Mikanda Misusu mpo na Koteya Bana
Bobakisi A: Mpo na Baboti—Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani na Nzambe


“Bobakisi A: Mpo na Baboti—Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani na Nzambe” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Bobakisi A,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024

Bobakisi A

Mpo na Baboti—Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani na Nzambe

Mpo ete Ye alingaka bino, andimelaka bino, mpe ayebi bokasi na bino, Tata na Lola apesaki bino libaku ya kosunga bana na bino bakota mpe bakoba na nzela na Ye ya boyokani, nzela ya bomoi ya seko (tala Malongi mpe Mayokani 68:25–28). Yango esangisi kosalisaka bango komilengela mpo na kosala mpe kobatela mayokani ya bule, lokola boyokani ya libatisi mpe mayokani basalaki na tempelo. Na nzela ya mayokani wana, bana na bino bakomikangisa bango moko epai ya Mobikisi, Yesu Klisto.

Ezali na banzela mingi ya kolengela bana na bino mpo na mobembo yango na nzela ya boyokani, mpe Tata na Lola akosunga bino komona lolenge nini ya malamu koleka mpo na kosunga bango. Ntango bozali koluka bofuli, bomba na motema ete boyekoli nyonso eyaka te na ntango ya mateya malengelemaki. Solo mpenza, eteni ya oyo epesaka koyekola na ndako nguya mingi koleka ezali libaku ya koyekola na nzela ya ndakisa mpe na nzela ya bantango mike, ya pete—na lolenge ya oyo esalemaka na ndenge na yango moko na bokobi ya bomoi ya mokolo na mokolo. Kaka lokola kolanda nzela ya liyokani ezali mosala ya ntango nyonso, ya bomoi mobimba, ezali boye mpe mpo na nzela ya liyokani. (Tala “Home and Family,” Teaching in the Savior’s Way [2022], 30–31.)

Elilingi
mama na mwana

Ezali na balolenge mingi ya kolengela bana na bino mpo na mobembo na bango ya boyokani ya Nzambe.

Oyo elandi ezali mua makanisi ekoki kokumba na bofulami koleka. Bokoki kozwa makanisi mosusu mpo na koteya na Eteyelo ya bana na “Mabakisi B: Mpo na Eteyelo ya Bana—Kolengela Bana na Bino mpo na Bomoi Mobimba na Nzela ya Boyokani na Nzambe.”

Libatisi mpe Nkotisa

Nefi ateyaki ete “ekuke oyo [biso] tosengeli kokota” na nzela ya boyokani “ezali boyamboli mpe libatisi ya mayi” (2 Nefi 31:17). Makasi na bino ya kosunga bana na bino komilengela mpo na libatisi mpe nkotisa ekoki kobomba makolo na bango ngwi na nzela yango. Makasi yango ebandaka na koteyaka na ntina ya bondimi na Yesu Klisto mpe boyamboli. Yango esangisi mateya na ntina ya lolenge nini kozongisa sika mayokani na biso ya libatisi na koliaka elambo mposo nyonso.

Oyo ezali mwa makanisi oyo ekoki kosunga bino: 2 Nefi 31; mokanda ya sikisiki ya magazini ya Friend na ntina ya libatisi; Gospel Topics, “Baptism,” Gospel Library.

  • Ntango nyonso bozali na mayele moko oyo etongaki bondimi na bino na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto, bokabola yango elongo na bana na bino. Bosunga bango kososola bondimi wana ezali eloko moko oyo ekoki kokola makasi mingi koleka mpe bomoi na bango mobimba. Biloko nini mwana na yo akoki kosala mpo na kokolisa makasi bondimi na Klisto yambo ete ye mwana mobali to mwasi azwa libatisi?

  • Ntango mwana na bino asali boponi mabe, solola na ye na esengo na ntina ya likabo ya boyamboli. Mpe ntango bino bosali boponi ya mabe, bokabola esengo wana oyo eyaka ntango boyamboli. Botatola ete mpo Yesu Klisto anyokwamaki mpe akufaki mpo na masumu, Ye apesaki biso nguya ya kobongwana. Ntango mwana na bino asengi bolimbisi, limbisa na bonsomi mpe esengo mingi.

