2010–2019
Boyamboli: Liponami ya Esengo
Sanza ya Zomi 2016


Boyamboli: Liponami ya Esengo

Boyamboli ezali bobele pete te kasi lisusu esengo mpo na Mobikisi na biso.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, ntango nazalaki na mibu 12, libota na ngai efandaki na Göteborg, mwa etuka ya mpembeni ya mai na sudi ya Swede. Mpo na koloba, ezali engumba ya kobotama ya moninga na ngai ya mosala wa bolingo Mpaka Per G. Malm,1 oyo akufaki na eleko ya moi oyo. Tozali koszanga ye. Tozali na botondi mpo na lokumu na ye mpe mosala na ye ya lokumu mpe mpo na ndakisa ya libota na ye ya bolingo ya solo. Mpe tosambeli solo mapamboli ya bomengo ya Nzambe ezala ya bango.

Mibu ntuku mitano eleki, biso tozalaki kokende Eklezia na ndako moko monene ezongisamaki sika. Lomingo moko, moninga na ngai Steffan,1 kaka diakona mosusu na etape, apesaki ngai mbote na eklezia na lolenge moko ya lokumu. Tokendaki na ndakonzambe ya mpembeni ya etuka monene, mpe abimisaki petare mpe alimeti na libenga na ye. Na ezaleli ya bompikiliki ya bolenge, nazwaki petare mpe mwa baalimeti napelisaki fize molai ya langi ya putulu. Nabandaki koboma fize yambo ebeta. Kasi ntango nazikisaki misapi ngai na komekaka kosala bongo, nabwakaki petare. Steffan mpe ngai tozangi eloko ya kosala ntango fize ekobaki kopela.

Petare ebetaki, mpe milinga etondaki nzinga nzinga tozalaki mpe na ndakonzambe. Tosalaki mbangu mpo na kosangisa bintika oyo epanzanaki ya petare mpe tofungolaki bafenetele mpo na kozwa mopepe ya libanda, na bozoba tobanzaki ete moto ata moko te akoyeba. Libaku malamu, moto moko azokaki te mpe eloko moko ebebaki te.

Ntango bandimi bayaki na liyangani, bayokaki mpenza solo makasi. Ezalaki mpasi mpo na kobomba sekele. Solo etungisaki molimo ya liyangani. Mpo ezalaki na basimbi ya Bonganganzambe ya Alona moke — mpe na oyo bakokaki kaka kolimbola lokola kokabolana ya likanisi— Nalekisaki elambo, soki moke te namiyokaki ya kolongobana mpo na kokabola yango. Ntango sani ya elambo epesamelaki ngai, naboyaki kozua ezala lipa to mayi. Namiyokaki mabe. Namitungisamaki, mpe nayebaki ete oyo nasalaki esepelisaki Nzambe te

Nsima ya Eklezia, mokambi ya etape, Frank Lindberg, mto malamu mobange na nsuki ya langi ya-putulu, abengaki ngai na bilo na ye. Nsima na fandaki, atalaki ngai na sembo mpe alobaki amonaki naliaki elambo te. Atunaki mpo na nini. Nakanisaki ete ayebaki mpo na nini. Nandimisamaki moto nyonso ayebaki likambo nasalaki. Nsima nayebisaki ye, atunaki boniboni nazali koyoka. Elongo na mpinzoli, nayebisaki na mpasi nasalaki mabe mpe nabosanaki Nzambe.

Mokambi Lindbergh afungulaki buku monene ya Doctrine et Alliances mpe atindaki ngai natanga biteni moko batia mokoloto. Natangaki na mongongo makasi :

Tala, oyo ayamboli masumu na ye, yango elimbisami, mpe ngai, Nkolo, nakokanisa yango lisusu ata moke te.

“Na oyo okoki koyeba soki mutu ayamboli masumu na ye tala, akotubela yango mpe akotika yango”3

Nakobosana koseka ya mawa ya Mokambi Lindberg te na nsima ntango nasilisaki kotanga natalaki likolo. Na liyoki moko, ayebisaki ngai ete ayokaki esengelaki kozala malamu mpo na ngai kozongela kolia elambo. Ntango nabimaki na bilo na ye, nayokaki esengo moko naino nayoka te.

