2014
Bolingo— Ntina Mpenza ya Nsango Malamu
May 2014


Bolingo— Ntina Mpenza ya Nsango Malamu

Tokoki solo kolinga Nzambe mpenza te soki tokolingaka bazalani na biso te na mobembo oyo ya bomoi ya kufa.

Balingami bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, ntango Mobikisi na biso asalaki kati ya bato, batunaki ye na molobeli oyo alingaki koyeba ete, “Molakisi, motindo nini ya mobeko eleki monene?”

Matai akomi ete Yesu ayanolaki boye:

“Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.

“Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo ya liboso.

“Mpe mosusu ya mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”1

Malako asukisi lisolo yango na maloba ya Mobikisi ete: “Ezali na motindo moko te eleki oyo mibale.”2

Tokoki solo kolinga Nzambe mpenza te soki tolingaka bazalani na biso te na mobembo oyo ya bomoi ya kufa. Na bosolo nyonso, tokoki solo kolinga bazalani na biso te soki tolingaka Nzambe, Tata na biso banso te. Apostolo Yoane ayebisi biso ete, “Mobeko oyo ewuti epai na ye, Ete ye oyo alingi Nzambe alinga mpe ndeko na ye lokola.”3 Tozali banso bana ya molimo ya Tata na biso na Lola mpe, na boye, tozali bandeko basi mpe mibali. Soki tobateli bosolo oyo na makanisi, kolinga bana ya Nzambe nyonso ekokoma eloko ya pete.

Sikawa, bolingo ezali ntina mpenza ya nsango malamu mpe Yesu Klisto azali ndakisa na biso. Bomoi na Ye ezaliki libula ya bolingo. Bakoni Abikisaki bango; bilemene Atambwisaki bango; basumuki Abikisaki bango. Na suka batomboki bazwaki bomoi na Ye. Nzokande, uta kuna na ngomba ya Golgotha maloba maye ezalaki se koyokana ete: “Tata, limbisa bango; mpo bayebi maye bazali kosala te”4—ndakisa ya nkembo kolakisaka mawa mpe bolingo kati na bomoi ya kufa.

Ezali na bizaleli ya bolamu mingi oyo emonisaka bolingo, ndakisa boboto, bompikiliki, kokaba na basusu bososoli, mpe bolimbisi. Na masanga na biso nyonso, oyo mpe bizaleli mosusu ekosalisa basusu komona bolingo kati ya mitema na biso.

Lokola momeseno bolingo na biso ekomonisama na nyonso tosalaka mokolo na mokolo na basusu. Likambo ya motuya ekozala makoki na biso ya koyeba mposa ya moto mpe nsima kosalisa. Nalingaka ntango nyonso mayoki ya motema eyembami na maloba mokuse maye ya ntoki:

Nalelaki na butu

Mpo na komona mosika te

Mpo ete mposa ya moto ebomaki ngai miso;

Kasi naino nayoka te

Mwa mawa kosuwa ngai

Mpo na kozalaka mwa boboto moke.5

Kala mingi te bayebisaki ngai ndakisa ya boboto ya bolingo oyo etutisaka motema—moko oyo mbano ekokaki koyebana te. Ezalaki na mobu 1933, ntango libaku ya kozwa mosala ekomaki mpasi mpenza na ntina ya Mpasi Monene. Ezalaki na ngambo ya esti ya USA. Arlene Biesecker awutaki kozwa diplome na ye ya kelasi ya likolo. Nsima ya koluka mosala mpo na ntango molai, na nsuka ayaki kozwa mosala na izini ya botongi bilamba lokola motongi bilamba. Bazalaki kofuta batongi bilamba kaka mpo na elamba moko moko oyo batongaki malamu koleka mokolo na mokolo. Bilamba mingi batongaki, lifuta ya malamu mingi mpe bazwaki.