  • Boyebisa mwana na bino na ntina ya libatisi na bino. Lakisa bafoto mpe kabola makanisi ya kala. Solola na tina ya lolenge bomiyokaki, lolenge nini mayokani ya libatisi na bino esungaki bino koya koyeba ete Yesu Klisto azali malamu mingi koleka, mpe lolenge yango ezali kokoba kopambola bomoi na yo. Pesa bango makasi ya kotuna mituna.

  • Ntango libatisi ezali kosalema na libota na bino to palwasi na bino, bomema mwana na bino amona yango. Bosolola elongo na ntina ya oyo bino mpe mwana na bino bomonaki mpe boyokaki. Soki ekoki kosalema, bosolola na moto abatisamaki mpe botuna mituna lokola oyo elandi: “Lolenge nini ozwaki mokano oyo? Lolenge nini omilengelaki?”

  • Ntango nyonso omoni mwana na yo azali kosala likambo oyo alakaki kosala, pesa longonia ya solo. Yebisa ye ete kobatelaka mitindo esungaka biso tomilengela mpo na kobomba mayokani oyo tosalaka ntango tobatisami. Nini tolakaka epai na Nzambe ntango tobatisamaka? Nini Ye alaki biso? (tala Mosiya 18:8–10, 13).

  • Ntango yo mpe mwana na yo bozali na mayele moko ya bule elongo (lokola na eklezia, ntango kotangaka makomi, to kosalelaka moto moko), yebisa ye na ntina ya mayoki ya molimo to mayoki ozali na yango. Bengisa mwana na yo kokabola lolenge nini azali koyoka. Talisa lolenge ya ndenge na ndenge Molimo akoki kolobela bato, mpe lisusu balolenge ebele Ye alobelaka yo moko. Bosunga mwana na yo kososola bantango nini ye akoki koyoka nguya ya Molimo Mosantu.

  • Botala elongo bavideo kati na Gospel Library collection titled “Hear Him!” Bosolola elongo na ntina ya banzela ekeseni oyo basali ya Nkolo bayokaka mongongo na Ye. Bobenga mwana na bino kosala elilingi moko to kotia video ya lolenge nini ye ayokaka mongongo ya Mobikisi.

  • Bosolola oyo etali lolenge nini kokoma mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka epambolaki yo. Lolenge nini bokomaki kozala pene ya Tata ya Lola mpe Yesu Klisto ntango ozali kosalela basusu mpe lokola basusu baselelaki bino? Bosunga bana na bino kokanisa banzela nini kosalisa mpe kokembisa basusu lokola mondimi moko ya eklezia.

  • Bokomisa elambo lokola molulu moko ya bule mpe ya esengo mpenza kati na libota na bino Bosunga mwana na yo kobongisa balolenge ya kotia makanisi na Yesu Klisto katikati ya elambo. Lolenge nini tokoki kolakisa ete elambo ezali bule epai na biso?

  • Mikanda mingi ya magazini ya Friend esangisaka makambo, lisituale, mpe misala ya kosunga bana komilengela mpo libatisi mpe kotisa. Botika mwana na bino apona bamoko ya kotanga mpe ya kosepela elongo na yo. (Tala lisusu na eteni “Preparing for Baptism” kati na eteni ya bana ya Gospel Library.)

    Elilingi
    elenge mobali azali kobatisama

    Nefi ateyaki ete “ekuke epai wapi [biso] tosengeli kokota” na nzela ya liyokani “ezali boyamboli mpe libatisi ya mayi” (2 Nefi 31:17).

Nguya ya Bonganganzambe, Likoki, mpe Bafungola

Bonganganzambe ezali likoki mpe nguya ya Nzambe na nzela na yango Ye apambolaka bana na Ye. Bonganganzambe ya Nzambe ezali na mabele lelo oyo kati na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bandimi nyonso ya Eklezia oyo babatelaka mayokani na bango—mpe lisusu na bana—bapambolami na nguya ya bonganganzambe ya Nzambe na mabota na bango mpo na kolendisa bango moko mpe mabota na bango (tala General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 3.5, Gospel Library). Nguya yango ekosalisa bandimi na kosalaka mosala ya Nzambe ya kobikisa mpe bonetoli na bomoi na bango mpe mabota na bango (tala General Handbook2.2).

Tozwaka makuli na nzela ya likoki ya bonganganzambe. Ntango mobali mpe mwasi bazali kosala na mabiangi ya Eklezia, basalaka yango, elongo na likoki ya bonganganzambe, na nse ya botambuisi ya baye oyo basimbi bafungola ya bonganganzambe. Bana nyonso ya Tata na Lola—bana na Ye ya mibali mpe bana na Ye ya basi—bakopambolama ntango bango bakososola bonganganzambe malamu mpenza.