Esengo ya boye ezali moko ya motuya mpo na biyano ya boyamboli. Liloba koyambola elimboli “kososola nsima” mpe epesaka “mbongwana.”4 Na lokota ya Swede, liloba ezali omvänd, oyo elakisi na pete “kobaluka esika moko.”5 mokomi ya Moklistu C. S. Lewis akomaki na ntina ya mposa mpe lolenge ya mbonguana. Alobaki ete boyamboli esengaka “kozongela ezaleli malamu. Mwa motango ya mabe ekoki kosalema malamu,” alobaki, “kasi bobele na bozongi nsima kino omona mbeba mpe kobandela yango lisusu, kokoba.6 kobandela yango atako lisusu te.” Kobongola ezalela na biso mpe kozongela “ezaleli malamu” ezali eteni ya boyamboli, kasi bobele eteni. Boyamboli ya solo lisusu ezali kozongisa mitema na biso mpe bolingi na biso na Nzambe mpe koboya masumu.7 Lokola elimbolami na Ezekiel, koyambola ezali “koboya … masumu, … kosala oyo ezali malamu mpe elongobani; … kozongisa elaka, … kotambola kati ya bomoi elongabana, na bozangi liyokani na lisumu.”8

Bongo atako yango ezali liponi ekoka te. Elakisaka mpenza malamu te nguya ya oyo esalaka boyamboli ezala pete, libonza ya bomikabi ya Mobikisi. Boyamboli ya solo esengeli kolandisama na bondimi epai ya Nkolo Yesu Klisto, bondimi ete Akoki kobongola biso, bondimi ete Akoki kolimbisa biso, mpe bondimi ete Akosunga biso toboya bambeba ebele. Lolenge ya bondimi ya boye esalaka Bomikabi na Ye ezala ya kokoka kati ya babomoi na biso. Ntango “tososolaka nsima” mpe “komitala” elongo na lisungi ya Mobikisi, tokoki koyoka elikya na elaka na Ye mpe esengo ya bolimbisi. Na bozangi Mosikoli, mokangano ya elikya mpe esengo mpe boyamboli ekomi ezalela ya mbongwana ya mpasi. Kasi kosalelaka bondimi epai na Ye, tokomaka babongwami na likoki mpe bolingi na Ye mpo na bolimbisi ya masumu.

Mokambi Boyd K. Packer alobelaki bilaka ya elikya ya boyamboli na likita linene eleki ya sanza ya Minei. Atalisaki nguya ya Bomikabi ya Mobikisi mpo na kokangola na oyo namonaka bosangisi ya bwania ezwami na mibu ntuku mitano ya mosala ya bopostolo. Mokambi Packer alobaki: “Bomikabi etikaka makama te, bilembo te. Oyo elobama elobama. … ezali bobela bokangoli, mpe oyo ekongolama elobami ekangolama.”9

Akobaki:

“Bomikabi, oyo moko na moko kati na biso akoki kosenga makasi, etikaka bilembo ya mpota te. Yango elakisi ete totala te oyo biso tosalaki to esika nini biso tozalaki to boniboni eloko moko esalemaki, soki toyamboli ya solo, [Mobikisi] alaki ete Akobongisa. Mpe ntango Abongisaki, alengelaki nzela mpo na kolonga masumu. …

“… Bomikabi … ekoki kosokola bosoto nyonso kotala te mpasi to bowumeli to mbala boni obandeli.”10

Bokokisi ya Bomikabi ya Mobikisi ezangi nsuka na molai mpe monene, mpo na yo na ngai. Kasi ekotindika biso na makasi te. Lokola Profeta Lehi alimbolaki, nsima biso “toteyami ya kokoka” “koyeba bolamu uta na mabe,”11 to “zali na nguya ya kopona bonsomi mpe bomoi ya seko, na nzela ya Molobeli na biso monene ya bato nyonso, to kopona bokangami mpe nkufa.”12 Na maloba mosusu, boyamboli ezali liponi.

