2013
Basantu mpo na Bileko Nyonso
August 2013


Etinda ya Bokambi ya Yambo, sanza ya libwa 2013

Basantu mpo na Bileko Nyonso

Elilingi
Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Nazali na makundoli ya bomwana ya eteni moko ya mokili oyo ezalaki kitoko mpenza koleka na bileko binso. Sanza moko na moko oyo ezalaki koleka, eleko ezalaki ya lipombo mpe ya kokamwa. Na mokolo moko ya eleko ya mpio makasi mpenza, mvula ya mpembe ezipaki bangomba mpe babalabala ya engumba. Eleko ya milona ememaki bamvula oyo epetolaka nkasa ya banzete mpe oyo esalaka ete banzete mpe milona ebimisa mantongo. Moi ya makasi ezalaki kongenga na likolo moko ya kimia mpe ya bule. Mpe eleko moko ya elanga ebongolaki mokili na bilili ya kongenga na langi ya lilala, langi ya mosaka, mpe langi ya motane. Ntango nazalaki mwana, nazalaki kolinga eleko moko na moko, mpe kino lelo, nalingaka eleko nyonso na lolenge na yango moko.

Tozali na bileko ya boye na bomoi na biso mpe lokola. Boko bileko ezali ya mwa molunge moke mpe elengi na nzoto. Bileko mosusu ezali bongo te. Boko mikolo ya bomoi na biso ezali kitoko lokola bafoto ya manaka. Nzokande, ezali na mikolo mpe makambo oyo eyokisaka motema mpasi mpe ekoki komema mayoki ya mozindo ya bozangi elikya, nkanda, mpe bololo kati na bomoi na biso.

Nandimi ete na ngonga moko to mosusu tokanisi banso ete ebongi malamu tofandaka bobele na mokili moko oyo etonda kaka na bililingi ya mikolo ya bileko ya kitoko kokoka mpe toboya bantango ya mpasi katikati na yango.

Kasi oyo ekoki kosalema te. To ezali na litomba te.

Ntango natali bomoi na ngai moko, ezali komonana polele ete ntango ya kokola na molimo koleka nyonso eyelaki ngai ntango nazalaki kokatisa bileko ya mipepe makasi mpenza.

Tata na biso na Lola oyo atonda na bwania nyonso ayebaki ete mpo ete bana na Ye bakoma bazalani oyo basengeli kokoma, basengelaki kokutana na bileko ya motungisi na ntango ya mobembo na bango na bomoi ya kufa. Profeta ya Buku ya Mormon, Lehi, alobaki ete soki lilanga ezali te, “bosembo ekokaki kosalema te” (2 Nefi 2:11). Solo mpenza, ezali bololo ya bomoi nde epesi biso nzela ya koyeba, kokesenisa, mpe koyoka elengi ya sukali na yango (tala D&C 29:39; Mose 6:55).

Mokambi Brigham Young alobaki yango na lolenge oyo: “Bikelamo nyonso ya mayele oyo balatisami motole ya nkembo, ya bozangi kufa, mpe ya bomoi ya seko basengeli koleka na nzela ya komekama nyonso ebongisama wapi bazalani nyonso ya mayele basengeli koleka, mpo na kozwa nkembo mpe bonetoli na bango. Likama nyonso oyo ekoki koyela bikelamu ya kufa ekoyokiselama mpasi … mpo na kolengela bango basepela na miso ya Nkolo. … Momekano mpe likambo nyonso oyo okutanaki na yango ezali na ntina mpo na lobiko na yo.”1

Motuna ezali te ya koyeba soki tokokutana na bileko ya motungisi kasi lolenge nini tokosala na ntango ya mipepe wana ya makasi mpenza. Libaku monene epesami biso na bileko oyo bibongwanaka ntango nyonso ya bomoi ezali ya kokangama makasi na liloba ya botongono ya Nzambe, mpamba te toli na Ye epesami bobele mpo na kosalisa biso kotelemela mipepe makasi ya bomoi te, kasi lisusu mpo na kokamba biso koleka yango. Tata na biso na Lola apesi liloba na Ye na nzela ya baprofeta na Ye—boyebi ya motuya oyo esengisami mpo na kokamba biso na nzela ya mikakatano ya bileko ya mpasi mpo na kokoma na esengo ya koloba te mpe na pole ya bongengi makasi ya bomoi ya seko. Ezali eteni moko ya motuya ya mayele tozwaka na bomoi mpo na kokolisa bokasi, mpiko, mpe bosembo mpo na kokangama na bosolo mpe bosembo atako tokoki kokutana na mipepe.

Baoyo basila kokota na mai ya libatisi mpe basila kozwa likabo ya Molimo Mosantu batii makolo na bango na nzela ya kozala bayekoli mpe bapesami mokumba ya kolanda ntango nyonso mpe na botongono matambi ya Mobikisi na biso.

Mobikisi ateyaki ete moi ebimaka “mpo na bato mabe mpe mpo na bato malamu mpe … mbula [enokaka] na bayengebeni mpe na bato bazali bayengebene te” (Matai 5:45). Ntango mosusu tokoki kososola te mpo na nini makambo ya kpokoso, kutu ya malonga te, mayelaka bomoi ya bato. Kasi lokola balandi ya Klisto, tolikii ete soki “toluki na etingia, tosambeli ntango nyonso, mpe tondimi, … nyonso ekosala mpo na bolamu na biso, soki totamboli sembo” (D&A 90:24; sete biso nde tobeti).

Lokola bandimi ya Eklezia na Ye, lokola Basantu, tozali kosalisa na esengo mpe na bolingi ntango nyonso mpe na bileko nyonso. Mpe wana ezali biso kosala bongo, mitema na biso ekotondisama na bondimi ya bule, elikya ya kobikisa, mpe bolingani ya lola.

Nzokande, tokosengisama koleka na nzela ya komona bileko nyonso—ezala ya elengi mpe ya mpasi. Kasi atako eleko yango nini, lokola balandi ya Yesu Klisto, tokotia elikya na biso likolo na Ye wana ezali biso kotambola na pole na Ye.

Na mokuse, tozali Basantu ya Nzambe, na mokano ya koyekola uta na Ye, ya kolinga Ye, mpe kolinga moninga na biso. Tozali baleki nzela na balabala epambolama ya kozala bayekoli, mpe tokotambola na kokangamaka makasi na ntina na biso ya lola.

Boye, tika tozala Basantu na eleko ya milona, eleko ya elanga, mpe na eleko ya mpio. Tika tozala Basantu na bileko nyonso.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young (1997), 261–62.

Koteya uta na Etinda Oyo

Bokambi ya Yambo eteyi ete, “Boko masakoli manene koleka nyonso mateyami na loyembo ya banzembo” (Hymns, ix). Wana ezali bino kosolola na ntina ya etinda oyo, bokanisa koyembaka elongo na baye bozali koteya moko ya banzembo to loyembo mosusu kolobelaka koyika mpiko na motungisi: “Quels Fondements Fermes” (no. 42); “L’Eternel Est Mon Berger” (no. 57); to “Mettons de l’Ardeur” (no. 159). Soki botindami na Molimo, bokabola lisolo ya ngonga moko ntango bobalusaki eleko ya mipepe makasi kokoma eleko ya lipamboli.