Mpo na koyekola mingi koleka na ntina ya bonganganzambe, tala Russell M. Nelson, “Spiritual Treasures,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79; Russell M. Nelson, “The Price of Priesthood Power,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 66–69; “Priesthood Principles,” mokapo ya 3 na General Handbook.

  • Bokomisa makuli ya bonganganzambe eteni monene ya bomoi ya libota na bino. Ndakisa, bosunga mwana na bino komilengela na molimo mpo na elambo mposo nyonso. Bolendisa mwana na bino koluka mapamboli ya bonganganzambe ntango ntango azali kobela to asengeli na libondisi to botambuisi. Bokomisa yango ezalela ya kolakisa banzela Nkolo azali kopambola libota na yo na nzela ya nguya ya bonganganzambe.

  • Ntango bozali kotanga makomi elongo, botala mabaku ya kosolola na lolenge nini Nzambe azali kopambola batu na ye na nzela ya nguya na Ye. Bokabola mayoki na bino na lolenge nini Nkolo apambolaki bino na nzela ya mosala ya tempelo. Mpo na ndakisa ya mapamboli tozwaka uta na Nzambe na nzela ya bonganganzambe, tala General Handbook, 3.23.5.

  • Botanga molongo ya likoki ya bonganganzambe ya moto moko ya libota na bino. (Bamemi Bonganganzambe ya Melikisedeke bakoki kozwa kopi moko ya molongo ya likoki na bango nakotindaka email na LineofAuthority@ChurchofJesusChrist.org; tala lisusu “Request a Priesthood Line of Authority” na Ndako ya Lisungi na ChurchofJesusChrist.org.) Bosolola mpo na oyo etali mpo na nini ezali motuya koyeba ete likoki ya bonganganzambe eyaka uta na Yesu Klisto Ye moko. Mpo na nini Ye akaboli yango na biso?

  • Teya mwana na yo ete nsima ya libatisi, akoki kozwa nguya ya bonganganzambe na kobatelaka liyokani ya libatisi. Bozongela elongo etinda ya Mokambi Russell M. Nelson “Spiritual Treasures” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2019, 76–79). Boyebisa mwana na bino lolenge nini makuli ya bonganganzambe ememaki nguya ya Nzambe na bomoi na bino. Mpo na molongo ya ndambo ya banzela topambolami na nguya ya bonganganzambe, tala General Handbook3.5.

  • Bosolola ntina ya “Mowumbu ya Nkolo akokani na nini? Botanga elongo Malongi mpe Mayokani 121:36–42, mpe boluka biyano. Ntango nyonso omoni ete mwana na yo (to moto mosusu) azali kosalela moko ya mabongi oyo to bandakisa malamu na kati ya milongo oyo, bosalela yango.

  • Ntango bino to mwana na bino bosaleli bafungola mpo na kofungola ekuke to kopelisa motuka, bozwa mwa ntango ya kokokanisa bafungola wana na bafungola oyo bakambi ya bonganganzambe basimbi. (Mpo na ndimbola ya bafungola ya bonganzambe, tala General Handbook, 3.4.1). Eloko nini bafungola ya bonganganzambe “efungolaka” to “epelisaka” mpo na biso? Tala lisusu Gary E. Stevenson, “Where Are the Keys and Authority of the Priesthood?, LiahonaSanza ya mitano 2016, 29–32; “Where Are the Keys?” (video), Gospel Library.

  • Ntango otiami pembeni mpo na libiangi, benga mwana na bino kozala wana, soki ekoki kosalema. Botika mwana na bino komona bino kokisaka libiangi na bino mobimba. Bokoki kutu kotala banzela mosusu oyo ye akoki kosunga bino. Limbola lolenge nini oyokaki lnguya ya Nkolo kotandama na libiangi na bino?

