2014
Ntango ya Kobuka Mbuma ya Nzambe
sánzá ya mwambe 2014


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya mwambe 2014

Nkona ya Nzambe

Elilingi
Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Mwasi moko na nkombo ya Christa asalaki ntango moko na mwa kompani ya milona. Alingaki mosala na ye. Ezalaki liziba ya bikamwa mingi koleka ete milona ya mike mike oyo wana azalaki koteka ezalaka na makoki ya kobongwana yango moko na eloko mosusu ya kokamwisa mpenza—mbala, chou, to kutu nzete monene ya chene.

Christa alingaki kofanda liboso ya ordinateur na ye kozwaka bitinda mpe koyanolaka mituna. Kasi mokolo moko ayambaki bileli oyo etungisaki ye.

“Milona ezali kosala te,” mosombi alobaki. “Nasombaki yango sanza mibale eleki mpe kino sikawa eloko moko te.”

“Okonaki yango na mabele kitoko mpe opesaki yango mayi mpe moyi na lolenge ekoki?” Christa atunaki.

“Te, kasi nasalaki oyo nakokaki,” mosombi azongisaki. “Nasombaki milona. Nsima ya nyonso, lotomo na yango ezali kokola.”

“Kasi olonaki yango te?”

“Soki moke te. Elingi koloba kokomisa maboko na ngai bosoto.”

Christa akanisaki na ntina na yango mpe azwaki mokano ete esengeli kokoma malako ya kolona. Na suka azuaki mokano ete liteya ya yambo ekozala: “Osengeli kolanda malakisi ya boloni mpo ete milona ekola. Okoki kotanda yango likolo ya motalaka mpe ozela yango kokola te.”

Elekaki ntango molayi te liboso ete bileli mosusu etungisa ye.

“Milona ezali kobota te,” mosombi alobaki.

“Olonaki yango na mabele malamu?” Christa ayanolaki. “Opesaki yango mayi mpe moyi na lolenge esengeli?”

“O iyo,” mosombi azongisaki na makasi. “Nasalaki nyonso wana―kaka lolenge elobami na lokasa. Kasi yango esali te.”

“Eloko moko esalemaki te? Milonda yango ebimaki?”

“Eloko moko esalemaki te,” mosombi alobaki. “Nalonaki yango kaka lokola etindamaki. Nazalaki kolikia kozua tomato mpo na kolia. Sikawa nakosami mpenza.”

“Zela,” Christa azongisaki. “Ozali koloba olonaki milona yango lelo?”

“Koyokisama nsoni te,” mosombi azongisaki. “Nalonaki yango mposo moko eleki. Nazalaki te kozela komona tomato na mokolo ya liboso; nazalaki na bompikiliki. Tika nayebisa yo, mayi etiamaki mingi mpe esengelaki kozela uta ntango wana mpe sikawa.”

Christa ayebaki ete asengelaki kobakisa lilako mosusu: “Milona oyo mizali kotosa mibeko ya bioloji. Soki oloni milona na ntongo mpe ozeli kolia tomato na suka ya poso wana, okomikosa. Osengeli kozala na bompikiliki mpe kozela mosala ya lolenge ya milona esalema liboso na yo.”

Nyonso etambolaki malamu kino Christa azwaki bileli mosusu.

“Nakosami na milona na bino,” mosombi abandaki. “Nalonaki yango kaka lokola lokasa etindaki. Napesaki yango mayi, nasalaki oyo esengeli mpo ezua moyi, mpe nazelaki kino na suka yango ebota nkona na yango.”

“Emonani lokola kaka ete osalaki makambo nyonso malamu,” Christa alobaki.

“Nyonso ezali malamu mingi mpenza,” mosali ayanolaki. “Kasi oyo nazuaki ezalaki cocombre!”

“Makundoli na ngai emonisi ete yango ezalaki milona oyo osengaki,” Christa alobaki.

“Kasi nalingi cocombre te, nalingi mbika ya monene!”

“Nazali kososola te.”