Tokoki—mpe ntango mosusu kosala—bokeseni ya maponami. Maponami oyo ekoki te kozala na mokangano ya mabe, kasi ebatelaka biso tokoma mpenza bayamboli ya solo solo mpe bongo elongolaka boluki na biso ya boyamboli ya solosolo. Na ndakisa, tokoki kopona kotuka basusu. Ntango ya mibu 12 na Göteborg, nakokaki kotuka Steffan. Mpo ye nde amemaki petare monene mpe baalimeti na eklezia mbala ya yambo. Kasi kosilikilaka basusu, kutu soki bayebi likambo te, epesaka biso ndingisa ya kobomba mabe na biso. Na kosalaka bongo, tobongolaka mokumba mpo na misala na biso epai ya basusu. Ntango mokumba ebongwami, tokitisaka mposa mpe likoki na biso ya kosala. Tokomaka biso moko bato ya makama mabe na esika tozala bato na nguya ya bikela ya bosomi.12

Liponi mosusu oyo epekisaka boyamboli ezali komona mpamba bambeba na biso. Na likama ya petare na Göteborg, moto moko te azwaki likama, likambo mabe esalemaki te, mpe liyangani esalemaki malamu. Ezalaki pete koloba ete ntina ezalaki te mpo na koyambola. Kasi komona mpamba bambeba na biso, atako makama ya mbala moko te emonisami, elongoli mposa ya kobongwama. Likanisi oyo ebatelaka biso uta na boluki oyo bambeba na biso mpe masumu ezali na makama ya libela.

Nsima na lolenge mosusu ezali ntina koyeba ete masumu na biso ezali na ntina te mpo ete Nzambe alingaka biso kotala te oyo biso tosalaka. Ezali motuya kokanisa oyo mokosi ya Nehor ateyaki bato ya Zarahemla: “Mpe lisusu atatolaki epai yabato ete moto akobikisama na mokolo mwa nsuka, mpe ete basengeli kobanga te to kolenga te, kasi ete bakokaki kotombola mito na bango mpe kosepela; mpo Nkolo asalaki bato banso, mpe lisusu asikolaka bato banso; mpe, na nsuka, bato banso bakozwa bomoi bwa seko.”14 Kasi likanisi oyo ya bopengwisi ezali mabe. Nzambe alingaka biso mpenza. Na yango, maye tosalaka ezali ntina epai na Ye mpe epai na biso. Alakisi banzela malamu na ntina ya boniboni tosengeli kozala. Tobengaka mitindo oyo. Bondimi na Ye mpe bozali na biso ya seko na bizaleli na biso, mpe lisusu bolingi na biso na koluka na sembo boyamboli ya solo.15

Na kobakisa, tosalaki boyamboli ya solo kala ntango toponaka kokabola Nzambe uta na mitindo na Ye. Na nsima ya nyonso, soki na elambo tobulisami te, ekozala ntina te ete solo ya petare ezalaki kopanzana na liyangani wana ya elambo na Göteborg. Tosengeli kokeba na kokobaka na ezaleli ya masumu na koboya kotosa to komona mpamba bokonzi ya Nzambe ya mitindo na Ye. Boyamboli solo ya solo esengaka koyeba bonzambe ya Mobikisi mpe bosolo ya mosala na Ye ya mokolo ya nsuka.

Na ntina ya kosenga bolimbisi, tika ete topona boyamboli. Na nzela ya boyamboli, tokoki komizongisa biso moko, lokola mwana mobali oyo alobelamaki na lisese, 16 mpe kobanza ntina ya boseko ya bizaleli na biso. Ntango tososolaka boniboni masumu na biso ekoki kozwa nguya ya esengo na biso ya seko, tokomaka kaka bayamboli ya solo te kasi lisusu tolukaka kokoma malamu mingi koleka. Ntango tokutanaka na lisenginya, tokomituna ntango nyonso, na maloba ya William Shakespeare:

Elonga nini nazali na yango, soki nalongi eloko oyo nazali koluka?

Ndoto, mpema, fulufulu ya ntango moke.

Oyo asombaka mwa miniti ya esengo na etumbu ya poso,

To koteka boseko mpo na biloko ya mpamba mpamba ya mokili?17

Soki tobungisi miso ya boseko mpo na biloko ya mpamba mpamba ya mokili, tokoki kopona koyambola. Mpo na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, tozali na libaku malamu mosusu. Na lolenge ya elembo, tokoki kobongola esanelo tosombaki na toli ya mabe mpenza na esika ya yambo mpe kozwa lisusu elikia ya seko. Lokola Mobikisi alimbolaki, “Mpo, botala, Nkolo, Mosikoli na bino anyokwamaki na liwa na nzoto; na yango, ayokaki mpasi ya bato nyonso, mpo ete bato nyonso bakoka koyambola mpe baya epai na ye.”18

Yesu Klisto akoki kolimbisa mpo afutaki motuya ya masumu na biso.19

Mosikilo na biso aponaka kolimbisa mpo na ntina ya mawa, ngolu, mpe bolingo na Ye ezanga bokokanisi.