Kokende na Tempelo—Mabatisi mpe Nkotisa mpo na Bawei

Batempelo ezali etani moko ya moango ya Tata na Lola mpo na bana ba Ye. Na kati ya batempelo, tosalaka mayokani ya bule elongo na Tata na Lola ntango tosalaka makuli ya bule, oyo nyonso ezali kolakisa nzela epai ya Yesu Klisto. Tata na Lola apesaki nzela moko mpo na bana na Ye nyonso mpo na kosala mayokani mpe kosangana na makuli, kosangisaka baye oyo bayambi yango te na bomoi. Na ebandeli ya mobu ntango akokisi mibu 12, mwana na yo akoli mwa moke mpo na kozwa libatisi mpe nkotisa na kati ya tempelo mpo na bankoko bakufa.

  • Bokende na tempelo mbala mingi lokola ezalela ya moto na moto ekotinda bino. Bosolola na mwana na bino mpo na oyo etali ntina nini bokendaka mpe lolenge nini tempelo esungi bino komiyoka pene ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

  • Bandela mpe solola mituna ya mokanda ya tempelo elongo. Bosolola na mwana na bino mpo na oyo etali nini eyaka na lisolo mpo na kozwa mokanda ya tempelo. Bokabola mpo na nini kozwaka mokanda ya tempelo ezali ntina mpo na bino.

  • Botanga elongo Malaki 4:6. Bosolola mpo na oyo etali lolenge nini mitema na bino ekoki kozonga na bakoko na bino. Boyekola mingo na oyo etali bakoko na kotalaka mambi ya kala ya libota na bino elongo na FamilySearch.org. Luka bakoko oyo basengeli kobatisama mpe kozua kotisa. Mosungi ya palwasi ya tempelo mpe mambi ma kala ma libota akoki kosunga yo.

  • Bobandela elongo moko ya ba resources in the collection titled “Temple” na molongo ya bana na the Gospel Library. (Tala lisusu “Preparing Your Child for Temple Baptisms and Confirmations” on ChurchofJesusChrist.org.)

Kozwaka lipamboli ya batata

Lipamboli ya batata ekoki kozala nzela moko ya botambuisi, ya bolendisi mpe bofuli. Ezali na toli ya moto ye moko uta na Tata na Lola epai na biso mpe esungaka biso tososola nkombo mpe ntina na biso ya seko. Sunga mwana na yo komilengela mpo na koyamba lipamboli ya ba batata na koteyaka ye ndimbola mpe ntina ya bule ya mapamboli ya batata.

Mpo na koyekola mingi, tala Gospel Topics, “Patriarchal Blessings,” Gospel Library.

  • Kabola na mwana na yo liyoki na bino ya koyambaka lipamboli ya batata. Bokoki kokabola biloko lokola lolenge nini omilengelaki mpo na koyamba yango, lolenge nini yango esungaki yo kokoma pene na Nzambe, mpe lolenge nini bosalelaka lipamboli yango na bomoi na bino. Okoki lisusu kobengisa mwana na yo asolola na bandeko mosusu ya libota oyo basila kozwa mapamboli na bango ya batata.

  • Bozwa ntango ya kotala elongo mikanda mosusu na kati ya Mikanda ya Nsango malamu, “Patriarchal Blessings.” Mpo na koyekola na oyo etali nzela ya kozwa lipamboli ya batata, tala General Handbook18.17.

  • Soki bozali na bankoko oyo bayamba mapamboli ya batata, yango ekoki kofula mpo na kotanga bamoko ya bango elongo na mwana na bino. Mpo na kosenga mapamboli ya bankoko oyo bakufa, luka na ChurchofJesusChrist.org, fina elili ya konte likolo na ngambo ya loboko ya mobali ya etando, mpe pona “Patriarchal Blessing.”

  • Sima ya mwana na yo kozwaka lipamboli ya batata, benga moko ya bayi libota oyo bazalaki wana mpo na koloba mayoki na bango mpe kokabola yango elongo na mwana na bino.

Kokende na tempelo—kolatisama na nguya ya molimo

Nzambe alingaka kodote, to kopambola, bana na Ye nyonso na “nguya kouta na likolo” (Malongi mpe Mayokani 95:8). Tokendaka na tempelo mpo na kozwa dotasio na biso moko kaka mbala moko, kasi mayokani tosalaka elongo na Nzambe mpe nguya ya molimo Ye apesaka biso lokola eteni ya dotasio ekoki kopambola biso mokolo nyonso ya bomoi na biso.

  • Botia foto ya tempelo moko na ndako na bino. Lobela mwana na yo oyo etali mayoki oyokaka na kati ya tempelo. Bosolola mingi mingi na ntina ya bolingo na yo mpo na Nkolo mpe ndako na Ye mpe mayokani osalaki kuna.

