2020
Kokabola Pole ya Mobikisi na Noele
Sanza ya Zomi na Mibale 2020


“Kokabola Pole ya Mobikisi na Noele,“ Liahona, Sanza ya zomi na mibale 2020

Elilingi
Kosalisa

Foto ya mbotama na Niltza Beatriz Santillan Castilo; foto ya likabo uta na Getty Images

Mabongi ya Kosalisa, Sanza ya Zomi na mibale 2020

Kokabola Pole ya Mobikisi na Noele

Lengela baye osalisaka. Lolenge nini okoki kosunga bango bapusana pene ya Kilisto na Noele oyo?

Ntango tozali kokanisa Mobikisi Yesu Klisto mobu moye nyonso, Noele ezali eleko wapi tosepelaka na likabo monene koleka nyonso oyo esila kopesama: “Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na ye se moko“ (Yoane 3:16). Ntango tozali kosalisa na Noele, biso mpe tokoki kopesa likabo oyo ekosunga bato bapusana penepene na Mobikisi. Ezali malamu mpenza komikanisa ete tokokani na likabo oyo Tata na Lola apesaki.

Nalingaka Ntango Nyonso Likabo Yango

Susan Hardy, California, USA

Ntango nazalaki na mibu 11, Motei na ngai ya Eteyelo ya Eyenga, Ndeko mobali Deets, alobaki na eteyelo na biso ete soki tokokaki kokanga Biteni ya Bondimi mpe kolimbola yango mpo na ye nini yango elingi koloba, akosombela biso liboke ya makomi.

Ndeko mobali mpe mwasi Deets bazalaki babalani ya bilenge, babandaki sika. Nazalaki na kondima te ete Ndeko Deets azalaki na mbongo ya kosomba likabo mpo na moto moko moko. Kasi nazwaki ekateli ete soki akanisaki Biteni ya Bondimi ezalaki ntina koleka mpo na kokanga yango na moto, nakosala momekano yango.

Nsima ya kosilisa biteni nyonso 13, ntango elekaki mpe nabosanaki elaka na ye.

Nsima, na Mokolo ya Noele, nazwaki likabo na nkombo na ngai likolo. Nafungolaki yango mpe namonaki likaboya liboke ya makomi mpo na ngai, ezalaki na kalati oyo ezalaki kolendisa ngai natangaka yango mbala na mbala. Wana ezalaki na 1972, mpe tii lelo oyo nazali kaka na makomi yango. Ezali ya motuya monene epayi na ngai.

Ezalaki motuya ya likabo te kasi boboto oyo alakisaki epayi na ngai mpe libonza ya bolingi oyo azalaki na yango mpo na ngai nde esalaki ete natikala na mposa makasi ya koyekola liloba ya Nzambe. Namekaka kolanda ndakisa ya Ndeko mobali Deets ya kosalisa na kopesaka makabo ya ntina koleka epai ya baoyo bazali nzinga-nzinga na ngai, kolikiaka ete nakoki kopambola bomoi ya basusu lokola apambolaki ya ngai.

Libiangi ya Kosala Mosala moko

Richard M. Romney, Utah, USA

Ntango baoyo bazalaki kobongisa palwasi na biso mpo na milulu ya mpokwa ya Noele basengaki ngai nakende kotala ndeko moko ya bolembu mpe kobengisa ye aya na pologalami yango, nasengeli kondima ete nayokaki motema kanda kanda. Nakutanaki na Darren mbala moko kaka liboso, ntango ayaki na molulu moko ya palwasi kala. Alataki eteni ya elamba ya motu ya tukutuku na mbunzu na ye. Suki na ye ya mpembe ya milayi akangaki yango nuani na nsima, azalaki na mandefu ya mpembe, mpe maboko na ye ezipamaki na batatouage.

