2011
Mateya mpo na Ntango na Biso
sánzá ya mítáno 2011


Mateya mpo na Ntango na Biso

Mateya ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi na mokolo ya eyenga ya minei ekozala mpo na “Mateya mpo na Ntango na Biso.” Liteya moko moko ekoki kolengelama uta na lisukulu moko to masukulu ebele mapesama na likita linene ya sika koleka manso. Bakambi ya etuka mpe ya disitiliki basengeli kopona masikulu kani ekoki kosalema, to basengeli kopesa mokumba moye na baepisikopo mpe bakambi ya bitape. Bakambi basengeli kobeta sete na oyo etali motuya ya bandeko babali ya Bonganganzambe ya Melekisedeke mpe bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi koyekolaka masukulu se moko oyo na mikolo ya eyenga se moko oyo.

Baye bakokende na mateya ya eyenga ya minei balendisami koyekola mpe komema Zulunale ya likita linene oyo ebimi sika koleka nyonso.

Makanisi mpo na Kolengela Liteya uta na Masukulu.

Sambela mpo ete Molimo Mosantu azala na yo wana ezali yo koyekola mpe koteya li(ma)sukulu yango. Okoki kosenginiama kolengela liteya na kosalelaka buku mosusu, kasi masukulu ya likita linene ezali manaka oyo mandimama. Mosala mwa yo ezali kosalisa basusu koyekola mpe kosalela nsango malamu lokola eteyami na likita linene ya Eklezia.

Tanga lisusu malamu li(ma)sukulu, kolukaka mabongisi ma mibeko mpe malongi oyo ekokani na bamposa ya bato ya kelasi. Luka lisusu masapo, makomi ya kotanga, mpe maloba uta na li(ma)sukulu maye makosalisa yo koteya bosolo boye.

Sala mwango moko ya boniboni okoteya mabongisi/mibeko mpe malongi yango. Mwango mwa yo esengeli kozala na mituna miye mikosalisa bato ya kelasi:

  • Luka mabongisi/mibeko mpe malongi kati na li(ma)sukulu.

  • Kanisa na ntina ya ndimbola na yango.

  • Kabola bososoli, makanisi, boyebi ya mokili, mpe matatoli.

  • Salela mibeko mpe malongi maye na bomoi bwa bango.

Basanza

Makambo ya koteya na Liteya ya Mokolo ya Eyenga ya Minei

Sanza ya mitano 2011–Sanza ya zomi 2011

Masukulu mabimisami na LiahonaSanza ya mitano 2011*

Sanza ya zomi na moko 2010–Sanza ya minei 2011

Masukulu mabimisami na Liahona ya Sanza ya zomi na moko 2010*