2020
Kosalisa na Nzela ya Likita ya Elambo
Sanza ya Motoba 2020


“Kosalisa na Nzela ya Likita ya Elambo,” Liahona, Sanza ya Motoba 2020

Elilingi
Kosalisa

Bilili na Edward McGowan

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Motoba 2020

Kosalisa na Nzela ya Likita ya Elambo

Likita ya elambo epesaka mabaku mpo na kokutana na basusu.

Likita ya elambo ezali ngonga mpo ya koleisama na molimo mpe komanyola yo moko na ntina ya Mobikisi mpe Bomipkabi na Ye. Ntango toliaka elambo poso nyonso, tozali kolendisama elongo (tala Malongi mpe Mayokani 84:110). Kasi basusu na bapalwasi mpe bitape na biso bamemaka elongo na bango mikumba ya kilo to bazalaka wana ata moke te.

Oyo ezali mwa mabaku mpo na motindo kani tokoki kosalela ngonga oyo ya bule mpo na kosalisa basusu mpe komema bokeseni na bomoi na bango.

Pesa Lisalisi na Yo mpo na Kokomisa Likita ya Elambo Malamu Mingi Koleka mpo na Baye Yo Ozali Kosalisa

Litambe ya liboso mpo na koyekola boniboni kosalisa ezali ya koyeba bato to mabota mpe mposa na bango. Ekoki kozala na banzela wapi okoki kosunga mpo na kokomisa ntango ya losambo ya elambo na bango malamu koleka kaka na koyebaka mingi na ntina na bango.

Mpo na Mindy, elenge mama ya bana mike ya mapasa, bokasi ya mpamba ya kosalisa ndeko mwasi ememaki bokeseni monene mpenza na maye ayokaka na likita ya elambo ya poso nyonso.

“Na ntina ya kotosa bangonga ya mosala ya mobali na ngai, nazalaki komema bana na biso ya basi ya mapasa na eklezia poso nyonso ngai moko,” Mindy alimbolaki. “Ezali mpenza kolekela ngai mpo na komeka kokisa yango na koendeka na makita nyonso ya elambo elongo na bana ya mike mibale ya mobulu, kasi ndeko ya mwasi oyo tosangaka na ye na mosala ya kosalisa kati na eklezia amipesaki mokumba ya kosunga ngai.

“Ye avandaka elongo na biso mpe asungaka ngai kobatela bana na ngai ya basi poso nyonso. Komona ye mpembeni na ngai kaka elobaka mingi mpenza epai na ngai mpe ya solo elembisaki kotungisama na ngai na ngonga na bango ya kolelalela mpe kosala mobulu. Nandimi te ete akotikalaka koyeba mpenza boniboni misala na ye ezali na motuya epai na ngai na ngonga oyo ya bomoi na ngai. Ye amonaki mposa na ngai lokola elenge mama moko oyo atonda na motungisi, mpe asungi ngai kokomisa eklezia esika moko ya kimia mpe ya esengo mpo na biso banso.”

Makanisi mpo na Kosunga Baye Bazali na Mposa Songolo

  • Mema nsango na lisanga likoki ya bampaka mpe na bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na eye etali mposa ya bandimi.

  • Bakambi basalaka manaka ya badisukulu ya likita ya elambo mpo na kokokisa mposa ya bandimi. Soki baye bozali kosalisa bakoki kozwa litomba na koyokaka nsango songolo, kabola likanisi yango na bakambi na yo.

  • Soki oyebi ete moko azali na eleme [handicap] to ekila ya kolia oyo ekoki kopekisa ye kosepela na mapamboli ya elambo, tuna bango molai ya bansango na kpokoso wana mpe nini bokoki kosala mpo na kobongisa mabaku mpe lolenge na bango ya kosambela. Kabola nsango yango na bakambi.

  • Soki moto moko oyo ozali kosalisa to oyebi akangami na ndako, ezala mpo na ntango mobima ya bomoi to mpo na ntango moke, tuna episikopo na yo soki elambo ekoki kopesamela bango na ndako. Okoki kutu kokoma mateya na liyangani ya elambo mpe kokabola yango na telefone, na email, to ntango bozali esika moko.

  • Soki moto moko ozali kosalisa azali na bana ya mike, okoki kopesa lisalisi na yo mpo na kosunga bango na likita ya elambo.

  • Soki baye yo osalisaka na mosala ya eklezia bayaka mbala mingi te na likita ya elambo, meka kososola mpe kokanisa na ndenge nini okoki kosunga. Soki basengeli motuka, okoki komema bango. Soki bayokaka lokola ete libota esungaka bango te, okoki kobengisa bango bavanda elongo na yo. Okoki kobengisa bango na lolenge ya malamu koleka mpo na kosunga bango bayoka ete bayambami malamu mpe bandimami na likita ya elambo.

