Makomi
Elamani 10


Mokapo 10

Nkolo apesi Nefi nguya ya kokanga—Azwi nguya ya kokangisa mpe kokangola o mabele mpe o lola—Atindi bato bayambola to bakufa—Molimo amemi ye uta ebele na ebele. Penepene na 21–20 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete ebimaki bokabwani boko o katikati ya bato, mpenza ete bakabwanaki awa mpe kuna mpe bakendeki nzela ya bango, kotikaka Nefi ye moko, lokola azalaki kotelemeke o katikati ya bango.

2 Mpe esalemaki ete Nefi akendeki nzela ya ye ona ndako ya ye, na komaniolaka likolo lya makambo Nkolo alakisaki epai ya ye.

3 Mpe esalemaki ete lokola azalaki komaniolaka—ebwakamaki ye o nse na ntina ya nkuna ya bato banso ba Banefi, misala mya nkuku mya bango mya molili, mpe bobomi bwa bango, mpe bopunzi bwa bango, mpe ndenge inso ya mabe—mpe esalemaki ete lokola azalaki boye komaniolaka o motema mwa ye, tala, mongongo moko moyaki epai ya ye kolobaka:

4 Opambolami, Nefi, mpo makambo mana maye osali; mpo namoni boniboni na bozangi bolembi osakoli liloba, liye napesi epai ya yo, epai ya bato baye. Mpe obangi bango te, mpe oluki te bomoi bwa yomei, kasi oluki bolingi bwa ngai, mpe mpo ya kobatela mitindo mya ngai.

5 Mpe sikawa, zambi osali eye na bozangi bolembi bwa lolenge loye, tala, nakopambola yo libela; mpe nakosala yo mokasi o liloba mpe o ekela, o bondimi mpe o misala; iyo, kutu ete makambo manso makosalema engebene na maloba ma yo, mpo okosenge te eye ezali na bokeseni na bolingi bwa ngai.

6 Tala, ozali Nefi, mpe nazali Nzambe. Tala, nasakoli epai ya yo o miso mya banzelu ba ngai, ete okozala na nguya o ntei ya bato baye, mpe okobete mabele na nzala, mpe na bokono mpe bobebisami, engebene na nkuna ya bato baye.

7 Tala, napesi epai ya bino nguya, ete enso eye okokanga o mabele ekokangama o lola; mpe enso eye okokangola o mabele ekokangolama o lola; mpe boye okozala na nguya o ntei ya bato baye.

8 Mpe boye, soko bokoloba epai ya tempelo eye ete epasuka na biteni bibale, ekosalema.

9 Mpe soko bokoloba epai ya ngomba eye, Bwakama o nse mpe koma patatalu, ekosalema.

10 Mpe tala, soko bokoloba ete Nzambe akobete bato baye, ekosalema.

11 Mpe sikawa tala, natindi bino, ete bokende mpe bosakola epai ya bato baye, ete boye elobi Nkolo Nzambe oyo azali wa Bokasi Bonso: Longola se soko boyamboli bokobeteme, kutu mpo ya bobebisami.

12 Mpe tala, sikawa esalemaki ete elobaka Nkolo maloba maye epai ya Nefi, akangamaki mpe akendeki te epai ya ndako ya yemei, kasi azongaki epai ya ebele baye bapalanganaki zingazinga likolo lya etando ya mboka, mpe abandaki kosakola epai ya bango liloba lya Nkolo liye lilobamaka epai ya ye, litali bobebisami bwa bango soko bayambolaki te.

13 Sikawa tala, ata likamwisi linene liye Nefi asalaka na kolobelaka bango etali liwa lya mosambisi mokonzi, bayeisaki mitema mya bango mikasi mpe bayokemelaki te epai ya maloba ma Nkolo.

14 Yango wana Nefi asakolaki epai ya bango liloba lya Nkolo, kolobaka: Longola se soko bayamboli, boye elobi Nkolo, bokobeteme kutu mpo ya bobebisami.

15 Mpe esalemaki ete esakolaka Nefi epai ya bango liloba, tala, bayeisaki mitema mya bango kaka mikasi mpe balingaki te koyokemela epai ya maloba ma ye; yango wana batiolaki ye, mpe balukaki kotia maboko ma bango likolo lya ye ete bakoka kobwaka ye o kati ya boloko.

16 Kasi tala, nguya ya Nzambe ezalaki elongo na ye, mpe bakokaki te kokamata ye mpo ya kobwaka ye o kati ya boloko, mpo akamatamaki na Molimo mpe akumbamaki mosika libanda lya ntei ya bango.

17 Mpe esalemaki ete boye akendeki o Molimo, uta ebele na ebele, kosakolaka liloba lya Nzambe, kutu kina asakolaka lyango epai ya bango banso, to atindaka lyango o ntei ya bato banso.

18 Mpe esalemaki ete balingaki te koyokemela epai ya maloba ma ye; mpe ebandaki kozala boweli, mpenza ete bakabwanaki bangomei mpe babandaki kobomana na mopanga.

19 Mpe boye esukaki mobu mwa tuku sambo na moko mwa bokonzi bwa basambisi likolo lya bato ba Nefi.