2010–2019
Kobosana Te
Sanza ya Zomi 2016


Mpo Ete Obosana Te

Nazali kolendisa bino bomikundola, mingimingi na bantango ya kpokoso, ntango boyokaki Molimo mpe litatoli na bino ezalaki makasi; bomikundola banse ya molimo oyo botongi.

Mbote, bandeko babolingo mibali mpe basi. Topambolami mpenza na likita oyo. Mobu na ngai ya yambo lokola moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ezalaki ya komikitisa mpenza. Ezalaki mobu ya komibendabenda, ya kokola, mpe ya nsambo ya bosembo ya ntango nyonso epai ya Tata na Lola. Nayokaki nsambo ya lisungi ya libota, baninga, mpe bandimi ya Eklezia na mokili mobimba. Napesi bino matondi mpo na makanisi mpe nsambo na bino.

Nazwaki lisusu libaku ya kokutana na bandeko ba bolingo, basusu ya mibu ya kala mpe mingi nakutanani na bango kala te.Ezalaki nsima ya kokutana na molingami moninga oyo nayebi mpe nalingi mibu mingi ete nabetamaki na motema mpo na kolengela makebissi na ngai lelo.

Ntango tokutanaki, moninga na ngai ayebisaki ngai na bonkuku ete azalaka kotungisama. Amiyokaki ete azalaki, mpo na kosalela maloba na ye, “kpokoso ya bondimi” mpe alukaki toli na ngai. Nayokaki botondi ete alingaki kokabola mayoki mpe mitungisi na ye elongo na ngai.

Alakisaki mposa makasi ya kozala lisusu na oyo azalaka koyoka kala na molimo mpe oyo sikawa akanisaki azalaki kobungisa. Wana ezalaki ye koloba, nazalaki koyoka na bokebi mpe nazalaki kosambela makasi mpo na koyeba maye Nkolo akolinga ngai naloba.

Moninga na ngai, lokola ntango mosusu basusu kati na bino, atunaki motuna oyo eyembami na Nzembo ya Bana na pete mpe nguya mpenza: “Tata na Lola, ozali solo?”1 Mpo na baye kati na bino oyo bakoki kozala kotuna motuna oyo kaka, nakolinga kokabola na bino toli oyo nakopesa na moninga ngai mpe kolikya ete moko na moko na bino akoka komona bondimi na ye elendisami mpe mokano na ye ezongisami sika mpo na kozala moyekoli amipesa ya Yesu Klisto.

Nabandi kokundolisaka bino ete bozali bana mibali mpe bana basi ya Tata na Lola ya bolingo mpe ete bolingo na Ye eikali ya ntango nyonso. Nayebi ete mayoki ya kokitisa motema ya boye ya bolingo ezali mpasi mpo na komikundola ntango bozali kati na bitumba to mimekano, mawa, to bamposa ekokisama te ya moto ye moko.

Yesu Klisto ayebi oyo etali bitumba mpe mimekano makasi. Apesaki bomoi na Ye mpo na biso. Bangonga na Ye ya nsuka ezalaki ya makambo makasi, likolo ya likambo kani oyo tokoki kutu kososola, kasi libonza na Ye mpo na moko na moko na biso ezalaki liloba ya nsuka ya bolingo na Ye ya mpeto.

Libungi, lisumu, to liponi moko te ekobongola bolingo ya Nzambe mpo na biso. Wana elingi koloba te ete etamboli ya masumu endimami, to elongoli mpenza te lotomo na biso ya koyambola ntango masumu esalami. Kasi kobosana te Tata na Lola ayebi mpe alingi moko na moko na bino, mpe Abelemi ntango nyonso mpo na kosalisa.