Mokolo moko nsima mua ntango moke ya kobanda mosala na izini ya botongi bilamba, Arlene akutanaki na likama moko oyo etungisaki mpe ebangisaki ye. Afandaki na masini na ye komekaka kotonga elamba alongaki te komeka kotonga mpe kosala mokolo wana. Emonanaki ete moto ya kosunga ye azalaki te, mpamba te batongi bilamba nyonso mosusu bazalaki kosala na lombango mpo na kosilisa bilamba mingi lokola bakokaki. Arlene azangaki lisalisi mpe abungisaki elikya. Na kimia, abandaki kolela.

Na ngambo mosusu ya Arlene efandaki Bernice Rock. Azalaki mokolo mpe na boyebi koleka na mosala ya mosoni. Komonaka mawa ya Arlene, Bernice atikaki mosala na ye moko mpe akendaki na mopanzi ya Arlene, kopesa ye malakisi mpe lisungi na boboto nyonso. Atikalaki wana kino Arlene ayebaki mpe akomaki na makoki ya kotonga elamba yango. Sima Bernice azongaki na masini na ye moko, abungisaki libaku ya kotonga bilamba mingi lokola akokaki kosona, soki asalisaka te.

Na ndakisa moko oyo ya bolingo, Bernice mpe Arlene bakomaki baninga bomoi na bango mobimba. Suka suka moto na moto abalaki mpe azwaki bana. Na eleko moko ya mobu 1950, Bernice, oyo azalaki mondimi ya Eklezia, apesaki Arlene mpe libota na ye mokanda ya Buku ya Mormon. Na 1960, Arlene mpe mobali na ye mpe bana na ye bazwaki libatisi lokola bandimi ya Eklezia. Sima bakangamaki na tempelo esantu ya Nzambe.

Lokola litomba ya mawa Bernice amonisaki ntango akendaki kosunga moto oyo ayebaki te kasi oyo azalaki na mpasi mpe azalaki na bosenga ya lisungi, bato ebele koleka, banso bato na bomoi mpe bato bakufa, bazali sikawa kosepela na makuli ya nsango malamu.

Mikolo nionso ya bomoi na biso topesami mabaku ya komonisa bolingo mpe boboto na baye bazali nzinga nzinga na biso. Mokambi Spencer W. Kimball alobaki ete: “Tosengeli kokundola ete bakufi oyo tozali kokutana na bango na bisika ya kobomba mituka, babilo, Asansere, mpe ya epai mosusu bazali eteni wana ya bato Nzambe apesi biso mpo na kolinga mpe kosalisa. Ekosala biso malamu mpenza te kolobela bondeko ya mokili mobimba soki tokoki kotala te baye nyonso bazali nzinga nzinga na biso lokola bandeko mibali mpe bandeko basi na biso.”6

Mbala mingi mabaku na biso ya kolakisa bolingo na biso eyaka na mbalakata. Ndakisa moko ya libaku moko emonisami kati na eteni moko ya zulunale na Sanza ya zomi ya mobu 1981. Nakamwaki mingi mpenza na bolingo mpe mawa oyo ekomamaki na kati kuna ete nabombaki zulunale yango na mikanda na ngai mpo na mibu 30 mileki.

Zulunale yango elobi ete moko ya mpepo moko ya direct ya Kompani ya Alaska kowutaka Anchorage na Alaska kokendaka na Seattle, Washington—komemaka bato150—epengolamaki na engumba moko mosika ya Alaska na ntina ya kozwa mwana moko oyo azokaki makasi. Mwana mobali ya mibu 2 akatanaki mosisa ya loboko ntango akweyaki na eteni ya talatala ntango azalaki kosakana pembeni ya ndako na bango. Engumba ezalaki mosika na bakilometele 725 na sudi ya Anchorage mpe solo mpenza ezalaki na nzela ya mpepo te. Nzokande, minganga oyo bamonaki likamba basengaki makasi lisungi, mpe boye mpepo ekitaki mpo na kozwa mwana mpe komema ye na Seattle ete akoka kozwa lisalisi na lopitalo.

Ntango mpepo ekitaki mpembeni ya engumba, minganga bayebisaki mokumi mpepo ete makila ezali kobima mwana mingi ete akokaki kobika te na mpepo kokendaka na Seattle. Mokano ezwamaki ya kosala bakilometele mosusu 320 na nzela ya mabe kino na Juneau, Alaska, engumba ya mpembeni wapi lopitalo ezali.