“Nalonaki milona yango na molongo na ngai ya mbika—mabele se moko oyo ebotaki mbika mobu eleki. Nakumisaki banzete mikolo nyonso, koyebisaka bango mbika ya kitoko boni yango ekokoma. Kasi na esika ya mbika ya minene ya libungutulu ya langi ya lilala, nazuaki cocombre ya langi ya molai mpe ya mayi ya pondu. Ebele na yango.

Christa ayebaki na ntango wana ete malako ezalaki ya kokoka te mpe ete ezalaki na ntina monene kosakola liteya moko: “Milona oloni mpe ntango oloni yango nde ekolakisa mbuma okobuka.”

Mobeko ya Ntango ya Bobuki Mbuma

Apostolo Polo ateyaki na oyo etali Ntango na Bino ya bobuki mbuma ya Nzambe:

“Bomikosa te, basekaka Nzambe te: mpo oyo nyonso moto aloni, yango wana nde akobuka.

“Mpo ye oyo aloni na mosuni akobuka uta na mosuni libebi; kasi ye oyo aloni na Molimo akobuka uta na Molimo bomoi ya seko.

“Mpe tika tolemba mpo na kosala bolamu te: mpo na eleko elongobani tokobuka, soki totiki te (Bagalati 6:7–9).

Na bantango eleki mingi te, Nkolo apesi biso bwanya ya kobakisa mpe mayele na mobeko oyo ebongwanaka te:

“Ezali na mobeko moko oyo ebongwakana te na lola liboso ya bokeli mokili oyo, likolo na yango mapamboli nyonso esakolami—

“Mpe ntango tozui lipamboli kowuta na Nzambe, ezali na nzela ya botosi na mobeko oyo likolo na oyo esakolamaki (D&A 130:20–21).

Oyo toloni, yango nde tokobuka.

Kobuka mbuma ya Nzambe ezali na nkembo koleka mayele ya moto. Na baoyo bapesi Ye lokumu, ebele ya mapamboli na Ye ekoya na “emekolami, efinami, eningisami malamu, mpe ezali kosopana. … Mpamba te bakozongisela bino kaka ndenge mpe bopesaka baninga” (Luka 6:38).

Kaka lokola milona na mabele esengi bokasi mpe bompikiliki, mapamboli ya lola esengi mpe lokola. Tokoki te kotia eyamba na biso na motalaka mpe kozela kobukambuma ya mapamboli ya molimo. Kasi soki oloni mpe oleisi bomoi ya mabota na biso ya mokolo na mokolo na mibeko ya nsango malamu, ezali na elikia monene ete bana na biso bakokola mpo na kobimisa mbuma ya molimo ya motuya monene epai na bango mpe bankola ekoya sima.

Biyano ya Nzambe na nsambo na biso eyaka mbala mingi na lombango te—ntango mingi emonisamaka te ete ezali koya— kasi Nzambe ayebi nini ezali malamu mpo na bana na Ye. Na solo mpenza, mokolo moko tokomona pole koleka; mpe na mokolo wana tokoyeba bolamu mpe motema ya kokaba ya lola.

Na ngonga se moko wana, ntina na biso mpe esengo na biso monene ezali kotambola na matambe ya Molakisi mpe Mobikisi mpe kotambwisa bomoi ya malamu mpe babomoi elongobana mpenza na boye ete ntango kitoko ya bobuki mbuma mpe mapamboli elakami ya Nzambe ya motuya ekoka kozala ya biso.

Oyo toloni, yango nde tokobuka.

Oyo ezali mobeko ya lola.

Oyo ezali mobeko ya ntango ya bobuki mbuma ya Nzambe.

Koteya uta na Etinda Oyo

Solola elongo na baoyo ozali kotala boniboni mobeko ya bobuki mbuma ya Nzambe etali mikangano, bobongwami mpe litatoli, to ntina ya mosala mpe ya boyekoli. Okoki kotanga mpe kotanga makomi epesami na mobeko oyo, lokola Masese 11:18; 2 Bakolinti 9:6; mpe Alma 32. Lendisa bango kotala mbala ya mibale ba ntina ya liboso mpe kotia bantina ya sika mpo na kozua bambano ya sembo. Salisa bango kokolisa mwango moko ya kosala na lolenge ya siki-siki na ntina ya kozua bantina na bango ya mikolo mikoya mosika liboso.