  • Toluka elongo temples.ChurchofJesusChrist.org. Totanga elongo biteni lokola “About the Temple Endowment” mpe “Prepare for the House of the Lord.” Pesa bana na yo nzela ya kotuna mituna nyonso oyo ye azali na yango na ntina ya tempelo. Mpo na lisungi na ntina ya oyo okoki kosolola libanda ya tempelo, tala nsango ya Mpaka David A. Bednar “Prepared to Obtain Every Needful Thing” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 101–4; tala mingimingi mpenza molongo ebengami “Home-Centered and Church-Supported Learning and Temple Preparation”).

  • Ntango yo mpe mwana na yo bosali elongo to bozali nzeneneke ya makuli mosusu (lokola elambo to lipamboli ya libiki), bozwa ntango ya kosolola bilembo oyo ezali kati ya bokuli. Bilembo ezali kolakisa nini? Lolenge nini yango etatolaka Yesu Klisto? Yango ekoki kosunga mwana na yo amilengela mpo na komanyola ndimbola ya elembo ya makuli ya tempelo, oyo etatolaka lisusu na ntina ya Yesu Klisto.

  • Bosunga mwana na bino koyeba lolenge nini azali kobombaka boyokani ya libatisi elobami na Mosiya 18:8–10, 13. Lisusu bosunga mwana na bino ya mobali koyeba lolenge nini Nkolo azali kopambola ye. Bokembisa kondimisama ya mwana na bino na likoki na ye ya kobomba mayokani.

  • Bosolola na motema polele mpe mingi mingi mpo na oyo etali lolenge nini mayokani na yo ya tempelo etambwisaka maponi na bino mpe esungaka bino kokola pene ya Yesu Klisto. Bokoki kosalela General Handbook, 27.2, mpo na kobandela mayoki tosalaki na tempelo.

Kosalaka na Etinda moko

Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Eleko moko ya motuya koleka okoki kosala mpo na komilengela mpo na libiangi ya kosala ezali kokoma misionele yambo mpenza yo okende na etinda. … Likambo ezali te ya kokende misio; nzokande, likambo ezali kokoma misionele mpe kosalisa kati ya bomoi na biso mobimba na motema na biso mobimba, mayele, makanisi, mpe makasi. … Ozali komilengela mpo na bomoi mobimba ya mosala ya misionele” (“Becoming a Missionary,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2005, 45–46). Bamayele mwana na bino azwi na kokomaka misionele ekopambola ye libela na libela, kaka mwa eleko ya ntango akokaki kosala lokola misionele.

Mpo na koyekola mingi, tala Russell M. Nelson, “Preaching the Gospel of Peace,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 6–7; M. Russell Ballard, “Missionary Service Blessed My Life Forever,” Liahona, Sanza ya mitano 2022, 8–10; Missionary Preparation: Adjusting to Missionary Life, Gospel Library.

  • Lolenge nini kokabola nsango malamu na ndenge ya pete. Ntango nyonso bosala keba na mabaku ya kokabola na basusu mayoki na bino na ntina ya Tata ya Lola mpe Mobikisi mpe mapamboli bozwi lokola mondimi ya Eklezia na Ye. Bobenga basusu kosangana na libota na bino na milulu etali eklezia mpe libota.

  • Boluka mabaku mpo na libota na bino kokutana elongo na bamisionele. Bobenga bango koteya baninga na bino, to bopesa bango nzela ya koteya batu na ndako na bino. Botuna bamisionele mpo na oyo etali mayele bazali kozwa mpe lolenge nini mosala ya misio ezali kosunga bango kopusana pene ya Yesu Klisto. Lisusu botuna bango nini basalaki (to bolingiki bango basala) mpo na komilengela mpo na kozala bamisionele.

  • Soki bosalaki misio, bosolola motema ya kofunguama mpe mingi mingi mpo na oyo etali makambo oyo bokutanaki na yango na bomoi na bino. To bobenga baninga mpe bayi libota oyo basalaki misio kosolola na oyo etali ya bango. Bokoki lisusu kosolola mpo na oyo etali balolenge bokabolaki nsango malamu na basusu katikati ya bomoi na bino ? Bosunga mwana na bino kokanisa balolenge ye akoki kokabola nsango malamu.