Sikoyo, elongo na ndeko moko ya babongisi molulu, natelemaki liboso ya ekuke ya Darren, kokanisaka nini akokaki koloba. Asengaki biso tokota, mpe toyebisaki ye mpo na nini toyaki. Alobaki, “O, nakosepela kosala yango!“

Asalaki mosala moko ya kokamwa, kosungaka mpo ete molulu ezala ya ntina koleka mpo na bato ebele. Nsima ya mwa ngonga, moninga na ngai ya lisalisi mpe ngai tosengamaki kokende kotala Darren mbala-na-mbala. Azalaka lokola ntango nyonso na esengo ya komona biso, mpe tozalaki kobeta masolo ya kitoko. Nazali na botondi mpo ete bofulami ya kobengisa ye aya na pologalami ya molulu ya palwasi ekambamaki ete biso tozala baninga malamu.

Kosalisa Basusu na Noele

Tala mwa makambo maye bokoki kosala mpo na kosala ete baoyo ozali kosalisa bakoyeba ete ozali kokanisa bango, mingimingi na eleko oyo ya mobu.

  1. Ntango mosusu kobenga to kotinda message na telefone esalaka malamu. Kobanda liboso na “Mbote, ozali malamu?“ na mindondo te ekoki kosala bokeseni.

  2. Sangana na bokembeli na bango soki esalemaka. Noele ekoki kozala eleko malamu mpo na koyekola na ntina ya boyambi tozali na yango. Ntango ozali kokabola boyambi mpe koyokela basusu, ozali kofungola ekuke na bososoli monene.

  3. Sambela mpo na bango na nkombo na bango. Senga Tata na Lola asunga yo okanisa ndenge ya komema bango penepene mingi koleka ya ya Mwana na Ye.

  4. Tomikundoloka mbala mingi makabo ya mike mike koleka mpenza. Makabo esengeli te kolengelema na mindondo mpo balinga yango. Likabo ya ntango, likabo ya koyoka, kokabola elili to makambo ya kala—nyonso ekoki kozala makabo ya motema.

  5. Pesa likabo ya litatoli. Senga bango bakabola bolingo na bango ya Mobikisi elongo na yo, mpe senga kokabola bolingo na yo mpo na Ye elongo na bango.

  6. Bengisa basusu baya na liyangani ya Noele. Bato basusu balukaka kokumbamela kasi bayebaka te esika nini ya kokende. Bengisa bango bayaka kokumbamela elongo na yo.

  7. Tondisa libota na bango na kimya. Yebisa bango ete bamisionele bazali na liloba ya Noele ya kafukafu oyo bakoki kokabola, moko oyo ekomema elikya mpe bolingo na mitema na bango.

Kosalisa Banso lokola Bato Lingomba Moko

Bamposa ya Lisanga moko na moko ezali ndenge moko. Basusu bazwaka litomba na kobongisaka molulu monene. Mangomba mosusu ekoki kozwa litomba uta na eloko ya moke mpe ya mike miek. Baoyo bazali kati na kolengela mpe kobongisa milulu na nzela ya nsambo batalaka lolenge nini ya kokokisa bamposa oyo ezali.

  • Bandimi ya makonzi misato na Paris, France, basalisaki mpo na kosunga feti ya mpokwa ya Light the World oyo ezalaki na kolakisa batalanta ya kolatampe ya bilamba. Babongisaki biloko oyo epesamaki na bapaya mpe bato oyo bazanga bandako.

  • Likonzi ya Charlotte North Carolina Central basalaki molulu ya “Noele nzinga-nzinga ya Mokili“ mpo na lisanga ya bato na bango, lipati mpo na kokembela Klisto na nzela ya bilei, bolakisi ya momesano ya Noele na Mokili mobimba, miziki, manaka ya misala, mpe eliele ya mbotama esalami na bana.

  • Bandimi ya Likonzi ya Vero Beach Florida basanganaki mpo na kokundolisa lisanga ntina nini tokembelaka Noele. Biloko ya kosakanela epesamaki epayi ya bato ya mosala ya lisungi kati na masanga bato. Bayembi ya bana ya Eteyelo ya Bana bayembaki, mpe baeklezia mingi bazalaki na kioske mpo na kokabola bansango.

  • Likonzi ya Jacksonville Florida South balakisaki lisano Mobikisi ya Mokili mpo na lisanga.