Makomi
Molomoni 6


Mokapo 6

Banefi basangani o mboka ya Kumola mpo ya bitumba bya nsuka—Molomoni abombi makundoli ma bule o ngomba Kumola—Balamani bazali balongi, mpe ekolo ya Banefi ebebisami—Nkoto nkama na nkama babomami na mopanga. Penepene na 385 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa nasukisi likundoli lya ngai litali bobebisami bwa bato ba ngai, Banefi. Mpe esalemaki ete totambolaki liboso lya Balamani.

2 Mpe ngai, Molomoni, nakomaki monkanda moko epai ya Mokonzi wa Balamani, nazalaki na mposa na ye ete apesa epai ya biso ete tokoka kosangisa bato ba biso epai ya mboka ya Kumola, mpembeni ya ngomba eye ebiangemaki Kumola, kuna tokoka kopesa bango etumba.

3 Mpe esalemaki ete Mokonzi wa Balamani apesaki epai ya ngai likambo liye nazalaki na mposa.

4 Mpe esalemaki ete totambolaki o mboka ya Kumola, mpe kuna totelemisaki biema bya biso zingazinga mpembeni ya ngomba ya Kumola; mpe ezalaki mboka yoko ya mai, bibale, mpe maziba mingi; mpe awa tolikiaki kolonga litomba likolo lya Balamani.

5 Mpe elekaki mibu nkama misato na tuku mwambe na minei, tosangisaka o kati etikali enso ya bato ba biso epai ya mboka ya Kumola.

6 Mpe esalemaki ete esangisaka biso o kati bato ba biso banso na moko o mboka Kumola, tala ngai, Molomoni, nabandaki kokoma mobange; mpe koyebaka yango ezalaki etumba ya nsuka ya bato ba ngai, mpe etindamaka na Nkolo ete natika te makundoli maye makitanisamaka na batata ba biso, maye mazalaki ma bule, makweya o kati ya maboko ma Balamani, (mpo Balamani balingaki kobebisa mango) yango wana nasalaki likundoli liye libanda lya palaki ya Nefi, mpe nabombaki o ngomba Kumola makundoli manso maye mapesamaki mokumba na ngai na maboko ma Nkolo, longola se soko ezalaki mwa palaki iye napesaki epai ya mwana mobali wa ngai Moloni.

7 Mpe esalemaki ete bato ba ngai, elongo na basi ba bango mpe bana ba bango, bamonoki sikawa mampinga ma Balamani kotambolaka ona bango; mpe na bobangi bwa nsomo bwa bokufi boye bokotondaka o ntolo ya bato ba nkuna banso, bazelaki mpo ya koyamba bango.

8 Mpe esalemaki ete Balamani bayaki kobunda na biso, mpe moto onso atondaki na nsomo na ntina ya bonene bwa motango mwa bango.

9 Mpe esalemaki ete bakweyaki likolo lya bato ba ngai na mopanga, mpe makula, mpe likonga, mpe soka, mpe ndenge inso ya mandoki ma etumba.

10 Mpe esalemaki ete bato ba ngai bakatamaki o nse, iyo, kutu lisusu nkoto zomi ya ngai oyo bazalaki elongo na ngai, mpe makweyaki na mpota o katikati, mpe balekaki mpembeni ya ngai mpe batiaki nsuka yoko te na bomoi bwa ngai.

11 Mpe etobolaka bango mpe ekataka bango o nse bato ba ngai banso longola se tuku babale na banei ba biso, (o ntei ya bango ezalaki mwana mobali wa ngai Moloni) biso ebikaki biso na liwa lya bato ba biso, tomonoki mokolo mwa nsima, ezongaka Balamani epai ya nganda ya bango, uta o nsonge ya ngomba Kumola, likolo, nkoto zomi ya bato ba ngai bakatamaki o nse, ekambamaki bango o liboso lya ngai.

12 Mpe tomonoki lisusu nkoto zomi ya bato ba ngai baye bakambamaki na mwana mobali wa ngai Moloni.

13 Mpe tala, nkoto zomi ya bato ba Gidigidona bakweyaka, mpe ye lokola o kati.

14 Mpe Lama akweyaka elongo na nkoto zomi ya ye; mpe Giligali akweyaka elongo na nkoto zomi ya ye; mpe Lima akweyaka elongo na nkoto zomi ya ye; mpe Yenumi akweyaka elongo na nkoto zomi ya ye; mpe Kumeniya, mpe Moloniya, mpe Ationumi, mpe Sibilomi, mpe Semi, mpe Yosi, bakweyaka moko na moko elongo nkoto zomi ya bango.

15 Mpe esalemaki ete izalaki zomi isusu baye bakweyaki na mopanga, moko na moko elongo na nkoto zomi ya bango; iyo, kutu bato ba ngai banso, longola se soko ezalaki tuku babale na banei bana baye bazalaki elongo na ngai, mpe lisusu na mwa moke baye baponiokaka o kati ya bikolo bya sudi, mpe mwa moke baye bakimaki epai ya Balamani, bakweyaka; mpe mosuni, mpe mikuwa, mpe makila ma bango malali likolo lya etando ya mabele, esundolamaki bango na maboko ma bango baye babomaki bango mpo ya kopolo likolo lya mboka, mpe kopoto mpe kozonga na mama wa bango mabele.

16 Mpe bozo bwa ngai bopasukaki na nsomo, na ntina ya bobomi bwa bato ba ngai, mpe nagangaki:

17 O bino bato malonga, boniboni bokokaki kolongwa uta o nzela ya Nkolo! O bino bato malonga, boniboni bokokaki kobwaka Yesu ona, oyo atelemeki na maboko mafungwana mpo ya koyamba bino!

18 Tala, soko bosalaka eye te, bolingaki te kokweya. Kasi tala, bokweyi, naleli bobungi bwa bino.

19 O bino bana babali mpe bana basi malonga, bino batata mpe bamama, bino babali mpe basi, bino bato malonga, boniboni ezali ete bokokaki kokweya!

20 Kasi tala, bokei, mpe mawa ma ngai makoki te komeme bozongi bwa bino.

21 Mpe mokolo moyei noki ete kufa ya bino ekolata bozangi bokufi, mpe nzoto iye sikawa izali kopoloko na bopoli isengeli noki kokoma nzoto izangi bopoli; mpe nde bosengeli koteleme liboso lya kiti ya bosambisi ya Klisto, mpo ya kosambisama engebene na misala my bino; mpe soko ezali ete bozali sembo, nde bopambolami elongo na batata ba bino baye bakende yambo ya bino.

22 O ete boyambolaka yambo ya bobebisami boye bonene boyaka likolo lya bino. Kasi tala, bokeyi, mpe Tata, iyo, Tata wa Seko wa lola, ayebi bozali bwa bino; mpe akosala bino engebene na boyengebene mpe ngolu ya ye.