Ntango namaiolaki likambo ya moninga na ngai, molimo na ngai ekanisaki na ntina ya bwania monene ezwami na Buku ya Mormon: “Mpe sikawa, bana mibali na ngai, bomikundola, bomikundola ete ezali na likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana wa Nzambe, ete bosengeli kotonga nse na bino, ete ekotinda zabolo mipepe makasi na ye, iyo, makula n aye na mopepe ya kaina, iyo, ekobete mvula nyonso ya mabanga na ye mpe moketi makasi na ye likolo na bino, ekozala na nguya te likolo na bino, mpo na kobenda bino na nse ya libulu ya bobola mpe lisuma ezanga nsuka, na ntina ya libanga likolo na yango botongami botongami, oyo ezali nse moko ya solo, nse moko na wapi bato batongi bakoki te kokweya.”2

Natatoli ete “nse ya libulu ya bobola mpe lisuma ezanga nsuka” ezali esika moto moko alingi kozala. Mpe moninga na ngai azalaki komiyoka ete azalaki na nsuka.

Ntango napesaki toli na bato moko moko ndakisa ya moninga na ngai, namonaki mikano na bango esalami mimbu mileki oyo etindaki bango babosana makambo ya bule, mpo na kolemba, mpe kotia ntembe. Nalendisaki bango, lokola nazali kolendisa bino sikawa, ya komikundola, mingimingi na bantango ya kpokoso, ntango boyokaki Molimo mpe litatoli na bino ezalaki makasi; bomikundola banse ya molimo oyo botongi. Nalaki bino ete soki bosali oyo, koboyaka makambo oyo etongaka mpe elendisaka litatoli na bino te to etiolaka babondimi na bino, bangonga ya motuya wana ntango litatoli na bino efulukaki ekozonga lisusu na moto na bino na nzela ya losambo ya komikitisa mpe bokili. Bobanga te ete bokomiyoka mbala moko lisusu kimia mpe moto ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Moko na moko na biso asengeli yambo komilendisa na molimo mpe nsima kolendisa baye bazali nzinganzinga na biso. Bomaniola makomi ntango nionso, mpe bomikundola makanisi mpe mayoki bozwi ntango bozali kotanga yango. Boluka biloko mosusu ya kozwila bosolo mpe lokola, kasi yeba kolanda likebisi euti na makomi: “Kasi kozala bayekola ezali malamu kaka soki bayokemela epai ya toli ya nzambe.”3 Bokendaka na mayangani ya Eklezia, mingimingi na liyangani ya elambo, mpe bozwa elambo mpe bozongisa sika mayokani, kokotisaka elaka ya komikundola ntango nyonso Mobikisi, ete Molimo na Ye ekoka kozala na bino ntango nyonso.

Likambo te mabungi nini tosali to boniboni tomiyoki tozali mabe, tokoki ntango nyonso kopambola mpe kotombola basussu. Koembolak aloboko epai na bango na lisalisi ya Boklisto ekoki kosalisa biso toyoka bolingo ya Nzambe na mozindo kati na mitema na biso.

Ezala motuya ya kmikundola toli ya nguya ezwami na Dutelonome: “Senzla moloko na yo malamu, ete obosana te makambo mamoni miso na yo, mpe ete malongwa na motema na yo te mikolo nyonso ya bomoi na yo: kasi lakisa bana na yo yango, mpe bana ya bana na yo.”4

Bankola mingi ebebisami na baboponi bazali kosala. Bokala litatoli na bino elongo na libota na bino; bolendisa bango bamikundola lolenge bamiyokaki ntango basosolaki Molimo na bomoi na bango mpe bakoma mayoki wana na bazulunale mpe masolo ya bangomei mpo ete maloba na bangomei ekoka, ntango esengelami, kokanisela bango boniboni malamu Nkolo azali epai na bango.

Bokomikundola ete Nefi mpe bandeko na ye ya mibali bazongaki na Yelusaleme mpo na kozwa bapalaki ya motako oyo ezalaki na lisolo ekomama ya bato na bango, ndambo, mpo ete babosana kala na bango te.

