2013
Kokabola na Moninga moko
sánzá ya míbalé 2013


Bilenge

Kokabola na Moninga moko

Mokolo moko ntango nazalaki koyekola mpo na kelaki ya seminele, nazwaki liyoki moko ya kitoko mpe ya bokeseni. Lokola nazalaki kotanga liteya mpo na mokolo molandaki, namonaki elongi ya moninga ya eteyelo mpe nazwaki liyoki makasi ete nasengelaki kokabola litatoli na ngai elongo na ye.

Atako liyoki lina ezalaki polele, nabangaki. Natungisamaki ete moninga wa ngai akokaki koboya ngai, mingimingi mpamba te amonanaki kozala lolenge ya mwana mwasi oyo alingaki te kosepela kosangana na Eklezia.

 Nakanisaki lisusu lisukulu moko ya Ndeko mwasi Mary N. Cook ya bokambi monene ya Bilenge Basi na liye wapi azalaki kokebisa biso tosala makasi mpe tozala mpiko.1 Nalingaki kozala boye, yango wana nakomelaki mwana mwasi oyo mokanda mpe natatolaki bosolo ya Eklezia mpe bolingo na ngai mpo na Buku ya Mormon. Mokolo ya nsima nakotisaki mokanda moko ya Buku ya Mormon, elongo na mokanda nakomaki ngai moko, na kati ya libenga na ye.

 Nasutukaki, moninga na ngai ayambaki nsango malamu na esengo mpenza. Kobanda mokolo wana, akomaki kolobela ngai makambo ayekolaki uta na boyekoli na ye ya Buku ya Mormon. Nsima ya mwa bamposo, nalakisaki ye na bamisionele. Kaka sasaipi wana, azwaki litatoli uta na Molimo Mosantu ete makambo azalaki koyekola ezalaki ya solo. Bamisionele mpe ngai tolelaki ntango ayebisaki biso mayoki na ye. Moninga na ngai noki abatisamaki, mpe baboti ba ye bakamwaki na komona mbongwana eye ekomelaki ye.

 Nasepeli ete nakokaki kolonga bobangi na ngai mpe kosalisa na komemaka nsango malamu na kati ya bomoi na ye.

Matangi

  1. Tala Mary N. Cook, “Never, Never, Never Give Up!” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 117–19.