Mobikisi na biso alingaka kolimbisa. Mpo yango ezali moko ya bizaleli na Ye ya bonzambe.

Mpe, lokola Azali Mobateli Mpate Malamu. Azalaka na esengo ntango toponaka koyambola.20

Atako ntango toyokaka mawa ya bonzambe mpo na bizaleli na biso,21 ntango toponaka koyambola, tobengisa mbala moko Mobikisi na babomoi na biso. Lokola Amulek ateyaki, “Iyo, nalingi ete boya mpe boyeisa mitema na bino makasi lisusu te; mpo tala, sikawa ezali ntango mpe mokolo mwa lobiko na bino; mpe yango wana, soko bokoyambola mpe bokoyeisa mitema na bino makasi te, sasaipi mwango monene mwa bosikoli moko mememe mpembeni ya bino. 22 Tokoki koyoka mawa ya bonzambe mpo na bizaleli na biso mpe na mbala moko tokoki koyoka esengo ya kozwa lisungi ya Mobikisi.

Ntina ya boyamboli na biso ezali bansango malamu ya nsango malamu!23 Botuki ekoki “kokende mosika.”24 Tokoki kotondisama na esengo, kozwa bolimbisi ya masumu na biso, mpe kozwa “kimia na makanisi.” 25 Tokoki kokoma na bonsomi uta na mayoki ya bozangi elikya mpe mokumba ya lisumu. Tokoki kotondisama na pole ya bongengi ya Nzambe mpe “mpasi ekozala lisusu atako moke te.”26 Boyamboli ezali bobele pete te kasi lisusu esengo mpo na Mobikisi na biso. Namikundoli lisusu mayoki oyo namonaki likolo na ngai na bilo ya mokambi ya etape nsima ya lisano ya petare. Nayebaki nalimbisamaki. Mayoki na ngai ya botuki elimwaki, mawa ngai esilaki, mpe motema na ngai ekomaki pepele.

Bandeko mibali mpe basi, lokola tozali kosilisa likita oyo, nabengisi bino bosepela na bomoi na bino: esengo na boyebi ete Bomikabi ya Yesu Klisto ezali solo; esengo na makoki ya Mobikisi, bolingi, mpe mposa ya kolimbisa, mpe esengo na koponaka boyamboli. Tika ete banso tolanda liteya “na esengo … kobimisa mai na maziba ya lobiko.”27 Tokoka kopona koyambola, kosundola masumu na biso, mpe kobalusa mitema na biso mpe babolingi na biso mpo na kolanda Mobikisi na biso. Natatoli na ntina ya bosolo ya bozali na Ye na bomoi. Nazali nzeneneke mpe moyambi ya mbala na mbala ya mawa, ngolu, mpe bolingo na Ye ezanga bokokanisi. Nasambeli ete mapamboli ya bosikoli ya Bomikabi na Ye ekoka kozala ya bino sikoyo—mpe lisusu mpe lisusu mpe lisusu na bomoi na bino mobimba,28 lokola ezali kati na ngai. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Mpaka Per Gösta Malm (1948–2016) asalaki likola Ntuku Nsambo Ya Mokambi Monene uta 2010 kino liwa na ye. Atako abotama na Jönköping, Swede, ye na mwasi na ye, Agneta, bafandaki na Göteborg, Swede. Na lisukulu kitoko na ye ya likita ya sanza ya zomi 2010, Mpaka Malm lisusu alobelaki likanisi moko ya Göteborg (tala “Rest unto Your Souls,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2010, 101–2).

  2. Atako Steffan ezali nkombo ya solo ya moninga na ngai te, lisolo ebetami na ndingisa na ye.

  3. Doctrine et Alliances 58:42–43.

  4. Liloba ya Greque metanoeo elimboli na bopete “‘kososola Nsima’ (meta, ‘nsima,’ epesaka ‘mbongwama,’ noeo, ‘to kososola’; nous, ‘ “makanisi, efandelo ya bososoli ya bomoto”). reflection’)” (tala James Strong, The New Strong’s Expanded Exhaustive Concordance of the Bible: [2010], Greque dictionary section, 162).