Lisusu, na Buku ya Mormon, Elamani abengaki bana na ye ya mibali kolandisa “batata ya yambo” na bango mpo bakoka kobosana bolamu ya Nkolo te:

“Tala, bana na ngai, nazali na mposa ete bomikundola kobatela mitindo ya Nzambe. … Tala, napesi epai na bino nkombo ya baboti na biso ya yambo baye bayaki libanda ya mboka ya Yelusaleme; mpe oyo esali ngai ete emikundoli bino nkombo na bino bokoka komikundola bango; mpe emikundoli bino bango, mpe emikundoli bino bango bomikundoli misala na bango; mpe emikungoli bino misala na babgo bokoka komikundola boniboni ete elobami, mpe lisusu ekomami, ete ezalaki malamu.

“Yango wana, bana mibali na ngai, nalingi ete bosala oyo ezali malamu, mpo ete elobama etali bino, mpe lisusu ekomama, kutu lokola elobamaki mpe ekomamaki etali bango.”5

Mingi lelo bazali na bonkoko yango kaka ya kopesaka nkombo ya bana na bango kolandisa bilombe ya makomi to bankoko ya botongono lokola lolenge ya kolendisaka bango babosana te lisango na bango.

Ntango nabotamaki, Napesamaki nkomboya Ronald A. Rasband. Nkombo ya libota ezali kotosa nsinga ya bonkoko ya tata na ngai. Oyo ya mokuse ya kati A epesamelaki ngai mpo na kokundololisa ngai kotosa nkoko ya mama na ngai Anderson awuta Danmark.

Nkoko ya tata ya mama Jens Anderson awutaki Danmark. Mpe na 1861 Nkolo akambaki bamisionele mibale ya Mormon na ndako ya baJens mpe Ane Cathrine Anderson, bisika wapi bamisionele balobelaki bango mpe mwana mobali na bango ya mibu 16, Andrew, nsango malamu ezongisama na mbala ya liboso. Oyo ezalaki lolenge lisango ya bondimi ebandaki na yango libota na ngai mpe ngai tozwili litomba. BaAndersons batangaki Buku ya Mormon mpe babatisamaki ntango moke nsima. Mobu elandaki, libota ya baAnderson basalaki keba na libiangi ya profeta ya kokatisa mai ya mongwa Atlantiki mpo na kosangana na basantu ya Amelika ya Nodi.

Na mawa, Jens akufaki na mobembo na mai ya mongwa, kasi mwasi mpe mwana mobali na ye bakobaki tii na Salt Lake Valley, kokomaka na sanza ya libwa  3, 1862. Atako mitungisi na bango mpe moto mpasi na bango, bondimi na bango mokolo moko te etepaki, mpe te bondimi ya mingi ya bakitani na bango.

Elilingi
Liyemi kati na bilo ya Mpaka Rasband

Na bilo na ngai ezali na liyemi moko kodiembela 6 oyo ezali kobenda na kitoko mpenza likundolisi ya elembo ya bokutani wana ya yambo kati ya bankoko na ye mpe baye bamisionele ya komipesa ya liboso. Nazali na mokano ya kobosana te lisango na ngai, mpe mpo na nkombo na ngai na komikundoli lisango na bango ya bondimi mpe libonza libela.

Mokolo moko te bobosana, botia ntembe, to boboya baboyebi ya molimo ya moto ye moko, ya bule. Mwango ya monguna sezali kopengwisa biso uta na banzeneneke ya molimo, kasi mposa ya Nkolo ezali ya kongengisa mpe kokotisa biso na mosala na Ye.

Tika nakabola ndakisa na ngai moko ya bosolo oyo. Namikundoli polele ngonga moko ntango nazwaki bolendisi na eyano ya losambo ya nguya. Eyano ezalaki polele mpe ya nguya. Nzokande, nakokaki te kosalela bolendisi yango nokinoki, mpe nsima ya mwa ngona nabandaki komituna soki maye nayokaki ezalaka solo. Basusu kati na bino bakoki kokweya mpo na mawa wana ya monguna mpe lokola.

