya likita linene elongo na mabota na bino, ekosalisa bino komona nini ezali biteni ya makasi na bango mpe bamposa na bango. Moko ya mituna na ngai ya kotuna ezali, Nini bokanisi ezalaki mama na likambo ya liyangani ya nsuka ya likita linene.

Penepene na ntango nyonso eyano ekosalaka ete omona nini ezali koleka na bomoi na bango mpe nini ezali motuya mpo na bango. Epesaka bino nzela ya kokoma bandeko mibali to bandeko basi ya malamu mingi koleka kati na basalisi mpamba te bokokoma komona bango polele mingi koleka.

Camille Gillham, Colorado, USA

Mabongi ya Komaniola

“Kokabola nsango malamu”

Tosalaki boyokani ya “kozala banzeneneke ya Nzambe na ngonga nyonso na makambo nyonso mpe na bisika nyonso”. (Moziya 18:9).

“Kosala lisolo”

Mateya ya likita linene ekoki kofula masolo ya kokamwa, ya ntina, mpe maye makambami na molimo. Mpe masolo ya ndenge oyo ekoki kolendisa mikangano na bino, kosunga kokolisa matatoli na bino, mpe komemela bino esengo! (tala Doctrine and Covenants 50:22).

“Kosalela mituna”

“Mituna ya malamu ekosalisa bino kososola matomba, mitungisi, to mituna oyo basusu bazali na yango. Yango ekoki kobongisa liteya na bino, kobengisa Molimo, mpe kosalisa bato bayekola.”4

Matangi

  1. Dallin H. Oaks, “Love and the Law” (video), mormonandgay.ChurchofJesusChrist.org.

  2. “Come, Listen to a Prophet’s Voice,” Hymns, no. 21.

  3. David A. Bednar, “Flood the Earth through Social Media,” Liahona, Sanza ya moambe 2015, 50.

  4. Prechez Mon Evangile: Guide pour le Service Missionaire (2004), 185.