  5. Bobongoli na ngai ya {omvänd. Om ekoki kobongolama lokola “nzinganzinga.” Vänd ekoki kobolongolama lokola “kobaluka.”

  6. C. S. Lewis, The Great Divorce (1946), 6. Na ebandeli ya buku, Lewis akomaki ete bayike bamekaka kosangisa lola na lifelo na ntina ya kopona moko to mosusu. Alobi ete bayike kati na biso bakanisaka “kokola to kobongisa to kobonga malamu ekobalusa ntango mosusu mabe na malamu. … Likanisi oyo nazwi mpo ezala likama ya mbeba monene. … Tofandi te na mokili oyo banzela nyonso ezali malamu na nyonso mpe esika nyonso, soki tolandaki mobimba, ekoyema na bomatisi pene mpe bokutani ya nsuka na kati kati . …

    “Nabanzi te ete baoyo nyonso baponaka banzela ya mabe bapengwaka; kasi makama na bango ezalaka ete bango bazongaka nsima na nzela ya malamu. … Mabe ekoki kobeba, kasi ekoki te ‘kokolisa’ kati ya malamu. Ntango ekangolaka yango te. Solo esengelaki kopanzana, malembe malembe, … to kopanzana te” (5–6).

  7. Tala Dictionnaire ya Biblia, “Boyamboli.”

  8. Ezekiele 33:14–15.

  9. Litatoli ya Mokambi Boyd K. Packer kati ya bokambi ya liyangani elongo na likita linene ya Sanza ya Minei 2015 ebimisama mobimba te. Makebisi oyo ezwami na makomi na ngai moko, ezwamaki na ntango.

  10. Boyd K. Packer, “The Plan of Happiness,” Liahona,Sanza ya Mitano 2015.10.

  11. 2 Nefi 2:5.

  12. 2 Nefi 2:27

  13. Tala 2 Nefi 2:26.

  14. Alma 1:4. Nehor mpe balandi na ye bandimelaki boyamboli te (tala Alma 15:15).

  15. Tala Russell M. Nelson, “Divine Love,” Liahona, Sanza ya Mibale. 2003, 12–17.

  16. Tala Luka 15:17; tala lisusu milongo 11–24.

  17. William Shakespeare, The Rape of Lucrece, milongo 211–14.

  18. Doctrine et Alliances 18:11.18.

  19. TalaYisaya 53:5.

  20. TalaLuka 15:4–7; ;Doctrine et Alliances 18:10–13.

  21. Boyamboli ya solo epesaka “mawa ya bonzambe” (2 Bakolinti 7:10). Mpaka M. Russell Ballard ateyaki: “Mpo na baoyo bakeyi mosika, Mobikisi apesaki nzela ya kozongela. Kasi yango ezangaka mpasi te. Boyamboli ezalaka pete te; ezwaka ntango—bantango ya mpasi !” (“Kobatelaka Mayokani,” Ensign, Sanza ya Mitano 1993, 7). Mpaka Richard G. Scott mpe lisusu ateyaki, “Bantango mosusu biteni ya boyamboli ezalaka mpasi na ebandeli” (“Kozwaka Bolimbisi,” Ensign, Sanza ya Mitano 1995, 77) Ntango mawa ya bonzambe mpe mpasi ezwami kati mosala ya boyamboli, mbano elandaka ezalaka esengo na ntango bolimbisi ya masumu epesameli.

  22. Alma 34:31; sete ebakisami.

  23. Tala Dictionnaire ya Biblia, “Bansango malamu.”

  24. Enosa 1:6.

  25. Moziya 4:3.

  26. Moziya 27:29.

  27. Yisaya 12:3.

  28. Tala Moziya 26:29–30. Ntango Nzambe alaki kolimbisa na mpamba, kosumukaka na bilingi mpe koyekamaka na ngolu ya Mobikisi apesa boyamboli ya pete ezali mbindo epai ya Nzambe (tala Baebele 6:4–6; 10:26–27). Mpaka Richard G. Scott alobaki: “Nsango ya esengo mpo na moto nyonso oyo azali na mposa ya kolongolama bitumbu ya maponi na ye ya mabe ya kala ezali ete Nkolo amonaka babotau na bokeseni koleka Ye asalaka botomboki. Kasi Nkolo akebisi ete botomboki eyambolami te ekomema etumbu, ntango Nkolo alobeli babotau, ezali ntango nyonso na mawa” (“Personal Strength through the Atonement of Jesus Christ,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2013, 83).