Mikolo mingi nsima, nalamukaki na milongo ya nguya oyo ya makomi kati na makanisi na ngai:

“Solo, solo, nalobi na bino, soki bozali na mposa ya litatoli ya kobakisa, bwaka molimo nay o na butu oyo olelaki epai na ngai na motema na yo …

“Elobaki ngai te kimia na molimo na yo mpo na likambo yango? Nzeneneke nini monene okoki kozwa koleka ya Nzambe?”6

Ezalaki lokola Nkolo azalaki koloba, “Sikawa, Ronald, esi nayebisaki yo maye osengelaki kosala. Sikawa sala yango!” Nazalaki na botondi mpenza mpo na epameli mpe boyangeli ya bolingo wana! Nabondisamaki nokinoki na bolendisi mpe nazalaki na makoki ya kokende liboso, koyebaka na motema na ngai ete losambo na ngai eyanolamaki.

Nakaboli likambo oyo, bandeko mibali mpe basi ba bolingo, mpo na kolakisa boniboni nokinoki makanisi na biso ekoki kobosana mpe boniboni makambo ya molimo ekambaka biso. Nayekoli kolinga bangonga ya boye , “ete nabosana te.”

Epai yamoninga na ngai, mpe epai banso oyo balingi kolendisa bondimi na bango, napesi bino elaka oyo; Ntango bozali na botongono kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto mpe koyekama na mateya na yango, litatoli na bino ekobatelama mpe ekokola. Bobatela mayokani bosalaki, kotala te misala ya baye bazali nzinganzinga na bino. Bozala baboti, bandeko mibali mpe basi, bankoko, batatamwasi, banoko, mpe baninga ya etigya (malamu) oyo bazali kolendisa balingami na bango na litatoli ya bango moko mpe oyo bazli kokabolaa makambo ya molimo. Botikala botongono mpe sikisiki, kutu soki baekumbaki ya ntembe etondi na bomoi na bino na nzela ya misala ya basusu. Boluka oyo nini ekotonga mpe kolendisa bino na molimo. Boboya bakabo ya mabe babengi na lokuta “babosolo” oyo ebebisaka mpenza, mpe bomikundola kokoma mayoki na bino ya “bolingo, esengo, kimia, motema pete, boboto, malamu, bondimi, bosokemi, [mpe] komikanga motema.”7

Na kati ya baekumbaki makasi ya bomoi, bobosana te lisango na bino ya Nzambe lokola bana mibali to bana basi ya nzambe to nsuka na bino ya seko mpo mokolo moko bozonga kofanda elongo na Ye, oyo ekoleka eloko nyoso mokoli asengeli kopesa. Bomikundola maloba ya boboto mpe ya sukali ya Alma: “Tala, nalobi epai na bino, bandeko na ngai, soki boyokaki mbongwana moko na motema, mpe soki boyoki koyemba nzembo ya bolingo ya kosikola, nalingi kotuna, ekoki bino koyoka boye sikawa?”8

Na banso oyo bayoki mposa ya kolendisa bondimi na bango, nabondeli bino,bobosana te! Nasengi bobosana te.

Natatoli ete Joseph Smith azalaki profeta ya Nzambe. Nayebi ete amonaki mpe asololaki na Nzambe Tata mpe mwana na Ye, Yesu Klisto, kaka lokola akomaki na maloba na yemei. Nazali na botondi mpenza ete ye abosanaki te kokoma na ntina ya likambo wana, ete tokoka banso koyeba litatoli na ye.

Napesi litatoli na ngai ya lokumu na ntina ya Yesu Klisto, Azali na bomoi; nayebi Azali na bomoi mpe atelemi na moto ya Eklezia oyo. Makambo oyo nayebi na ngaimei, na bonsomi ya mongongo to litatoli mosusu kani, mpe nasambeli ete bino mpe ngai to kobosana mokolo moko te babosolo ya seko ya bule—ya motuya mingi ete tozaali bana mibali mpe bana basi ya Baboti na Lola ya bomoi mpe ya bolingo, oyo bazali na mposa bobele ya esengo na biso ya seko. Na ntina ya babosolo oyo natatoli na nkombo ya Yesu Klisto, amene.