2011
Ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi
sánzá ya mínei 2011


Etinda ya Bamama Bateyi Bateli, sanza ya Minei 2011

Ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi

Yekola liteya oyo, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko bayo ya basi mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yo.

Elilingi

Bondimi • Libota • Lisungi

Ntango bokambi na biso ebiangamaki yambo, topesamaki boko makambo na ntina ya mambi ma kala ma Lingomba ya Bamama Basungi. Toyekolaki yango na losambo, kolukaka koyeba ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe nini Nkolo azalaki kolinga biso tosala. Toyekolaki ete ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi lokola etiamaki na Nkolo ezali kobongisa, koteya, mpe kofula bana ba Ye ya basi, kolengela bango mpo na mapamboli ma bomoi bwa seko.

Mpo na kokokisa mwango moye mwa Lingomba ya Bamama Basungi, Nkolo atindaki ndeko mwasi moko na moko mpe lingomba na bango lokola mobimba:

  1. Kobakisa bondimi mpe bosembo bwa moto na moto.

  2. Kolendisa mabota mpe bandako.

  3. Kopesa lisungi na kosalisaka Nkolo mpe bana ba Ye.

Tokoki kosala mosala moye na nzela ya Nkolo bobele soki toluki, tozwi, mpe tosali likolo ya bobimisi ya biso moko. Soki bobimisi ya biso moko ezali te, tokoki kolonga te. Soki totii bokebi na bobimisi na biso moko, tokoki kokweya te. Profeta Nephi alakisaki biso ete Molimo Mosantu akolakisa biso “makambo manso tosengeli kosala” (2 Nefi 32:5). Tosengeli biso moko kopesa nzela ete tozala nie mpenza mpe na kimia na lolenge ekoki mpo na koyoka mongongo mwa Molimo.

Bandeko basi, tozali na mosala monene mpenza ya kosala na kosalisaka kotonga bokonzi bwa Nzambe mpe na komilengelaka mpo na boyei bwa Nkolo. Solo mpenza, mosala mwa Nkolo mokoki kokokisama te na kozangaka lisalisi ya bana ba Ye ya basi. Mpo na yango, Nkolo azali kozela tobakisa likabo na biso. Azali kozela ete tokokisa ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi lokola naino esalema liboso te.

Julie B. Beck, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.

Uta na makomi

Dutelonome 6:5–7; Luka 10:30–37; Yakobo 1:27; 2 Nefi 25:26; Moziya 3:12–13

Uta na Mambi ma kala ma Biso

Na likita moko ya Lingomba ya Bamama Basungi o mokolo mwa libwa, Sanza ya Motoba ya mobu 1842, Profeta Joseph Smith ateyaki bandeko basi ete lingomba na bango “esengelaki bobele te kosunga babola, kasi kobikisa milimo mya bango.”1 Lisakoli liye ya ntina na molimo mpe na ntango ezali komonisama na Lingomba ya Bamama Basungi na nzela mobimba ya etamboli na yango. Na mobu 1906 Mokambi Joseph F. Smith (1838–1918) ateyaki ete: “[Lingomba ya Bamama Basungi] esengeli kosala bobele te mpo na bozangi ya babola, bakoni mpe bakeleli, kasi eteni ya mosala na yango—mpe eteni eleki monene, lisusu—ezali kotalela bolamu bwa molimo mpe lobiko ya bamama mpe bana basi ba Siona; kotala ete moko te abosanami, kasi ete banso babatelami na makama, bolozi, nguya ya molili, mpe mabe maye mazali kobundisa bango na mokili oyo.”2 Na mobu 2001 Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na babale azongelaki koloba, “Ndeko ya mwasi nyonso kati na Eklezia eye oyo asali mayokani na Nkolo azali na mosala ya bonzambe ya kosalisa na kobikisaka milimo, kokamba basi ba mokili, kolendisa bandako ya Siona, mpe kotonga bokonzi bwa Nzambe.”3

Matangi

  1. Joseph Smith, Mambi ma Kala ma Eklezia, 5:25.

  2. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (1998), 185.

  3. M. Russell Ballard, “Women of Righteousness,” Liahona, Sanza ya Zomi na mibale 2002, 39.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Bofuli nini uta na Molimo ezwaki ngai mpo na kosunga bandeko ba ngai ya basi kobakisa bondimi mpe bosembo ya moto na moto mpe kolendisa mabota mpe bandako na bango? Lisungi nini ekoki ngai kopesa?

  2. Lolenge nini ekoki ngai kosalela etinda oyo mpo na kolendisa bondimi bwa ngai mpe kobakisa bomipesi bwa ngai moko na bosembo na ngai moko?