Mikundola, Makambo ya Mike-mike Ememaka Nsango Mosika

Kolobelaka mosala ya kosalisa, Ndeko mwasi Jean B. Bingham, Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, ateyaki: Ntango mosusu tokanisaka ete tosengeli kosala likambo moko ya monene mpe ya bilombe mpo na ‘kotangama’ lokola kosalisa bazalani na biso. Nzokande misala ya mike mike ya kosalisa ekoki kozala na litomba ya monene epai ya basusu—mpe epai ya biso moko lokola.”1

Na palwasi moko ya moke na Belgique, Evita azalaki mbala mingi kobongola lokota mpo na bapaya tobengisaka oyo balobaka Espaniole mpe mpo na bandimi na makita ya Eklezia. Mokolo moko, balakisaki Evita na moto moko oyo awutaki Republiki ya Dominiki oyo azalaki koyekola na ntina ya Eklezia. Ayebaki mwa Anglele kasi monoko na ye ya mbotama ezalaki Espaniole. Boye Evita amipesaki kobongola lokota mpo na ye na likita ya elambo mpo ete amiyoka malamu mingi koleka.

“Kobongola lokota ekoki ntango mosusu kokomisa Saba na ngai mokolo ya mikumba mingi,” Evita alobaki. “Kasi nsima ya kolandaka bitinda ya motema mpo na kotuna basusu soki bazali na mposa mpenza ya mobongoli ya lokota epesaki nsuka-nsuka libaku ete nayoka esengo mpe bosepeli na koyebaka ete nakoki kosunga bango koyoka Molimo mpe kosepela na makita na bango.”

Makansi mpo na Kosunga na Nzela ya Misala ya Mike mike

  • Loba na bakambi na yo batala nani azali na mposa ya lisalisi mosusu na likita ya elambo. To soki oyebi moto moko oyo azali na mposa yango, sala nyonso ete bakambi na yo bayeba yango.

  • Vanda kimia ntango ozali kozela mpo ete likita ebanda. Yango ekosunga “bato batutisama mitema mpe bato na milimo ya mawa oyo bazingi biso”2 oyo basengeli kozwa kimia oyo eyaka na nzela ya limemia na esika ya bule.

  • Na mokolo ya eyenga ya kokila, kanisa kobonza biloko okilakii mpe nsambo na yo na moto moko oyo osalisakampe oyo asengeli babakisela ye bolendisi.

  • Sambela mpo na koyeba soki ezali na moto moko oyo akoki kozwa litomba uta na yo na kovandaka mpembeni to penepene na bango na likita ya elambo to soki ezali na lolenge mosusu okoki kosunga.

Likita ya Elambo Ekoki Kozala Esika Bato Banso Bayambamaka Malamu

Mokambi Joseph Fielding Smith (1876–1972) ateyaki, “Likita ya Elambo ezali likita ya bule koleka nyonso, ya santu koleka makita nyonso, ya Eklezia.”3 Soki ezali bongo, ezali likambo ya motuya mpo na koyeba ete banso oyo bazali na likita ya elambo bayoka bayambami malamu mpe baleisami na molimo—mingi mingi bandimi ya sika to bandimi oyo bayaki te mwa mikolo mingi.

Merania uta na New South Wales na Australie, akomaki moninga na mwasi moko oyo azalaki koyekola Eklezia na Palwasi na ye. “Akomi moko ya baninga na ngai ya bolingo sikoyo,” Merania alobi. “Nalingaka kovanda elongo na ye na likita ya elambo poso nyonso, mpe natunaka ntango nyonso soki azali malamu mpe soki ezali na likambo nakoki kosala mpo na kosunga ye.” Nsima ya mwa ntango, moninga ya Merania azwaki libatisi. Bokasi ya bandimi ya palwasi, mpe ezalaleli ya koyamba bato malamu na likita ya elambo, esalaki mosala monene na mokano na ye.

Makanisi mpo na Kosalisa Bandimi Bazongi to Bandimi ya Sika

  • Soki okoloba na likita ya elambo, okoki kobengisa baninga, libota, mpe basusu baya koyoka disukulu na yo.

  • Okoki koluka mpe kotombela boyei bolamu na baye bazali bango moko to baye bazali na mposa ya lisungi. Tuna soki okoki kovanda mpembeni na bango to kobengisa bango bavanda elongo na yo.

  • Ntango likita esili, okoki kobengisa baye osalisaka mpe basusu na milulu ekoya ya Eklezia, na tempelo, to na makambo minene ya lingomba.

  • Soki moto moko oyo ozali kosalisa ayei na likita ya elambo kasi ayaka lisusu te mwa mikolo, okoki kotuna bango soki bazali na mituna etali mateya oyo eteyamaki. Yebisa bango ete bakoyambama ntango nyonso malamu soki ezali na liloba, lisolo, to eteni ya malongi basosolaki te. Bokoki koluka biyano elongo soki esengeli.

Matangi

  1. Jean B. Bingham, “Ministering as the Savior Does,” Liahona, May 2018, 104.

  2. Jeffrey R. Holland, “The Other Prodigal,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 46.

  3. Joseph Fielding Smith, in Conference Report, Oct. 1929, 60–61.