Sima ya komema mwana mobali yango na Juneau, mpepo ekendaki sikawa na Seattle, nsima ya bangonga mingi koleka. Moto moko te kati na mpepo amitungisaki, atako mingi kati na bango bazangaki bilaka na bango mpe bampepo mosusu ya kolandisa mobembo. Solo mpenza, lokola baminiti mpe bantango elekaki, bakongolaki mbongo, bazwaki mbongo ebele mpo na mwana mpe libota na ye.

Lokola mpepo ezalaki pene ya kokita na mabele na Seattle, bato ya mobembo babandaki kosepela ntango pilote alobaki ete azwaki nsango na radio ete mwana yango akomaki malamu.7

Maloba ya makomi eyaki na makanisi na ngai ete: “Bolingani ezali bolingo ya peto ya Klisto, … mpe nyonso ekozala malamu na oyo akozala na bolingani na mokolo ya nsuka.”8

Bandeko mibali mpe bandeko basi, ndambu ya mabaku na biso ya minene koleka ya kolakisa bolingo na biso ekozala kati ya mabota na bisomei. Bolingo esengeli kozala na katikati mpenza ya bomoi ya libota na biso, nzokande ezalaka te ntango mosusu. Kozanga bompikiliki ekoki kozala mingi, koswana mingi, kobunda-bunda ebele, mpinzoli ebele. Nkondo Mokambi Gordon B. Hinckley atunaki na mawa: “mpo na nini ezali ete [baye] tolingaka [koleka] bakomaka mbala mingi baoyo bazwaka maloba mabe na biso? Mpo na nini ezali ete [biso] ntango mosusu tolobaka lokola ete tozali na mbeli ya mpia makasi?”9 Biyano na mituna miye ekoki kokesena na moko na moko kati na biso, nzokande soki otali na mozindo likambo ezali na bantina te. Soki tobateli motindo ya kolingana moko mpe mosusu, tosengeli kosalisana moko na moko na boboto mpe botosi.

Ya solo ekozala na ntango mosusu ntango botosi esengeli kondimama. Tika ete tokundola, nzokande, toli ezwami na Doctrine et Alliances—totangi, ete ntango esengeli mpo na biso ya kozomela moto mosusu, nsima tosengeli kolakisa kobakisama ya bolingo.10

Nakolikia ete tokoluka ntango nyonso kotala mpo na kolakisa bokebi mpe kozala komitia na makanisi mpe na esika ya koyoka ndenge basusu oyo bazali nzinga nzinga na biso. Tika ete tomikitisa te to komimona mike te. Nzokande, tika ete tozala bato ya mitema mawa mpe ya mpiko. Tosengeli kozala na bokebi ete tobebisa elikya ya moto mosusu te na nzela ya maloba tobimisaki mpe misala tosalaki na kozangaka bokebi.

Bolimbisi esengeli kotambola elongo na bolingo. Na mabota na biso, na baninga na biso mpe lokola, mayoki ya botuki ekoki kozala mpe boyokani ekoki kozanga. Lisusu, likambo ezali mpenza te boni yango ezali moke. Ekoki kozala te mpe esengeli kotika elembo na motema, mpo na kopolisa mpe na nsuka kobebisa te. Mpamela ezokisaka. Kaka bolimbisi nde ebikisaka.

Ndeko mwasi moko ya bolingo oyo akufa mpe ngai tokendaki mokolo moko kotala bato mpe na mbalakata abetelaki ngai lisolo ya mpasi na motema. Alobelaki likama oyo esalemaki mibu mingi eleki liboso mpe atangaki mosali bilanga moko ya pembeni, oyo azalaki ntango moko moninga malamu kasi oyo na nani ye mpe mobali na ye bazalaki koyokana te ntango nyonso. Mokolo moko mosali bilanga atunaki soki akokaki kozwa nzela ya mokuse ya koleka mpo na kokendaka na lopango na ye. Na ntango wana apemisaki lisolo epai na ngai mpe, na kotatabanaka na mongongo na ye, alobaki “Ndeko mobali Monson, natikaki ye kokatisa elanga na biso nsima atako moke te kasi nasengaki ye kokende nzela ya molai na makolo mpo na kokoma na lopango na ye. Nasalaki mabe, mpe nazali koyokela yango motema mpasi. Asi akufa, kasi oo, natombeli soki nakokaki koyebisa ye, ‘limbisa’ngai.’ Boniboni natombeli kozwa libaku malamu ya mbala mibale ya kolakisa boboto.”

