2013
Sala Bososoli
sánzá ya mwambe 2013


Bilenge

Sala Bososoli

Mokambi Eyring atangaki Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) ntango alobaki ete “Bazulunale ezali nzela moko ya kotangaka mapamboli na biso mpe ya kotikelaka bana na biso bososoli ya mapamboli yango.” Na likita linene na sanza ya zomi 2012, Mokambi Thomas S. Monson apesaki litatoli na ye ya kokomaka zulunale. Akabolaki boko makambo uta na bomoi na ye, kobakisaka ete, “Zulunale na ngai ya mokolo na mokolo, oyo ebatelami mibu nyonso oyo, esungi kopesa ngai boko makambo oyo mbele mpenza nakokaki kolobela te.” Apesaki toli ete, “Sala bososoli ya bomoi na yo mpe luka mingimingi mapamboli, ya minene mpe ya mike, oyo ozwi” (“Consider the Blessings,” Liahona mpe Ensign, sanza ya zomi na moko 2012, 86). Sala na kolandaka toli ya baprofeta mpe tia bantina mpo na kokoma zulunale na yo.