Makomi
2 Nefi 24


Mokapo 24

Yisalaele ekosangisama mpe ekosepela bopemi bwa nkoto-yoko-ya-mibu—Lusifelo abwakamaki libanda lya lola mpo ya botomboki—Yisalaele akolonga Babiloni (mokili)—Mekisani Yisaya 14. Penepene na 559–545 Yambo ya Klisto.

1 Mpo Nkolo akoyoka ngolu likolo ya Yakobo, mpe akopono lisusu Yisalaele, mpe akotia bango o mboka ya bangomei; mpe bampaya bakosangana elongo na bango, mpe bakokangana o ndako ya Yakobo.

2 Mpe bato bakokamata bango mpe bakomeme bango o esika ya bango; iyo, uta o mosika kina o nsuka ya mabele; mpe bakozonga o mboka ya bango ya elako. Mpe ndako ya Yisalaele ekozwa yango, mpe mboka ya Nkolo ekozala mpo ya basali babali mpe basali basi; mpe bakozwa bango bokangemi epai ya baye bango bazalaki bakangemi; mpe bakoyangela likolo lya bakakemi ba bango.

3 Mpe ekosalema o mokolo mona ete Nkolo akopesa yo bopemi, uta o mawa ma yo, mpe uta o bobangi bwa yo, mpe uta o bowumbu bokasi na wapi osengelaki kosala.

4 Mpe ekosalema o mokolo mona, ete okozwa lisese liye likolo lya mokonzi wa Babiloni, mpe okoloba: Boniboni mokakemi asili, mboka ya wolo esili!

5 Nkolo abuki bato ba nkuna, mangenda ma bayangeli.

6 Ye oyo abeteki bato o nkele na lobete la ntango inso, ye oyo ayangelaki bikolo na nkanda, aniokwami, mpe moto te apekisi.

7 Mabele manso mazali o bopemi, mpe mazali o kimia; babukani na koyemba.

8 Iyo, nzete ya losimi esepeli na yo, mpe lisusu nzete ya eleze ya Lebanona, kolobaka: Uta nalalisami o nse mokati ayei na biso te.

9 Limfelo uta o nse ekolongwa mpo ya yo mpo ya kokutana na yo o boyei bwa yo; likolamusa bakufi mpo ya yo, kutu bakambi banso ba mabele; litelemisi uta o ngbende ya bango bakonzi banso ba bikolo.

10 Baye banso bakoloba mpe bakosangela epai ya yo: Ekomi yo o botau lokola biso? Ekomi yo bo biso?

11 Monzele mwa yo mokitisami o lilita; makelele ma lizeze lya yo mayokani te; mosopi mopanzani o nse ya yo, mpe misopi mizipi yo.

12 Boniboni ekwei yo uta o lola, O Lusifelo, mwana mobali wa ntongo! Ekweyisami yo o mabele, yo oyo olembisaki bikolo!

13 Mpo olobaki o motema mwa yo: Nakobuta o lola, nakonetola kiti ya ngai ya bokonzi likolo lya minzoto mya Nzambe; nakofanda lisusu likolo lya ngomba ya liyangani, o bipai ya nordi;

14 Nakobuta likolo lya mapata ma lola; nakozala bo Aleki Likolo.

15 Kasi okokitisama o nse ya Limfelo, kina o ngambo ya libulu.

16 Baye bakomono yo bakotala penepene likolo lya yo, mpe bakomaniola yo, mpe bakoloba: Ezali eye moto alengisaki mabele, oyo aningisaki bokonzi boike?

17 Mpe oyo akomisaki mokili lokola esobe, mpe abebisaki bingumba bya mwango, mpe afungolaki te ndako ya bakangemi ba ye?

18 Bakonzi banso ba bikolo, iyo, banso ba bango balali o nkembo, moko o moko wa bango o ndako ya yemei.

19 Kasi yo obwakami libanda lya lilita lya yo bo etape ya nsomo, mpe montika mwa baye babomami, baye batubolami na mopanga, moye mokiti o mabanga ma libulu; lokola ebembe eye eniatami o nse ya makolo.

20 Okosangisama te elongo na bango o nkunda, zambi obebisi mboka ya yo mpe obomi bato ba yo; nkona ya basali babe ekoyeisama ya sika lisusu te.

21 Lengeleni bobomibomi mpo ya bana ba ye mpo ya mabe ma batata ba bango, ete bateleme te, to bazwa mboka te, to batondisa te etando ya mokili na bingumba.

22 Mpo nakoteleme likolo lya bango, elobi Nkolo wa Bibele, mpe nakokata mosika uta o Babiloni nkombo, mpe montika, mpe mwana mobali, mpe mwana nkasi, elobi Nkolo.

23 Lisusu nakokomisa yango bozwi mpo ya alikilikosi, mpe liziba lya mai; mpe nakokombo yango na kombo ya bobebisami, elobi Nkolo wa Bibele.

24 Nkolo wa Bibele akataki ndai, kolobaka: Solo lokola nakanisaki, boye ekosalema; mpe lokola nakanaki, boye ekozala—

25 Ete nakomeme Asulia o mboka ya ngai, mpe likolo lya ngomba ya ngai nakoniata ye o nse ya lokolo; nde nkanga ya ye ekolongwa na bango, mpe mokumba mwa ye mokolongwa o mapeka ma bango.

26 Eye ezali mokano mokanami likolo lya mabele manso; mpe eye ezali loboko lotandolami likolo lya bikolo binso.

27 Mpo Nkolo wa Bibele akani, mpe nani akolongola? Mpe loboko la ye lotandolami, nani akozongisa yango nsima?

28 O mobu moye mokonzi Ahaza akufaki ezalaki elakeli eye.

29 Sepela te, Filisitia mobimba, zambi lingenda lya ye oyo abeteki bino libukani; mpo uta o mosisa mwa nioka ekobima etupa, mpe mbuma ya yango ekozala nioka ya moto epimbwaka.

30 Mpe mobotami wa yambo wa mokeleli akolia, mpe mozangi akolala o nse na bozangi likama; mpe nakoboma mosisa mwa yo na nzala, mpe akoboma montika mwa yo.

31 Lelalela, O ekuke; belela, O engumba; yo, Filisitia mobimba, osili; mpo ekoya uta o nordi molinga moko, mpe moto akozala ye kaka o ntango elakelama.

32 Nini nde ekoyanola bantoma ba bikolo? Ete Nkolo akelaki Siona, mpe bakeleli ba bato ba ye bakondima na yango.