Lokola nazalaki koyoka ye, makanisi ya John Greenleaf Whittier eyaki na ngai na mawa na motema na ngai ete: Na maloba nyonso ya monoko to ya ekomeli, ya mawa koleka ezali oyo: ‘Soki Ekokaki kozala!’”11 Bandeko mibali mpe basi, lokola tozali kosalela baninga na bolingo mpe boboto, tokoboya motema mpasi lolenge ya boye te.

Bolingo elakisamaka na banzela eyebani mingi: koseka, kopepa loboko, liloba ya boboto, botondi. Maloba mosusu ekoki koyebana mpenza te, lokola kolakisa litoma na misala ya moto mosusu, koteyaka libongisi ya nsango malamu na boboto mpe bompikiliki, kotalaka moto ya maladi to oyo akangama na ndako. Maloba mpe misala oyo, mpe mingi mosusu, ekoki kolakisa bolingo.

Dale Carnegie, moko mokomi ya Amerika oyo ayebana malamu mpe motangisi, andimi ete moto nyonso mobali to mwasi azali na kati na ye na “nguya ya kokolisa mobimba ya esengo nyonso ya mokili …na kopesaka mwa maloba moke ya botondi ya sembo epai ya moto oyo azali ye moko to alembisami.” Alobaki, “Ntango mosusu lobi okobosana maloba ya boboto olobi lelo, kasi oyo azwi yango akoki kosepela na yango ntango etikali ya bomoi na ye.”12

Tika ete tobanda sikawa, na mokolo oyo mpenza, kolakisa bolingo na bana nyonso ya Nzambe, bazala bato ya libota na biso, baninga na biso, bayebani na biso mpenza to na bato oyo toyebi te. Lokola tozali kolamuka na ntongo nionso, tika ete tozwa mokano ya koyanola na bolingo mpe boboto na baye bakoya na nzela na biso.

Koleka bososoli na biso, bandeko mibali mpe ya basi, ezali bolingo ya Nzambe mpo na biso. Na ntina ya bolingo oyo, Atindaki Mwana na Ye, oyo alingi biso mingi mpo na kopesa bomoi na Ye mpo na biso, mpo ete tokoka kozwa bomoi ya seko. Lokola tosili kososola likabo oyo ya komekana te, mitema na biso ekotondisama na esengo mpo na Tata na biso ya Seko, mpo na Mobikisi na biso, mpe mpo na bato banso. Nasambeli na bosolo ete oyo ekozala bongo na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Matai 22:36–39.

  2. Malako12:31.

  3. 1 Yoane 4:21.

  4. Luka 23:34.

  5. Mokomi ayebani te, na Richard L. Evans, “The Quality of Kindness,” Improvement Era, Sanza ya Mitano 1960, 340.

  6. The Teachings of Spencer W. Kimball, ed. Edward L. Kimball (1982), 483.

  7. Tala “Injured Boy Flown to Safety,” Daily Sitka Sentinel (Alaska), Sanza ya Zomi. 22, 1981.

  8. Moloni 7:41.

  9. Gordon B. Hinckley, “Let Love Be the Lodestar of Your Life,” Ensign, Sanza ya Mitano 1989, 67.

  10. Tala Doctrine et Alliances 84:20.

  11. “Maud Muller,” na The Complete Poetical Works of John Greenleaf Whittier (1878), 206; biso nde tobeti sete.

  12. Dale Carnegie, na, ndakisa, Larry Chang, Wisdom for the Soul (2006), 54.