  • Pesa mwana na yo mabaku malamu ya koteya libota na yo mabongi ya nsango malamu. Mwana na bino akoki lisusu kosalela bokaboli ya babondimi na ye elongo na basusu. Ndakisa, bokoki kosolola na ntina mituna lokola “Lolenge nini tokoki kolakisa Buku ya Mormon epai ya moto songolo oyo naino ayoka yango te?” to “Lolenge nini tokolakisa bosenga mpo na Mobikisi epai ya moto oyo azali Moklisto te?”

  • Bosunga mwana nabino amiyoka ya kobongama mpo na kosolola na bato. Banzela misusu nini ya malamu ezali mpo na kobanda lisolo? Bolendisa mwana na bino koyekola lolenge nini koyoka oyo basusu bazali koloba, sosola nini ezali na kati ya motema na bango, mpe kabola bosolo ya nsango malamu oyo ekoki kopambola bomoi na bango.

  • Boluka mabaku mpo na mwana na bino koyekola na oyo etali bizaleli mpe babondimi misusu. Bosunga ye ayeba mpe atosa mibeko ya malamu mpe ya solo na babondimi’ ya basusu.

Kokende na Tempelo—Bokangi

Na tempelo, mobali mpe mwasi bakoki kobalana mpo na libela. Yango esalemaka na bokuli ebengami bokangi Ata kutu bokuli yango ekoki kozala mibu ebele mosika mpo na mwana na yo ya mobali to ya mwasi, biloko ya, mikie, ya pete, ya kokoka oyo bosali elongo katikati ya mibu oyo ekoki kosunga bango komilengela mpo na lipamboli oyo

  • Tala lisusu “Libota: Esakola na Mokili” na Gospel Library. Nini esakola yango eteyi na ntina ya esengo kati na libota mpe na ntina ya libala ya elonga? Elongo na mwana na yo, bopona moko ye mibeko etiami molongo na esakola mpo na koyekola. Okoki koluka makomi elobeli mobeko wana na Mokambi ya Makomi. Okoki kozwa lisusu mikano ya kosalela libongi wana mobimba mingi koleka kati ya libota na yo. Ntango bozali kosala na bantina na bino, bosolola elongo ntina oyo kobika mobeko yango ezali na bomoi ya libota.

  • Elongo na mwana na yo, botanga etinda ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf “na Praise of Those Who Save” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2016, 77–80). Ntango bokomi na eteni babengi “A Society of Disposables,” bokoki koluka biloko na libota na bino oyo ezali ya kobwaka mpe oyo ezali ya kobwaka te. Lobela lolenge nini osalelaka biloko na bokeseni soki olingi yango ewumela mingi. Yango elobi nini mpo na oyo etali lolenge nini tosengeli kosalela libala mpe mikangano ya libota? Nini lisusu toyekoli uta na etinda ya Mokambi Uchtdorf na oyo etali lolenge nini Mobikisi akoki kosunga biso mpo na kotonga mabala mpe mabota makasi?

  • Soki obala, lobela mwana na yo polele polele nini etali makambo oyokaka ozali kosala malamu lokola babalani, makambo bozali koyekola mpe ndenge bozali komeka kobongola yango. Soki yo na molongani na yo bokangamaki na tempelo, bolakisa mwana na bino na ndakisa lolenge nini bozali kobunda mpo na kobatela mayokani na bino elongo na moko mpe mosusu mpe elongo na Nkolo. Yebisa mwana na yo lolenge nini olukaka kotia Tata na Lola mpe Mobiksi na katikati ya mokangano na yo mpe lolenge Bazali kosunga yo.

  • Ntango mikano ya libota esengeli ezwama, bosala batoli mpe masolo ya kati ya libota. Bosala keba ete makanisi ya bayi libota nyonso eyokami mpe epesami ntina. Bosalela masolo oyo lokola libaku ya kolakisa lisolo elongobani mpe boboto kati ya mikangano ya libota, atako ntango moto nyonso te azali komonela makambo na lolenge moko.

  • Ntango bozangi koyokana to makelele ezali na libota, lakisa motema molai mpe mawa. Bosunga mwana na bino lolenge nini kokata kowelana na balolenge ya Klisto ekoki kosunga ye komilengela mpo na libala ya esengo. Botanga elongo Malongi mpe Mayokani 121:41–42, mpe bosolola na ntina ya lolenge nini mabongi kati ya milongo oyo ekoki kosalemela na libala.