2012
Koteya mpe Kotala, Mosala Moko ya Bule
Sanza ya Motoba 2012


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya Sambo 2012

Koteya mpe Kotala Mabota— Mosala Moko ya Bule

Yekola liteya oyo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko ba yo basi mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola bamama bateyi mpe batali, tozali na etinda monene ya molimo mpo na kokokisa. “Episikopo, oyo akulisami mobateli mpate ya palwasi, akoki te na lolenge ekoki kobatela bampate nyonso ya Nkolo na ntango moko. Ye akotalela bamama bateyi mpe batali bafulami mpo na kosalisa ye.”1 Kolukaka mpe kozwaka bobimisi mpo na eye etali nani asengeli kopesama mosala ya kobatela ndeko mwasi moko moko ezali na ntina monene.

Bofuli ebandaka wana ezali bato ya bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi kolobana na nzela ya losambo mpo na mposa ya bato mpe mabota. Nsima, na bondimami ya episikopo, bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi ekopesa mosala na lolenge oyo ezali kosalisa bandeko basi kososola ete koteya mpe kotala ezali mokumba monene ya molimo.2

Bamama bateyi mpe batali na bosembo bayaka koyeba mpe kolinga ndeko mwasi moko na moko, kosalisa ye kolendisa bondimi na ye, mpe kopesa lisalisi ntango esengeli. Balukaka bofuli ya bango moko mpo na koyeba lolenge nini kopesa biyano na bamposa ya molimo mpe ya ntango ya ndeko mwasi moko na moko oyo bakendeka kotala.3

“Mosala ya koteya mpe kotala ekomaka mosala ya Nkolo ntango ntina na biso ezali bato na esika ya matomba. Solo mpenza, mosala ya koteya mpe kotala esilaka soki moke te. Ezali mingi lolenge ya kotambwisa bomoi koleka mosala.”4

Uta na Makomi

Matai 22:36–40; Yoane 13:34–35; Alma 37:6–7

Uta na Mambi na Biso ma Kala

Eliza R. Snow, mokambi monene ya mibale ya Lingomba ya Bamama Basungi ateyaki ete, “Namonaka mosala ya koteya lokola mosala moko monene mpe mosantu.” Ye apesaki bamama bateyi mpe batali toli ya “kotondisama na Molimo ya Nzambe, bwania, bomikitisi, bolingo” yambo bakende kotala mabota ete bakoka kososola mpe kokokisa bamposa ya molimo mpe ya ntango. Ye alobaki ete, “Okoki koyoka ete ozali koloba maloba ma kimia mpe ma bolendisi, mpe soki omoni ndeko moko ya mwasi koyokaka malili, kamata ye likolo ya motema lokola okokaki komema mwana na ntolo na yo mpe koyokisa [ye] moto.”5

Ekobima biso na bondimi lokola esalaki bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi ya yambo, tokozala na Molimo Mosanu elongo na biso mpe tokofulama mpo na koyeba lolenge boni kosalisa ndeko mwasi moko na moko oyo totalaka. “Tika toluka bwania na esika ya nguya,” elobaki Ndeko mwasi Snow, “mpe [to]kozwa nguya nyonso tosengeli mpo na kosala mosala na biso.”6

Matangi

  1. Julie B. Beck, “Relief Society: A Sacred Work,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 114.

  2. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 9.5; 9.5.2.

  3. Tala Handbook 2, 9.5.1.

  4. Julie B. Beck, Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2009, 114.

  5. Eliza R. Snow, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 108.

  6. Eliza R. Snow, na Daughters in My Kingdom, 45–46.